Makomi
2 Nefi 11


Mokapo 11

Yakobo amonoki Mosikoli wa ye—Mobeko mwa Mose momonisi Klisto mpe molakisi ete akoya. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, Yakobo alobaki makambo mingi lisusu na bato ba ngai o ntango ena; nzokande bobele makambo maye nakomisaki makomamaki, mpo makambo maye nakomaki makoki na ngai.

2 Mpe sikawa ngai, Nefi, nakomi mingi koleka etali maloba ma Yisaya, mpo bozo bwa ngai bokosepelaka o maloba ma ye. Mpo nakokokisa maloba ma ye epai ya bato ba ngai, mpe nakotinda mango epai ya bana ba ngai banso, mpo solo amonoki Mosikoli wa ngai, kutu lokola namonoki ye.

3 Mpe ndeko mobali wa ngai, Yakobo, lisusu amonoki ye lokola ngai namonoki ye; yango wana, nakotinda maloba ma bango epai ya bana ba ngai mpo ya kolakisa epai ya bango ete maloba ma ngai mazali ma solo. Yango wana, na maloba ma bango basato, Nzambe alobaki, nakotia maloba ma ngai. Nzokande, Nzambe akotinda banzeneneke mingi lisusu, mpe akolakisa maloba ma ye.

4 Tala, bozo bwa ngai bozali na bosepeli na kolakisaka epai ya bato ba ngai bosolo bwa boyei bwa Klisto; mpo, mpo ya ntina eye, mobeko mwa Mose mopesamaki; mpe makambo manso maye mapesamaki na Nzambe uta o ebandeli ya mokili, epai ya bato, mazali emoniseli ya ye.

5 Mpe lisusu bozo bwa ngai bokosepela o mayokani ma Nkolo maye asalaka na batata ba biso; iyo, bozo bwa ngai bokosepela o boboto bwa ye, mpe o boyengebene bwa ye, mpe nguya, mpe ngolu o mwango monene mpe mwa seko mwa libiki uta o liwa.

6 Mpe bozo bwa ngai bokosepela na kolakisaka epai ya bato ba ngai ete longola se soko Klisto akoya bato banso basengeli kowa.

7 Mpo soko Klisto azali te Nzambe azali te; mpe soko Nzambe azali te tozali te, mpo bokeli bokokaki te kozala. Kasi Nzambe moko azali, mpe ye azali Klisto, mpe akoya o litondi lya ntango ya yemei.

8 Mpe sikawa nakokoma mwa maloba ma Yisaya, ete onso oyo ya bato ba ngai bakomono maloba maye batombola mitema mya bango mpe basepela mpo ya bato banso. Sikawa maye mazali maloba, mpe bokoki kokokisa mango epai ya bino mpe epai ya bato banso.