2013
Ekokaki Ngai Kokabola Buku ya Mormon?
December 2013


Bilenge

Ekokaki Ngai Kokabola Buku ya Mormon?

Mokomi afandaka na Washington, Etazini ya Amerika.

Na mobu na ngai ya yambo na eteyelo ya bakolo, motei na ngai ya seminele asengaki kelasi na ngai epesa Babuku ya Mormon na baninga oyo bazali bandimi te. Ata kutu nazalaki moto ya nsoni mingi mpenza, nandimaki bobiangi yango.

Ezwaki ngai mikolo mibale mpo na kosangisa mpiko, kasi na nsuka napesaki moninga na ngai Britny buku na ngonga ya elambo mpe napesaki litatoli moko ya mokuse. Britny atondaki ngai mpo na buku yango.

Na nsuka ya mobu ya eteyelo wana, Britny alongwaki, kasi totikalaki se kokutana. Azalaki koyebisa ngai na ntina ya eteyelo na ye ya sika mpe lolenge nini pene ya baninga na ye banso bazalaki bandimi ya Eklezia, kasi asololaki mokolo moko te na ntina ya likambo moko ya molimo elongo na ngai.

Eye wana ebongwanaki yambo nakende na misio. Nazwaki nsango uta na Britny kolobaka ete azalaki na nsango moko monene mpo na ngai: alingaki kobatisama, mpe alingaki kotonda ngai mpo na kozalaka moninga na ye mpe na kotiaka ndakisa malamu.

Nzambe azwaki elenge mobali ya mibu 15 na mayele moko te ya misio mpe akambaki ye mpo na kokabola nsango malamu elongo na moto moko oyo Ye ayebaki akondima yango. Nayebi ete na koyokelaka Molimo, tokoki banso komona bato nzinganzinga na biso oyo bazali kozela mpo na koyekola oyo etali nsango malamu ezongisami. Nayebi ete soki tosalisi na komemaka ata moto moko na Nkolo, “boniboni monene ekozala bosepeli [na biso] elongo na ye [mobali to mwasi] na bokonzi ya Tata [na biso]!” (D&C 18:15).