2010
Mokumba na Biso ya Kobokola Nkola ya Sika.
sánzá ya libwa 2010


Etinda ya Bamama Bateyi Batali, Sanza ya libwa 2010

Mokumba na Biso ya Kobokola Nkola ya Sika

Yekola liteya oyo, mpe na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala kati na bomoi na yo.

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi • Libota • Lisungi

Uta na Makomi

Masese 22:6; Baefeso 6:4; Enosi 1:1; Alama 53:20–21; 56:47; 57:27

Soki bakolisami te, nkola na biso ya sika ekoki kozala na likama lokola loye lilimbolami na Moziya 26. Bilenge mingi bandimaki te mimeseno mya batata na bango mpe bakomaki bato bakabwani mpo na oyo etali bondimi na bango, kotikalaka bongo libela nsima. Nkola na biso ya sika bakokaki na lolenge moko mpe kopengwa soki basosoli te nini ezali eteni na bango kati na mwango ya Tata na bango na Likolo.

Boye nini ekobatela nkola ya sika kati na bokengi? Kati na Eklezia, toteyaka mabongisi ya lobiko, mpe mabongisi mana mazali mabongisi ya libota, mabongisi maye makosalisa nkola ya sika kosala libota, koteya libota lina, mpe kolengela libota lina mpo na makuli mpe mayokani—mpe nsima nkola ekoya nsima ekoteya oyo elandi mpe bongo na bongo.

Lokola baboti, bakambi, mpe bandimi ba Eklezia, tozali kolengela nkola oyo mpo na kozwa mapamboli ma Abalayama, mpo na tempelo. Tozali na mokumba ya kozala polele na makambo ya ntina ya malongi mazwami kati na esakoli na libota. Bomama mpe botata ezali misala mpe mikumba ya seko. Moko moko kati na biso azali komema mokumba ya mobali to mwasi lokola eteni moko ya mwango yango.

Tokoki koteya malongi oyo na esika nyonso. Tosengeli kolobela libala mpe libota na limemia nyonso. Mpe uta na ndakisa na biso, nkola ya sika ekoki kozwa elikya monene mpe kososola—bobele uta na maloba tozali koloba te kasi uta na lolenge tozali koyoka mpe kobimisa molimo ya libota.

Julie B. Beck, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Wana ezalaki ye kolobela bandeko basi na likita linene ya Lingomba ya Bamama Basungi na mokolo ya 23, Sanza ya libwa ya mobu 1995, Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki: “Mokili oyo tozali kati na yango ezali mokili ya kili-kili, ya mbongwana ya bizaleli malamu.” Mingongo makasi mizali kobelela mpo na eloko moko mpe mosusu na kotekaka mibeko ya bizaleli malamu.”1 Mokambi Hinckley akendeki nsima kolakisa epai ya bandeko basi, na Eklezia, mpe na nsuka na bato epai nyonso “Libota: Esakoli na Mokili.”

Na mibu miye miyaki nsima mokanda ya esakoli moye ebongolamaki na nkota mingi mpe ekabolamaki na bakambi ya mokili mobimba. Ezali kosenga bai-mboka mpe bakambi ya mbula-matari “komatisa mibeko oyo mitiami mpo na kobatela mpe kolendisa libota lokola lisanga ya bomoko ya lingomba ya bato mobimba.”2

Esakoli yango ekomi moboko ya Eyamba ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpo na oyo etali libota, liloba liye wapi tosengeli kosimba makasi mpe koyeba ete na kosalelaka misise na yango na bomoi na biso, tozali kolendisa mabota mpe bandako na biso.

MATANGI

  1. Gordon B. Hinckley, “Telema Ngwi na Mipepe ya Mokili,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1995, 99.

  2. Tala “Libota: Esakoli Epai ya Mokili,” Liahona, Sanza ya zomi 2004, 49.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lolenge nini ekoki ngai kosalisa bandeko na ngai ya basi kosalela “Libota: Esakoli Epai ya Mokili” mpo na kokolisa nkola oyo ya sika? Okoki kotala ete okabola mokanda moko ya esakoli mpe kosalisa bandeko na yo ya basi kokitola mpe kotia bilembo na matangi wana ekoteya malongi ya monene koleka nyonso.

  2. Lolenge nini ekoki ngai kokolisa nkola oyo ya sika? Okoki kotala lolenge nini ya kokoma epai ya bandimi ba palwasi, etape, libota, to lisanga ya bato oyo bakokaki kozwa litomba ya bokebi mpe bolingo na yo.