2017
Kobwaka na Katikati
sánzá ya yambo 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Yambo 2017

Kobwaka na Katikati

Kala te, nazalaki kotala liboke moko ya bato kobetaka lisano ya kobwaka likonga. Kaka na kotalaka, emonanaki polele na ngai ete soki olingi koyeba kosalela nguba mpe likonga, ekozwaka ntango mpe mosala.

Nandimi te ete okoki kokolisa koyebana mpo na kozala mobwaki likonga monene na kobwakaka na efelo moko ya mpamba mpe nsima koyemaka bacible nzinganzinga ya makonga. Esengeli koyekola ntoki ya komonaka cible mpe kobetaka katikati na yango.

Kopakola langi na Bacible

Kobetaka yambo mpe koyemaka cible na nsima ekoki komonana lokola ezanga ntina, kasi ntango mosusu biso moko tolakisaka ezaleli wana mpenza na makambo mosusu ya bomoi.

Lokola bandimi ya Eklezia, tozali na momesano ya komikanga na bapologami, mituna, mpe kutu malongi ya nsango malamu oyo emonanaka lokola ya litomba, ntina, to ya kosepelisa epai na biso. Tomekaka koyema bacible nzinganzinga na yango, kosalaka ete biso tondima ete tozali kobwaka na katikati ya nsango malamu.

Oyo ezali pete na kosala.

Na mibu nyonso oyo tozwi toli mpe bofuli malamu uta na baprofeta ya Nzambe. Tozwi lisusu boyangeli mpe bolimboli uta na babobimisi buku, babuku ya malako, mpe mikanda mingi ya Eklezia. Tokoki na pete kopona mama na likambo na biso ya nsango malamu tolingaka mingi, koyema cible na katikati nzinganzinga na yango, mpe kokanisa ete tomoni katikati ya cible ya nsango malamu.

Mobikisi Alimboli

Oyo ezali kaka te likambo ya moko na mokolo na biso ya lelo. Na kala, bakambi ya mosala ya Nzambe bazalaki kolekisa ntango mingi mpenza kosangisaka, kosalaka milongo, mpe kolobelaka nini kati na bankama ya mitindo ezalaki ntina mingi mpenza.

Mokolo moko liboke ya basava ya mosala ya Nzambe bamekaki kobenda Mobikisi kati na ntembe. Basengaki ye akata likambo moko likolo na yango moke bakokaki kondima.

“Molakisi,” batunaki Ye, “mobeko nini eleki monene kati na Mibeko nyonso?”

Banso toyebi lolenge nini Yesu ayanolaki: “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo mobimba, mpe na makanisi na yo mobimba.

“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.

“Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.

“Mibeko nyonso mpe masakoli makakemi na mibeko oyo.”1

Nasengi botanga molongo ya nsuka: “Mitindo esimbi nyonso mitindo mpe masakoli.

Mobikisi bobele alakisaki biso cible te, kasi Akitolaki yango lisusu.

Kobetaka Cible yango

Lokola bandimi ya Eklezia, toyokanaka kozwa likolo na bisomei nkombo ya Yesu Klisto. Kati na liyokani wana ezali na bososoli ete tokosala makasi toyekola oyo etali Nzambe, kolinga Ye, kobutisa bondimi na biso kati na Ye, kotosa Ye, kotambola na nzela na Ye, mpe kotelema sikisiki lokola banzeneneke na Ye.

Mingi tokoyekola oyo etali Nzambe mpe koyoka bolingo na Ye mpo na biso, mingi tokososola ete libonza ya nsuka ya Yesu Klisto ezali likabo ya bonzambe ya Nzambe. Mpe bolingo ya Nzambe efulaka biso mpo na kosalela nzela ya boyamboli ya solo, oyo ekokamba na likamwisi ya bolimbisi. Nzela oyo epesaka biso likoki ya kozala na bolingo mpe mawa monene mpo na baye bazali nzinganzinga na biso. Tokoyekola komona koleka mosika bankombo. Tokotelemela momekano ya kofunda to kosambisa basusu na masumu, mbeba, mabe, bamposa ya politiki, babondimeli Nzambe, bikolo, to langi ya loposo na bango.

Tokomona moto nyonso tokutani na ye lokola mwana ya Tata na biso na Lola—ndeko na biso ya mobali to ya mwasi.

Tokosembola loboko na basusu na bososoli mpe bolingo—kutu na baoyo bakoki kozala pete te mpo na kolinga. Tokolela elongo na baoyo bazali kolela mpe kolendisa baoyo bazali na mposa ya libondi.2

Mpe tokososola ete tosengeli te koniokwama na ntina ya cible ya nsango malamu ya malamu.

Mitindo minene nyonso mibale ezali cible. Mitindo nyonso mpe masakoli makangemi na mibeko oyo.3 Ntango tondimi oyo, makambo nyonso mosusu ekososolama engebene na ntina na yangomei.

Soki ntina, makanisi, mpe babokasi na biso ya yambo etiami na katikati na kobutisa bolingo na biso mpo na Nzambe na Nguya Nyonso mpe kosembolaka mitema na biso epai ya basusu, tokoki koyeba ete tomoni cible ya solo mpe tozali kobwaka na katikati na yango—kokomaka bayekoli ya solo ya Yesu Klisto.

Koteya uta na Etinda Oyo

Liboso ya koteya etinda oyo, bokoki koyemba “Divin amour” (Cantiques, no. 59). Botala lolenge nini bokoki kolendisa baoyo boteyaka bakanisa na “bacible” na bomoi na bangomei. Bokoki koluka banzela mpo na kosala ete mitindo minene nyonso mibale—“kolinga Nkolo Nzambe na yo” mpe “kolinga bato ya penepene lokola yomei” (tala Matai 22:37, 39)—ezala ntango nyonso kokamba misala na bango. Bokoki lisusu kokabola banzela ya ndenge ya bino moko na yango bofandiseli bomoi na binomei likolo ya Klisto mpe kokabola litatoli ya lolenge nini yango epamboli bino.