2017
Bayengebeni Bakobika na Bondimi
April 2017


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Minei 2017

Bayengebeni Bakobika na Bondimi

Moteyi mpe Mosali Sabuni

Ezali na lisese moko ya kala ya Bayuda etali mosali sabuni oyo andimelaki Nzambe te. Mokolo moko ntango azalaki kotambola elongo na moteyi moko, alobaki, “Ezali na eloko moko nakokaka kososola te. Tozali na mambi ya Nzambe mibu ebele eleki. Kasi bisika nyonso okotala mabe ezangi te, kaniaka, bozangi sembo, bozangi boyengebeni, mpasi, nzala, mpe bozui na makasi. Emonisami ete mambi ya Nzambe ebongoli mokili ata moke te. Yango wana natuni bino, ezali ntina nini?”

Moteyi ayanolaki eloko te mpo na mwa ngonga kasi akobaki kotambola elongo na mosali sabuni. Na nsuka bakomaki pene ya libanda ya masano wapi bana, batonda na putulu, bazalaki kosakana kati na bosoto.

“Ezali na eloko moko nazali kososola te,” moteyi alobaki. “Tala bana wana. Tozali na sabuni uta mibu ebele, kasi bana wana bazali na bosoto. Sabuni ezali na ntina nini?”

Mosali sabuni ayanolaki, “Kasi moteyi, ezali malamu te kopamela sabuni mpo na bana ya mbindo oyo. Sabuni esengeli esalelama yambo esala mosala na yango.”

Moteyi asekaki moke mpe alobaki, “Ya solo.”

Boniboni Tokobikela?

Apostolo Paulo, kotangaka profeta ya Boyambi ya Kala, alobaki na mokuse nini elingi koloba kozala mondimi ntango akomaki, “Moyengebeni akobika mpo na bondimi” (Baloma 1:17).

Ntango mosusu kati na maloba ya pete oyo tososoli bokeseni kati na mambi ya Nzambe oyo ezali petepete mpe makasi te mpe moko oyo ezali na nguya ya kobongola bomoi.

Kasi mpo na kososola oyo elingi koloba kobika mpo na kondima, tosengeli kososola bondimi ezali nini.

Bondimi ezali mingi koleka boyambi. Ezali elikia mobimba kati na Nzambe oyo ekendaka elongo na mosala.

Ezali mingi koleka kolinga.

Ezali mingi koleka kaka kofandaka, koningisaka mito na biso, mpe kolobaka tondimi. Ntango tolobaka “moyengebeni a kobika mpo na bondimi,” tolingi koloba tokambami mpe toyangelami na bondimi na biso. Biso tosalaka na lolenge moko oyo ekokani na bondimi na biso—mpo na botosi ezanga makanisi te kasi mpo na bolingo ya yomei mpe ya bosembo mpo na Nzambe na biso mpe mpo na bwanya ya motuya oyo Ye abimisi epai ya bana na Ye.

Bondimi esengeli ekende elongo na mosala; soki te ezali na bomoi te (tala Yakobo 2:17). Ezali bondimi mpenza te. Ezali na nguya ya kobongola ata moto moko te, kotika mokili yango moko.

Mibali mpe Basi ya bondimi batiaka elikya kati na Tata na bango ya Lola ya ngolu—kutu na ntango ya bangonga ya ntembe, kutu na ntango ya bangonga ya motatabano mpe ya motungisi ntango bakoki te komona malamu to kososola na polele.

Mibali mpe basi ya bondimi na nsai batambolaka na nzela ya kimoyekoli mpe basalaka makasi mpo na kolanda ndakisa ya Mobikisi na bango ya bolingo, Yesu Klisto. Bondimi etindikaka mpe, solo, efulaka biso tobalola mitema na biso epai ya lola mpe kosembola loboko, kotombola, mpe kopambola baninga na biso bato.

Mambi ya Nzambe ezanga mosala ezali lokola sabuni oyo etikali kati na egbokoso (carton). Ekoki kozala na likoki kitoko, kasi na solo ezali na nguya moke ya kosala bokeseni kino ekokisa ntina na yango esalelama. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nsango malamu ya mosala. Eklezia ya Yesu Klisto eteyaka mambi ya Nzambe ya solo lokola nsango ya elikya, bondimi, mpe bolingani, kobakisaka kosalisaka basusu kati na banzela ya molimo mpe ya ntango.

Mwa basanza eleki, mwasi na ngai, Harriet, mpe ngai tokendeki mobembo moko ya libota elongo na bana na biso misusu na bamboka ya Mediterrané. Totalaki ba ngada ya bapaya mpe tokutanaki na mabota ewutaki na bamboka enielengena na bitumba. Bato oyo bazalaki ya bondimi na biso te, kasi bazalaki bandeko na biso ya mibali mpe basi mpe bazalaki na mposa ya lisalisi ya kozela te. Mitema na biso esimbamaki na mozindo ntango tomonaki bisomei lolenge bondimi ya mosala ya bandimi ya Eklezia na biso ememaka lisalisi, lisungi, mpe elikya epai ya baninga na biso bato oyo bakeleli, kotalaka mambi ya Nzambe, ekolo, to bobokoli na bango te.

Bondimi elongo na mosala ya sikisiki etondisaka motema na boboto, motema ya bwanya mpe ya kososola, mpe molimo na kimia mpe bolingo.

Bondimi na biso ekoki kopambola mpe kotindika na bosembo baye bazali nzinganzinga na biso mpe biso lokola.

Bondimi na biso ekoki kotondisa mokili na bolamu mpe kimia.

Bondimi na biso ekoki kobongola boyini na bolingo mpe banguna na baninga.

Bayengebeni, nde, babikaka na kosalaka kati na bondimi; babikaka na kotiaka elikya kati na Nzambe mpe kotambolaka kati na nzela na Ye.

Mpe wana ezali lolenge ya bondimi oyo ekoki kobongola bato, mabota, bikolo, mpe mokili.