2012
Kokumisa Mayokani ma Biso
sánzá ya zómi 2012


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya Zomi 2012

Kokumisa Mayokani ma Biso

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Kotala mpe koteya ezali ndakisa ya boyekoli bwa biso mpe nzela moko mpo na kokumisa mayokani ma biso ntango tozali kosalisa mpe kolendisana. Liyokani ezali elaka ya bule mpe ya kowumela katikati ya Nzambe mpe bana ba Ye. “Ntango tososoli ete tozali bana tozali bana ya liyokani, toyebi banani tozali mpe nini Nzambe azali kozela na biso,” elobaki Mpaka Russell M. Nelson wa Bapostolo Zomi na Babale. “Mobeko mwa ye mokomami na mitema mya biso. Ye azali Nzambe wa biso mpe tozali bato ba Ye.”1

Lokola bamama bateyi mpe batali tokoki kolendisa baye tokendaka kotala na makasi ma bango mpo na kobatela mayokani ma bango ya bule. Na kosalaka yango, tosungi bango komilengela mpo na mapamboli ma bomoi bwa seko. “Ndeko mwasi moko na moko na Eklezia oyo asali mayokani elongo na Nzambe azali na etinda mpo na kobikisa milimo, kokamba basi ba mokili, kolendisa bandako ya Siona, mpe kotonga bokonzi bwa Nzambe,”2 elobaki Mpaka M. Russell Ballard wa Bapostolo Zomi na Babale.

Wana ezali biso kosala mpe kobatela mayokani ma bule, tokomi bisalele na maboko ma Nzambe. Tokokoka kokangisa bondimi bwa biso mpe kolendisa bondimi ya moko na moko na Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

Uta na Makomi

1 Nefi 14:14; Moziya 5:5–7; 18:8–13; Doctrine and Covenants 42:78; 84:106

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Tempelo ezali “esika ya bozongisi botondi mpo na basantu banso,” Nkolo alakisaki na Profeta Joseph Smith na 1833. Ezali “esika moko ya boteyi mpo na banso baye babiangemi na mosala na mabiangi kilikili mpe misala mya bango; ete bakoka kobongisama nie na bososoli bwa mosala mwa bango, na bwania, na mobeko, mpe na malongi, na makambo manso matali bokonzi bwa Nzambe na mabele” (D&C 97:13–14).

Bandeko basi ba Lingomba ya Bamama Basungi na Nauvoo, Illinois, na ebandeli ya mibu 1840 basunganaki kolengela mpo na makuli ma tempelo. Na makuli ma bonganganzambe ya likolo koleka maye Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazwaki na Tempelo ya Nauvoo, “nguya ya bonzambe [ezalaki] komonana na miso” (D&C 84:20). “Wana ezalaki Basantu ba Mikolo mya Nsuka kobatela mayokani ma bango, nguya eye ezalaki kolendisa mpe kosunga bango na nzela ya mimekano na mikolo mpe mibu mya nsima.”3

Na Eklezia lelo, basi mpe babali ya botongono na mokili mobimba bakosalaka na tempelo mpe bazali kokoba kozwa bokasi na mapamboli maye makoki kozwama bobele na nzela ya mayokani ma tempelo.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Covenants,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2011, 88.

  2. M. Russell Ballard, “Women of Righteousness,” Liahona, Sanza ya Zomi na mibale 2002, 39.

  3. Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 153.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  • Boniboni mayokani ma ngai malendisi ngai?

  • Boniboni nazali kosunga bandeko basi nazali kokengela kobatela mayokani ma bango?