2012
Losambo mpe Kimia
sánzá ya zómi 2012


Bilenge

Losambo mpe Kimia

Mpokwa moko naswanaki na mama wa ngai mpe nayokaki mpenza mabe. Boye nakanaki kosambela. Atako nazalaki koyoka mabe mpe nalingaki te kozala “ya molimo,” nayebaki ete kosambela elingaki kosunga ngai koyoka esengo mingi koleka mpe mposa ya koswana moke. Esilaki mama wa ngai kolongwa na kisuku, nabandaki losambo la ngai. “Tata wa bolingo na Lola, nayei epai ya yo butu ya lelo mpamba te …” Te. Nafungolaki miso mya ngai mpe napanzaki maboko ma ngai; yango ezalaki lokola mabe. Namekaki lisusu. “Tata na Lola, nazali na mposa …” Yango lokola ezalaki lokola mabe. Nayokaki lokola Satana kotindaka ngai kotika losambo la ngai ya kosenga Tata ya Lola mpo na lisungi.

Na mbalakaka nazwaka botindiki ya koloba natondi yo! Bongo nasalaki, mpe makanisi mabandaki kosopana uta na makanisi ma ngai ya makambo manso mingi nakokaki kotonda Tata na Lola mpo na yango. Esilisaki ngai kopesa Ye botondi, nasololaki na ntina ya kpokoso wana.

Nsima nayokaki kimia ya kitoko na kati ya ngai, liyoki ya molunge ya molimo ete nayebi Tata wa biso ya Lola mpe baboti ba ngai bakolingaka ngai mpe ete nazali mwana wa Nzambe. Nakokaki kosenga bolimbisi na mama wa ngai mpe kondima bolimbisi bwa ye.