2017
Cible!
sánzá ya yambo 2017


Bana

Cible!

Mokambi Uchtdorf alobi ete nsango malamu ezali lokola kosala mosala ya kobwaka na cible. Tosengeli kobwaka na katikati ya biloko moko ya motuya koleka. Mitindo ya motuya koleka mpenza ezali kolinga Nzambe mpe kolinga basusu. Soki totie makanisi na makambo mibale oyo, tokoki kobeta cible ntango nyonso!

Boyema cible monene na eteni ya lokasa. Bosenga moboti moko atangela bino molongo oyo elandi Soki eloko moko na molongo ezali likambo moko oyo esalisaka biso tolakisa bolingo na biso mpo na Nzambe mpe basusu, nde bokoma to boyema yango na katikati ya cible.

Bokabola bisaneli na bino.

Boyiba Bonbon

Bokende Eklezia

Bobenga moto moko na nkombo alingaka

Boloba nsambo na bino

Boyambana na moto moko

Bobunda na ndeko na bino