Makomi
2 Nefi 14


Mokapo 14

Siona mpe bana basi ba ye bakosikolama mpe kopetolama mokolo mwa nkoto yoko ya mibu—Tala Yisaya 4. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe o mokolo mona, basi nsambo bakokangema na mobali moko, kolobaka: Tokolia mampa ma bisomei, mpe tokolata monzele mwa bisomei; bobele tika biso tobiangema na nkombo ya yo mpo ya kolongola mpamela ya biso.

2 O mokolo mona etape ya Nkolo ekozala kitoko mpe ya nkembo; mbuma ya mabele sukali mpenza mpe malonga na bango baye baponioki ba Yisalaele.

3 Mpe ekosalema, baye batikali o Siona mpe bafandi o Yelusaleme bakobiangema basantu, moko na moko oyo akomami o ntei ya baye bazali na bomoi o Yelusaleme—

4 Ekosukola Nkolo bosoto bwa bana basi ba Siona, mpe ekopetola ye makila ma Yelusaleme o katikati ya yango na molimo mwa bosambisi mpe na molimo mwa moto.

5 Mpe Nkolo akokela likolo lya esika enso ya kofanda ya ngomba ya Siona, mpe likolo lya mayangani manso ma ye, mapata mpe molinga moko o moi mpe bongengi bwa moto moko mwa mololi o butu; mpo likolo lya nkembo enso ya Siona ekozala bobateli boko.

6 Mpe ekozala tabelenakele yoko mpo ya elilingi o moi mpo ya molunge, mpe mpo ya esika yoko ya ekimelo, mpe ebombelo o ekumbaki mpe mvula.