2013
Libota mpe Baninga mpo na Libela
December 2013


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2013

Libota mpe Baninga mpo na Libela

Elilingi
Mokambi Henry B. Eyring

Bipai nyonso wapi bofandi, bozali na baninga oyo bazali koluka esengo monene koleka oyo bozwi na kosalelaka nsango malamu ezongisami ya Yesu Klisto. Bakoki kozala na makoki ya kolimbola esengo wana na maloba te, kasi bakoki koyeba lisusu yango ntango bazali komona yango na bomoi na bino. Bakozala motema moto moto mpo na koyekola nzela ya esengo wana, mingimingi ntango bazali komona ete bozali kokutana na mimekano se moko wana kaka lokola bango.

Lokola bobatelaki mitindo ya Nzambe boyoki esengo. Oyo wana ezali mbuma elakelami mpo na kosalelaka nsango malamu (tala Moziya 2:41). Botosaka mitindo ya Nkolo na botongono mpo bamona bino na bato mosusu te, kasi baoyo bazali komona esengo na bino bazali kolengelemisama na Nkolo mpo na koyoka nsango ya Bozongisi ya nsango malamu.

Mapamboli bosili kopesama esali to ekeli masengisi mpe mabaku kitoko mpenza mpo na bino. Lokola bayekoli ya liyokani ya Yesu Klisto, bosengisami kotandola na basusu libaku ya komona esengo ebakisami, mingimingi epai ya baninga na bino mpe bato ya libota na bino.

Nkolo amonaki libaku na bino mpe alimbolaki masengisi na bino elongo na motindo oyo: “Esengeli ete moto nyonso oyo asili kokebisama akebisa moninga na ye ya penepene.” (D&C 88:81).

Nkolo akomisi motindo wana pete koleka mpo na kotosa na nzela ya mbongwana oyo esalemaka na motema na bino ntango boyambi mpe bozali kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto. Lokola mbano, bolingo na bino mpo na basusu ekokola, lolenge moko mpe mposa na bino mpo na bango ete bazwa esengo se moko oyo bozali na yango.

Ndakisa moko ya mbongwana wana ezali lolenge boni boyambaka libaku ya kosalisa kati na mosala ya misionele ya Nkolo. Bamisionele ya ntango mobimba bayekolaka nokinoki ete bakoki kozela uta na mobongwani ya solo eyano ya malamu ntango basengi bango moto ya koteya. Babongwami bazali na mposa makasi ya baninga mpe bato ya libota ya kokabola esengo na bango.

Ntango mokambi ya misio ya palwasi na bino to bamisionele basengi bankombo ya moto ya koteya, ezali likambo ya bozongisi matondi manene mpo na yo. Bayebi ete baninga bamoni esengo na bino mpe, boye, baninga wana basili kolengelema mpo na koyoka mpe kopona kondima nsango malamu. Mpe bazali na elikya ete okozala moninga bakozala na ye mposa ntango bakokota kati na bokonzi.

Bosengeli kobanga te ete bokobungisa baninga na kobengisaka bamisionele kokutana na bango. Nazali na baninga oyo babwakisaki bamisionele kasi batondi ngai mibu mingi nsima mpo na kopesaka bango eloko bayebaki ezalaki ya motuya mpenza epai na ngai. Bokoki kosala baninga mpo na libela na kopesaka bango nsango malamu, oyo bamoni ememeli bino esengo. Bozangisa mokolo moko te libaku ya kobengisa moninga mpe mingimingi moto moko ya libota apona kolanda moango ya esengo.

Ezali na libaku moko monene te ya kobengisa moninga wana koleka kati na batempelo ya Eklezia. Kuna Nkolo akoki kopesa makuli ya lobiko na bankoko na biso oyo bakokaki kozwa yango na bomoi te. Bazali kotalela bino na bolingo mpe elikya. Nkolo alaki ete bakozwa libaku ya kokota na bokonzi na Ye (tala D&C 137:7–8), Ye mpe aloni bolingo mpo na bango na mitema na bino.

Mingi kati na bino bayoki bosepeli na kopesaka makuli ya tempelo epai na basusu, kaka lokola ezali bino kosala ntango bozali kopesa bankombo ya bato mpo na kokutana na bamisionele. Boyoki kutu bosepeli monene koleka na kosalaka makuli mpo na bankoko na bino. Ebimisamaki na Profeta Joseph Smith ete esengo na biso ya seko ekoki kosalema bobele soki topesi nzela na lipamboli wana na bankoko na biso na nzela ya makuli ya bozweli na tempelo (tala D&C 128:18).

Eyenga ya bosepeli mbotama ya Yesu ebalusaka mitema na biso epai ya Mobikisi mpe na bosepeli oyo nsango malamu na Ye ememeli biso. Tolakisaka matondi na biso epai na Ye malamu koleka nyonso ntango topesaka esengo wana na basusu. Botondi ebongwanaka bosepeli ntango tozali kopesa bankombo na bamisionele mpe ntango tozali komema bankombo ya bankoko na biso na tempelo. Solo wana ya botondi na biso ekoki kosala baninga mpe mabota oyo ewumelaka libela.

Koteya uta na Etinda oyo

Mokambi Eyring alimboli ete tokoki kolakisa matondi na biso mpo na Mobikisi na kokabolaka nsango malamu elongo na basusu. Bokoki kosolola na baye bozali koteya lolenge nini likabo ya nsango malamu epamboli bomoi na bango. Bokanisa kobengisaka bango mpo na komona na losambo baye elongo na bango balingi kokabola likabo ya nsango malamu mpe lolenge bakoki kosala bongo.