2012
Fungola Moko mpo na Libota ya Esengo
sánzá ya zómi 2012


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Zomi 2012

Fungola Moko mpo na Libota ya Esengo

Elilingi
Na Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Mokomi Monene ya Mboka Russie Léon Tolstoy abandaki buku na ye Anna Karenina na maloba maye: “Mabota ya Esengo mazali nyonso lolenge moko; libota ya mawa moko moko ezali ya mawa na lolenge na yangomei.”1 Atako nazali na boyebi mpenza te ete mabota ya esengo mazali lolenge moko, nayei koyeba likambo moko oyo mabota mingi koleka ezali na yango bango banso: bazali na lolenge moko ya kolimbisa mpe kobosana mabe ya basusu mpe ya koluka bolamu.

Baye na mabota ya mawa, na ngambo mosusu, mbala mingi bamonaka libunga, bakangaka bankanda mpo na kozongisa mabe mpe bakoki mpenza te kolekisa mabe ya kala.

“Iyo, kasi …” ebandaka baoyo bazali na esengo te. “Iyo, kasi oyebi te boniboni asalaki ngai mpasi,” elobi moko. “Iyo, kasi oyebi te boniboni azali nsomo,” elobi mosusu.

Ntango mosusu bango babale bazali na bosolo; ntango mosusu moko te.

Ezali na mituya mingi ya mabe. Ezali na mituya mingi ya mpasi. Kasi nini namoni ezali ete mbala mingi tolongisaka nkanda mpe tosepelisaka motema na biso na komibetalaka masolo maye etali ntina ya basusu oyo ezali kofunda misala na bango lokola ezali ya kolimbisama te mpe ya kimoyimi atako, na mbala moko, tozali komatisa ntina ya bisomei lokola ya peto mpe ezanga elindo.

Mbwa ya Mwana Mokonzi

Ezali na lisolo moko ya kala uta ekeke ya 13 kolobelaka mwana ya mokonzi moko oyo azongaki ndako mpe akutaki mbwa na ye na makila kotangaka na elongi ya ye. Moto wana akotaki mbangu mpe, na nsomo na ye, amonaki ete mwa mwana mobali wa ye azangaki mpe mwa mbeto na ye ebalukaki. Na nkanda mwana ya mokonzi abendaki mompanga mwa ye mpe abomaki mbwa na ye. Moke nsima na yango, ayokaki elelo ya mwana mobali wa ye—mwa mwana azalaki na bomoi! Mpembeni ya mwa mwana mbwa ya zamba moko ekufa elalaki wana. Nzokande, mbwa azalaki kobatela mwana ya mwana mokonzi uta na mbwa ya zamba mobomi.

Atako lisolo liye lizali ya mawa, ezali kolakisa likambo moko. Efungoleli biso ete ekoki kosalema ete lisolo tomilobeli etali ntina nini basusu bazali na ezaleli songolo ekokani te na makambo—ntango mosusu tokolingaka kutu te koyeba makambo. Tokolingaka kutu koyoka tomindimisi na nkanda ya biso na kokangamaka na nkanda mpe nkele ya biso. Ntango mosusu bankanda yango ikoki kowumela basanza to mibu. Ntango mosusu ikoki kowumela bomoi mobimba.

Libota Likabwana

Tata moko akokaki te kolimbisa mwana wa ye ya mobali mpo apengwaki na nzela bateyaki ye. Mwana mobali azalaki na baninga oyo tata andimaki te, mpe asalaki makambo mingi ya bokeseni na nini tata wa ye akanisaki asengelaki kosala. Yango esalaki bokabwani katikati na tata mpe mwana mobali, mpe nokinoki lokola ekokaki mwana mobali, atikaki ndako mpe azongaki lisusu te. Basololaki lisusu mpenza te.

Tata amilongisaki? Ntango mosusu.

Mwana mobali amilongisaki? Ntango mosusu.

Nyonso nayebi ezali ete libota liye likabwanaki mpe likomaki na mawa mpamba te tata mpe mwana bakokaki kolimbisana te. Bakokaki te kolekisa makanisi mabe bazalaka na yango etali moko na mosusu. Batondisaki mitema mya bango na nkanda na esika ya bolingo mpe bolimbisi. Moko na moko ayibaki libaku ya kozala na nguya na bomoi ya mosusu mpo na libela. Bokabwani katikati na bango emonanaki ya bozindo mpenza mpe ya monene mpenza ete moko na moko akomaki mowumbu na molimo na esanga ya mayoki ma yemei.

Likambo ya esengo, Tata wa biso ya Seko ya bolingo mpe ya bwania na Lola apesi makoki mpo na kolonga libulu ya lolendo. Bomikabi monene mpe ya ezanga nsuka ezali likambo ya eleki monene koleka ya bolimbisi mpe ya bozongisi boyokani. Bonene na yango ezali koleka bososoli bwa ngai, kasi natatoli na motema mpe molimo mwa ngai mobimba bosolo na yango mpe nguya ya yango eluti ndelo. Mobikisi amikabaki Yemei lokola lisiko mpo na masumu ma biso. Na nzela na Ye, tozwi bolimbisi.

Libota Oyo Ekoka Ezali Te

Moto moko te kati na biso azangi lisumu. Moko na moko na biso akosalaka mabunga, lokola yo mpe ngai. Biso banso basalaka biso mabe. Biso banso tosalaka basusu mabe.

Ezali na nzela ya libonza lya Mobikisi nde tokoki kozwa bonetoli mpe bomoi ya seko. Ntango tondimi banzela na Ye mpe tolongi lolendo na biso na kolembisaka mitema mya biso, tokoki kozongisa boyokani mpe komema bolimbisi na kati na mabota ma biso mpe na bomoi na biso moko. Nzambe akosalisa biso tozala mingi na bolimbisi, mpe kozala mingi kolinga kotambola ntaka ya mibale, kozala bato yambo ya kosenga bolimbisi ata soki ntango mosusu eloko moko ezalaki mbeba ya biso te, kotia mpembeni bankanda ya kala mpe kokolisa yango lisusu te. Tozongisa botondi na Nzambe, oyo apesaki Mwana Se Moko wa Ye, mpe na Mwana, oyo apesaki bomoi bwa Ye mpo na biso.

Tokoki koyoka bolingo bwa Nzambe mpo na biso mokolo na mokolo. Esengeli biso te kokoka kopesa mwa mingi ya bisomei na bandeko ba biso lokola eteyami na loyembo “Because I Have Been Given Much”?2 Nkolo afungoli ekuke mpo na biso tolimbisama. Ekolinga te kozala bobele malamu kotia mpembeni kimoyimi mpe lolendo ya bisomei mpe kobanda kofungola ekuke epapambolama eye ya bolimbisi na baye tobundisaka—mingimingi na banso ba libota na biso?

Na nsuka, esengo ekobimaka uta na bobongi nie te kasi uta na kosalelaka mibeko mya Nzambe, ata na mwa eteni. Bokambi bwa Yambo mpe Bapostolo Zomi na Babale basakolaki: “Esengo na bomoi bwa libota esengeli mingimingi kokokisama ntango etongami likolo mya mateya ma Nkolo Yesu Klisto. Mabala mpe mabota ya elonga matiami mpe mabatelami na mibeko ya bondimi, losambo, boyamboli, bolimbisi, limemia, bolingo, mawa, mosala, mpe milulu mya bosakani ya malonga.3

Bolimbisi etiama mpenza na katikati ya babosolo oyo ya petepete, etongami likolo lya mwango mwa esengo ya Tata ya Lola. Mpamba te bolimbisi ekangisaka mibeko, ekangisaka bato. Ezali fungola, ekofungolaka bikuke bikangama, ezali ebandeli ya nzela ya bosembo, mpe ezali moko ya elikia ya biso ya malamu mingi koleka mpo na libota ya esengo.

Tika ete Nkolo akoka kosalisa biso kolimbisa mingi koleka mabota na biso mingi kolimbisanaka, mpe ntango mosusu mingi kolimbisaka kutu bisomei. Nasambeli ete tokoka koyeba bolimbisi lokola nzela moko ya kitoko na oyo wapi mabota mingi ya esengo makokani.

Matangi

  1. Leo Tolstoy, Anna Karenina, trans. Constance Garnett (2008), 2.

  2. “Because I Have Been Given Much,” Hymns, no. 219.

  3. “The Family: A Proclamation to the World,” Liahona, Sanza ya Zomi. 2010, 129; mongwa ebakisami.

Koteya uta na Etinda Oyo

Ntango ozali kolengela liteya moko na moko, omituna boniboni mobeko ezali lokola likambo moko bato ba libota bakutanaki na yango na bomoi bwa bango” (Teaching, No Greater Call [1999], 171). Kanisa kobengisa bato ba libota kokabola makambo malamu bazwi to bamoni na bolimbisi. Solola na ntina ya makambo maye, kobetaka sete na mapamboli ma bolimbisi. Sukisa na kopesaka litatoli lya motuya ya kolimbisana.