2012
Bolimbisi Ekomemaka Esengo
sánzá ya zómi 2012


Bana

Bolimbisi Ememaka Esengo

Mokambi Uchtdorf ateyi ete tosengeli kolimbisa bato ba libota lya biso. Tala boniboni maponi ma Joseph mpe Anna masalaki na libota lya bango.

Joseph mpe ndeko wa ye ya mwasi ya leki, Anna, bazali kosakana elongo. Joseph abakoli esanele ya Anna mosika na ye. Nini Joseph asengeli kosala?

Joseph asiliki na Anna. Anna aleli. Mama wa Joseph apesi ye etumbu mpo na kobundaka na ndeko wa ye ya mwasi. Joseph ayoki mawa ete asalaki liponi lya mabe.

Joseph alimbisi Anna mpe azwi esanele esusu mpo na kosakana na yango. Basakani elongo na esengo. Mama wa bango azali na esengo ete Joseph azalaki bosembo na ndeko wa ye ya mwasi mpe abatelaki kimia na libota. Joseph ayoki esengo mpo na koponaka kolimbisa.

Nsima, Joseph mpe Anna balingi kosunga mama wa bango kolengela bilei. Joseph asungi te. Nini Anna asengeli kosala?

Anna afundi na mama wa ye. Anna aswani mpo na kosengelaka kosala mosala ye moko. Na bolei banso bazali na mawa na ntina ya boswani.

Anna alimbisi Joseph mpe asungi na bilei. Mama wa bango azali na botondi mpo na lisungi ya Anna. Libota lisepeki kozala elongo na bolei. Anna ayoki malamu ete aponaki kolimbisa.

Boniboni maponi ma yo mpo na kolimbisa masalaka na esengo ya libota lya yo?