2017
Kolisaka Basusu kati na Bondimi
April 2017


Bilenge

Kolisaka Basusu kati na Bondimi

Mokambi Uchtdorf alobi na biso ete bondimi kati na Nzambe esengeli kozala “elongo na mosala.” Ntango bondimi na biso ezali “elongo na mosala ya sikisiki,” alimboli, yango “etondisaka … molimo na kimia mpe bolingo.” Na elaka ya lipamboli oyo, biso tokoki kosala bokeseni, mpe tokoki komona yango kati na bomoi na biso soki tozwi ntango ya kosala mosala etonda na bondimi. Tokoki kosambela ntongo nyonso mpo na kosenga Nkolo lisalisi kati na kosalisaka basusu. Na ndakisa, senga Ye alakisa yo ntango eye ndeko moko ya mobali to mwasi azali na bosenga ya lisungi ya mosala to ntango moninga azali na mposa ya lilendisi. Nsima, ntango okozwa eyano, salela yango! Soki bosali nsambo oyo mpe lisalisi oyo momesano, nde mosala na bino ya bondimi, ya sikisiki ekopambola bomoi na bino mpe bomoi ya basusu. Mokambi Uchtdorf alaki ete bino “bokoki kobongola bato, mabota, bikolo, mpe mokili.”