2013
Bokabalo Litatoli na Bino
December 2013


Bana

Bokabalo Litatoli na Bino

Bokoki kokabola likabo ya nsango malamu na Eyenga oyo ya bokundoli mbotama ya Klisto na kopesaka moninga to moninga ya penepene Buku ya Mormon moko na litatoli na bino ekomama na kati. Bolanda nzela eye epesami awa mpo na kolengela yango:

  1. Likolo ya eteni moko ya lokasa, bomekola rekitangele moko ya biteni 4½ x 6½ to pene ya cm 11½ x 16½ mpe bosenga mokolo moko asalisa bino kokata yango.

  2. Bobakisa elilingi na binomei—ezala liyemi to foto—na nsonge ya lokasa ya Buku.

  3. Bokoma litatoli na bino na nse ya elilingi na bino.

  4. Bosenga mokolo moko asalisa bino kobamba lokasa yango na eteni ya kati ya lokasa ya libanda ya Buku ya Mormon.