2017
Ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi
sánzá ya yambo 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Yambo 2017

Ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofulami mpo na koyeba maye bosengeli koteya.

Bondimi, Libota, Lisungi

Ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi ezali “kolengela basi mpo na mapamboli ya bomoi ya seko,” elobaki Linda K. Burton, Mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.1 Ezali na nzela ya bondimi, libota, mpe lisungi nde tomikotisaka na ya biso “eteni ya ntina na mosala.”2

Lingomba ya Bamama Basungi “ezali mosala ya ntango mpe ya molimo,” elobi Carole M. Stephens, Mopesi toli ya Yambo na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. “Wana ezali oyo basi basalaki na mokolo ya Mobikisi, mpe wana ezali oyo tozali kokoba kosala.”3

Ntango tozali kotala mwasi ya Mosamalia na libulu ya mayi, oyo atikaki mbeki na ye ya mayi mpe akimaki mpo na koyebisa basusu ete Yesu azalaki profeta (tala Yoane 4:6–42), to epai ya Foibe, oyo na esengo asalisaki basusu na bomoi na ye mobimba (tala Baloma 16:1–2), tomoni bandakisa mingi ya basi na mokolo ya Mobikisi oyo basalaki mingi na koyaka epai ya Yesu. Ezali Ye nde afongolaka nzela na biso ya bomoi ya seko (tala Yoane 3:16).

Ntango tozali kokanisa bapionie na biso ya bandeko basi na Nauvoo, Illinois, oyo basanganaki na ndako ya Sarah Kimball na 1842 mpo na kosala libongisi na bangomei, tomoni mwango ya Nzambe ya kofandisaka Lingomba ya Bamama Basungi mpe kolandaka mibeko ya bonganganzambe. Nsima Eliza R. Snow akomaki mobeko mokonzi, Profeta Joseph Smith azongelaki yango. Asosolaki ete Eklezia ebongisamaki mobimba te kino basi babongisamaki. Alobaki ete Nkolo andimaki likabo na bango kasi ete ezalaki na likambo moko ya malamu koleka. “Nakobongisa na nse ya bonganganzambe nsima ya libongisi ya bonganganzambe,” ye alobaki.4

“Lingomba ya Bamama Basungi ezalaki mpamba te liboke ya bamama komekaka kosala malamu na mokili. Ezalaki ya kokesena. Ezalaki ‘eloko moko malamu koleka’ mpo ete ebongisamaki na likoki ya bonganganzambe. Libongisi na yango ezalaki litambe esengeli na bofungoli mosala ya Nzambe na mabele.”5

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Doctrine et Alliances 25:2–3, 10; 88:73; reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. Linda K. Burton, na Sarah Jane Weaver, “Relief Society Celebrates Birthday and More March 17,” Church News, Sanza ya misato 13, 2015, news.lds.org.

  2. Linda K. Burton, na Weaver, “Relief Society Celebrates Birthday.”

  3. Carole M. Stephens, na Weaver, “Relief Society Celebrates Birthday.”

  4. Joseph Smith, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 11–12.

  5. Daughters in My Kingdom, 16.

Bolanda Oyo

Lolelenge nini Lingomba ya Bamama Basungi ezali kosalisa basi bakokisa mosala ya bonzambe ya Tata na Lola mpe kokamba bango na bomoi ya seko?