2017
Bolikii
April 2017


Bana

Bolikii

Bomeka molulu oyo elongo na moninga moko. Bosengeli kolikia mpe kolanda baboyangeli na bango na bokebi.

Bozwa eteni ya lokasa moko bakomela te mpe boyema libungutulu likolo na yango oyo ezali kolakisa elongi ya moto. Na ekomeli na liboko na bino, bokanga miso. Botika moninga na bino ayebisa bino epai wapi bokoyema miso, zolo, monoko, mpe nsuki likolo ya elongi. Nsima tala. Boniboni yango esalamaki? Bokoki kopakola langi na elongi mpe koyema mosusu mpo na kosakana lisusu!

Ntango mosusu ezali mpasi kolanda malakisi. Kasi ntango tomeki kolanda Tata na Lola na koyokelaka Molimo Mosantu, Akosalisa biso. Tokoki ntango nyonso kotia elikya na Ye.