2013
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mwana Mobotami Se Moko
December 2013


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Zomi na Mibale 2013.

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mwana Mobotami Se Moko

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na biso ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baye bozali kokengela na nzela mateya ya bamama? Mpo na kozwa nsango mingi koleka kende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Mobikisi na biso, Yesu Klisto, abiangami Mwana Mobotami se Moko mpamba te Ye azali moto bobele moko awa na mabele oyo abotamaki na mama moko ya kufa mpe na Tata moko azanga kufa. Asangolaki banguya ya bonzambe uta na Nzambe, Tata na Ye. Uta na mama na Ye, Malia, Asangolaki bokufi mpe akonzamaki na nzala, mposa ya mai, bolembi, mpasi, mpe liwa.1

Lokola Yesu Klisto azali Mwana Mobotami se Moko ya Tata, Azalaki na makoki ya kopesa bomoi na Ye mpe ya kozwa yango lisusu. Makomi mateyi ete “Na bomikabi bwa Klisto,” biso “tozwi bosekwi” (Yakobo 4:11). Toyekoli lisusu ete banso “tokokaki kotombwama na bozangi kufa likolo ya bomoi ya seko” soki biso “tokolinga kondima” (D&C 29:43).

Wana ekoya biso kososola mobimba mingi koleka maye elingi koloba mpo na Yesu kozala Mwana Mobotami se Moko, bondimi na Klisto ekobakisama. Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale alobaki ete, “Bondimi na Yesu Klisto ezali bondimi ya se ya motema mpe bosolo ya (1) Ezalela na Ye ya Mwana Mobotami se Moko ya Nzambe, (2) Bomikabi ezangi nsuka na Ye, mpe (3) Bosekwi bwa nzoto na Ye.”2 Baprofeta ya ntango ya sika batatoli ete: “[Yesu Klisto] azalaki … Mwana Mobotami se Moko na mosuni, Mosikoli ya mokili.”3

Uta na Makomi

Yoane 3:16; Doctrine et Alliances 20:21–24; Mose 5:6–9

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Na Boyambi ya Sika totangi na ntina ya basi, bayebani nkombo mpe bayebani nkombo te, oyo basalelaki bondimi na Yesu Klisto, bayekolaki mpe basalelaki na bomoi mateya na Ye, mpe batatolaki na ntina ya mosala, makamwisi, mpe bokonzi na Ye. Basi oyo bakomaki bayekoli ya ndakisa mpe banzeneneke minene na mosala ya lobiko.

Ndakisa, Malata apesaki litatoli makasi ya bonzambe mpo na Mobikisi ntango alobaki na Ye ete, “Najali kondima ete ojali Klisto, Mwana na Njambe oyo ajali koya na mokili” (Yoane 11:27).

Boko ya banzenenekene ya ebandeli mpenza ya bonzambe ya Mobikisi ezalaki mama wa Ye, Malia, mpe ndeko na ye Elisabeta. Ntango moke nsima anzelu Gabaliele atalaka Malia, ye akedaki kotala Elisabeta. Mbala moko ntango Elisabeta ayokaki mbote, ye “atondisamaki na Molimo Mosanto” (Luka 1:41) mpe apesaki litatoli ete Malia akokoma mama ya Mwana wa Nzambe.

Matangi

  1. Tala Principes de l’Evangile (2009), 52–53.

  2. D. Todd Christofferson, “Building Faith in Christ,” Liahona, sanza ya libwa 2012, 13.

  3. “The Living Christ: The Testimony of the Apostles,” Liahona, Sanza ya minei 2000, 2–3.