2010
Buku ya Molomoni ya Ngai Moko
sánzá ya libwa 2010


Bolenge

Buku ya Molomoni ya Ngai Moko

Na sanza ya Mwambe ya mobu 2005, ntango Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) abimisaki momekano ya ntembe epai ya Bandimi ba Eklezia ete batanga Buku ya Molomoni mobimba liboso ya nsuka ya mbula, namilakaki ngai moko ete nakotanga buku yango mobimba. Namesenaki na masolo kati na Buku ya Molomoni kasi natangaki yango na mobimba ata moke te. Sikawa nakanaki kokokisa elako na ngai.

Bateyaki ngai kosalela makomi na bomoi na ngai mpe kokomisa yango ya ngai moko. Boye lokola natangaki, nakomaki na mipanzi ya lokasa nini nakanisaki ekoki kozala likanisi ya litangi yango. Natiaki lisusu monkoloto o nse ya maloba mpe ndinga oyo eyaki lisusu mpo na kobeta sete.

Natiaki nkombo na ngai penepene na nkombo kati na makomi mpo na kosunga ngai kokundola ete liloba oyo Nkolo alobaki na bato mosusu ekoki mpe kozala liloba elobami na ngai mpe lokola. Ndakisa, na 2 Nefi 2:28 nakomaki nkombo na ngai boye: “Mpe sikawa, [Hillary], nalingi ete otalela Moyokanisi monene, mpe otia bokebi na mitindo minene na ye.” Mingi lokola nakomisaki Buku ya Molomoni ya ngai moko, mingi mpe nakomaki kotanga yango mokolo nyonso.

Lokola nazalaki kotanga yango mokolo na mokolo, mabondeli na ngai ekomaki mpenza ya motema mpe uta na ngai moko. Nakokaki mpe lisusu komaniola koteya kelasi na ngai mpe kolanda bitinda ya Molimo mpe kozala moninga ya basusu. Na butu ya nsuka ya mbula, nasilisaki Buku ya Molomoni.

Bongo nasosolaki ntina monene ya kotanga mobimba ya Buku ya Molomoni, elongo na makomi mosusu, mpe nalingi nasala bongo mbala mingi na bomoi na ngai.