2017
Bolapi Ndayi mpe Boyokani ya Bonganganzambe
April 2017


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Minei 2017

Bolapi Ndayi mpe Boyokani ya Bonganganzambe

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli ya koyeba nini bosengeli kokabola. Lolenge nini kososolaka ntina Lingomba ya Bamama Basungi ezali kolengela bana basi ya Nzambe mpo na mapamboli ya bomoi ya seko?

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi, Libota, Lisungi

Mingi kati na biso lokola bandeko basi tokososola ete bolapi ndayi mpe boyokani ya bonganganzambe ezali mpo na biso mpenza, mingi tokoyamba mapamboli mpe bilaka ya bonganganzambe.

Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alobaki, “Moto nyonso oyo asalaki mayokani ya bule na Nkolo mpe oyo akumisi mayokani yango abongisami koyamba emoniseli na ye moko mpenza, kopambolama na mosala ya banzelu, kosangana na Nzambe, koyamba botondisami ya nsango malamu, mpe, na nsuka ya nyonso kokoma basangoli pembeni ya Yesu Klisto na nyonso Tata azali na yango.”1

Mapamboli mpe bilaka ya kolapa ndayi mpe liyokani ya bonganganzambe ezali mpo na mibali mpe basi lokola. Ndeko mwasi Sheri L. Dew, mopesi toli ya kala na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi , alobaki, “Bofuluki ya bonganganzambe oyo ezali kati na makuli ya likolo koleka ya ndako ya Nkolo ekoki kozwama bobele na mobali mpe mwasi elongo.”2

Ndeko mwasi Linda K. Burton, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, abimisi libiangi oyo, “Nabengisi bino bokanga na motema bolapi ndayi mpe boyokani ya bonganganzambe, oyo ekoki kozwama na Doctrine et Alliances 84:33–44. Na kosalaka bongo, nalaki bino ete Molimo Mosantu akobutisa bososoli na bino ya bonganganzambe mpe akofula mpe kotombola bino na ndenge ya kafukafu.”3

Malakisi ya Joseph Smith epai ya Lingomba ya Bamama Basungi ezalaki na ntina ya kolengela basi mpo na “koya kozwa mabaku & mapamboli & makabo ya bonganganzambe.” Oyo ekokokisama na nzela ya makuli ya tempelo.

“Makuli ya tempelo [ezali] makuli ya bonganganzambe, kasi yango epesaka [mpenza] te mosala ya eklezia na mibali to basi. [Makuli oyo ekokisaka] elaka ya Nkolo ete bato na ye—basi mpe mibali—bako ‘latisama na nguya uta na likolo’ [D&A 38:32].”4

Makomi mpe Nsango ya Kobakisa

Doctrine et Alliances 84:19–40; 121:45–46; reliefsociety.lds.org

Matangi

  1. M. Russell Ballard, “Men and Women and Priesthood Power,” Liahona, Sanza ya Libwa 2014, 36.

  2. Sheri L. Dew, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 128.

  3. Linda K. Burton, “Priesthood Power—Available to All,” Ensign, Sanza ya Motoba. 2014, 39–40.

  4. Mateya ya Nsango Malamu, “Joseph Smith’s Teachings about Priesthood, Temple, and Women,” topics.lds.org.