2010
Buku ya Molomoni lokola Mokambi na Yo Moko
sánzá ya libwa 2010


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya Libwa 2010

Buku ya Molomoni lokola Mokambi na Yo Moko

Biso banso toyokaka, na ntango na biso ya malamu koleka mpenza, mposa ya kozonga kofanda elongo na Nzambe. Apesaki biso likabo ya Mwana wa Ye ya bolingo lokola Mobikisi na biso mpo na kopesa nzela mpe koteya biso lolenge nini kolanda yango. Apesaki biso baprofeta mpo na kolakisa nzela. Profeta Joseph Smith afulamaki mpo na kobongola nkoma ya baprofeta oyo ezali Buku ya Molomoni. Ezali mokambi na biso ya solo na nzela na biso ya kozonga na ndako epai ya Nzambe.

Joseph Simth alobaki na ntina ya buku wana ya motuya ete, “Nayebisaki bandeko bandimi ete Buku ya Molomoni ezali buku ya malamu koleka nyonso na mabele, mpe libanga likonzi ya eyamba na biso, mpe moto akobelema penepene na Nzambe na kokangamaka na misise na yango koleka buku nyonso mosusu.”1

Misise mya Buku ya Molomoni ezali mitindo mya Nzambe oyo tozali kokuta kuna na kati. Boko ezali mitindo ya semba uta na Mobikisi o nzela ya baprofeta na Ye na kotalaka nini tosengeli kosala mpe bato ya lolenge nini tosengeli kokoma. Buku ya Molomoni ezali kopesa biso ndakisa ya Mobikisi mpo na kokolisa bondimi na biso mpe mokano na biso ya kotosa motindo na Ye mpo na kolanda Ye. Buku yango etondi na malongi ma Klisto mpo na kokamba biso. Awa ezali yoko ndakisa uta na 2 Nefi:

“[Yesu] alobaki epai ya bana ya bato ete: Bolanda ngai. Yango wana, balingami bandeko na ngai, ekoki biso kolanda Yesu longola se soki tozali na bolingi ya kobomba mitindo mya Tata?

“Mpe Tata alobaki ete: Boyambola, boyambola, mpe bobatisama na nkombo ya Mwana na ngai ya bolingo” (2 Nefi 31:10–11).

Buku yango ezali kolakisa polele ete tosengeli kozwa Molimo Mosantu lokola libatisi ya moto mpo na kosalisa biso kotikala na nzela ya moke mpe ya nkaka. Bateyi biso ete tosengeli ntango nyonso kosambela na nkombo ya Klisto, na kozangaka kosenzoa, mpe soki tosali, tozali na elako ete: “Yango wana, bosengeli kokima mbangu kokende liboso na mokano ya kokangama ngwi na Klisto, kozalaka na elikya ya solo ya bobongi nye, mpe bolingo na Nzambe mpe ya bato banso. Yango wana, soki bokokende liboso mbangu, kosalaka lipati na liloba lya Klisto, mpe kotiaka molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi bwa seko” (2 Nefi 31:20).

Buku ya Molomoni ezali kotia yango polele kati na liteya kitoko ya Mokonzi Benyamina nini yango elingi koloba kozala na bolingo ya Nzambe mpe ya bato banso. Ntango lolenge na biso ebongwani na nguya ya Bomikabi mpe o nzela ya botosi na biso ya botongono ya mibeko, tokotondisama na bolingo ya Nzambe (tala Moziya 4:1–12).

Buku ya Molomoni ezali lisusu kopesa biso bolikii ete tokoki kokoma peto na bomoi oyo ete tozali na mposa ya kosala mabe lisusu te (tala Moziya 5:2). Elikya oyo ezali kopesa biso mpiko mpe bolendisi wana ezali Satana komeka kosenginia biso mpe kolembisa biso na nzela na biso.

Ntango nyonso natangaka ata mwa milongo moke kati na Buku ya Molomoni, nayokaka litatoli na ngai kolendisama ete buku yango ezali solo, ete Yesu azali Klisto, ete tokoki kolanda Ye epai na ye, mpe ete tokoki komema baoyo tolingaka na ndako epai na ye elongo na biso. Ezali mpo na ngai buku ya babuku. Ezali liloba ya Nzambe.

Nasambeli ete biso mpe banso baoyo tolingaka tomela mai na mozindo mpe mokolo na mokolo uta na yango. Natatoli na nkombo ya Yesu Klisto ete ezali mokambi moko ya solo.

MATANGI

  1. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 369.

Koteya uta na Etinda Oyo

“Ntango tozali kosalela makomi mpe maloba ya baprofeta ya mikolo mya nsuka lokola liziba ya mateya na biso manso, tobiangi Molimo kopesa litatoli. Eye ememelaka mateya na biso ‘nguya ya Nzambe mpo na kondimisa bato’ (D&C 11:21)” (Mateya, Libiangi Linene Ezali Te [1999], 51). Tala ete otanga makomi mabetami sete uta na etinda ya Mokambi Eyring, elongo na maloba ma Joseph Smith na ntina ya Buku ya Molomoni. Benga bato ya libota kokabola lolenge nini kosalela mateya mazwami na Buku ya Molomoni esalisaka bango kobelema penepene na Nzambe.

“Ntango bayekoli bazali kosolola na ntina ya mabongisi uta na makomi, bazali kokolisa makoki bazali na yango mposa mpo na boyekoli na bango ya makomi” (Mateya, Libiangi Linene Ezali Te, 54). Tala ete otanga makomi oyo mazali kolobela etinda oyo mpe koluka mpe kosolola na ntina ya mabongisi nini mazali koteya.