2017
Mwa koseka Ekoki Kosala Bokeseni
sánzá ya yambo 2017


Bilenge

Mwa koseka Ekoki Kosala Bokeseni

Mokambi Uchtdorf akesenisi bantina mibale tosengeli kozala na yango mpo na misala na biso: kolinga Nzambe mpe baninga na biso bato. Kasi ntango mosusu ezali kaka te pete kolinga basusu. Na bomoi na bino mobimba, ekoki kozala na bangonga ntango bomonaka yango mpasi mpo na kosolola na basusu—ntango mosusu moto moko azokisaki bino to bozali kosolola malamu te to koyokana te na moto moko. Na bangonga oyo, bomeka komikundola bolingo boyokaki uta na baninga, libota, Tata na Lola, mpe Yesu Klisto. Bomikundola esengo boyokaki na ntango wana mpe bomeka kokanisa soki moto nyonso azwaki libaku ya koyoka bolingo ya boye. Bomikundola ete moto nyonso azali mwana mwasi to mwana mobali ya Nzambe mpe asengeli na nyonso mibale ya Ye mpe ya bino bolingo.

Bokanisa na moto moko ya ndenge na bomoi na bino oyo bozalaki na mpasi mpo na koyokana na ye. Botia bango na nsambo na bino mpe bosenga Tata na Lola afungola motema na bino mpo na bango. Bokobanda noki komona bango lolenge Ye amonelaka: lokola moko ya bana na Ye oyo abongi na bolingo.

Nsima ya losambo, bosala likambo moko ya kitoko mpo na bango! Ntango mosusu bobengisa bango na molulu ya Bokaboli to kokende kotambola elongo na baninga. Bopesa lisalisi na lotomo moko. Kutu boloba kaka “mbote” mpe bosekisa bango moke. Makambo mike ekoki kosala bokeseni monene … na bomoi na biso nyonso mibale!