Makomi
2 Nefi 17


Mokapo 17

Efelaima mpe Sulia basali etumba na Yuda—Klisto akobotama na moseka moko—Mekisani Yisaya 7. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete o mikolo mya Ahaza mwana wa Yotama, mwana wa Uziya, mokonzi wa Yuda, ete Lesini, mokonzi wa Sulia, mpe Peka mwana mobali wa Lemalia, mokonzi wa Yisalaele, bamataki ona Yelusaleme mpo ya kobunda na yango, kasi bakokaki kolonga yango te.

2 Mpe elobelamaki ndako ya Dawidi, kolobaka: Sulia asali likita elongo na Efelaima. Mpe motema mwa ye moninganaki, mpe motema mwa bato ba ye, lokola nzete ya zamba eningisamaka na mopepe.

3 Nde elobaki Nkolo epai ya Yisaya: Kende sikawa kokutana elongo na Ahaza, yo mpe Salayasubu mwana mobali wa yo, o nsuka ya mongongolo mwa liziba lya likolo o balabala enene ya zamba ya mosukoli bilamba;

4 Mpe loba epai ya ye: Sala keba, mpe zala kimia; banga te, mpe zala na motema nsomo te mpo ya mapele mabale ma nkoni ya moto mpe molinga, mpo ya nkanda ekasi ya Lesini elongo na Sulia, mpe ya mwana mobali wa Lemalia.

5 Zambi Sulia, Efelaima, mpe mwana mobali wa Lemalia, bazwaki toli ebe likolo lya yo, kolobaka:

6 Tomata o Yuda mpe totungisa yango, mpe tosala lidusu o yango mpo ya biso, mpe totia mokonzi o katikati ya yango, iyo, mwana mobali wa Tabele.

7 Boye elobi Nkolo Nzambe: Ekosimba te, mpe ekosalema te.

8 Mpo moto mwa Sulia mozali Damaseke, mpe moto mwa Damaseke, Lesini; o mibu ntuku motoba na mitano Efelaima ekobukana ete ekozala bato boko lisusu te.

9 Mpe moto mwa Efelaima mozali Samalia, mpe moto mwa Samalia mozali mwana mobali wa Lemalia. Soko bokondima te solo bokotiama te.

10 Kutu, Nkolo alobaki lisusu epai ya Ahaza, kolobaka:

11 Senge elembo ya Nkolo Nzambe wa yo; senge yango mpe o bozindo, to o mapata likolo.

12 Kasi Ahaza alobaki: Nakosenge te, mpe nakomeke Nkolo te.

13 Mpe alobaki: Yoka sikawa, O ndako ya Dawidi; ezali likambo like mpo ya yo kolembisa bato, kasi ekolembisa bino Nzambe wa ngai lokola?

14 Yango wana, Nkolo yemei akopesa bino elembo—Tala, moseka moko akozwa zemi, mpe akobota mwana mobali, mpe akobianga nkombo ya ye Imanuele.

15 Manteka mpe mafuta ma nzoi ye akolia, ete ayeba koboya bobe mpe kopono bolamu.

16 Mpo yambo mwana ayeba koboya bobe mpe kopono bolamu, mboka eye oyini ekosundolama na bakonzi babale ba ye.

17 Nkolo akomeme likolo lya yo, mpe likolo lya bato ba yo, mpe likolo lya ndako ya tata wa yo, mikolo miyaki te uta mokolo moye Efelaima alongwaki uta o Yuda, mokonzi wa Asulia.

18 Mpe ekosalema o mokolo mona ete Nkolo akobete piololo mpo ya nzinzi eye ezali o eteni ya nsuka mpenza ya Ejipito, mpe mpo ya nzoi eye ezali o mboka ya Asulia.

19 Mpe bakoya, mpe bakofanda bango banso o mabwaku ma mpamba, mpe o minkaka mya mabanga, mpe likolo lya nzube inso, mpe likolo lya zamba.

20 O mokolo mona kaka Nkolo akokolola na ekololele ya kofutela, na bango o ngambo esusu ya ebale, na mokonzi wa Asulia, moto, mpe nsuki ya makolo; mpe ekosilisa lokola mandefu.

21 Mpe ekosalema o mokolo mona moto moko akobokola ngombe mwasi ya elenge mpe meme ibale;

22 Mpe ekosalema, mpo ya beboo ya miliki bakopesa akolia manteka; mpo manteka mpe mafuta ma nzoi moko na moko akolia maye matikalaki o mboka.

23 Mpe ekosalema ete o mokolo mona, esika enso ekozala, wapi ezalaki vino nkoto yoko o mpauni nkoto yoko, iye ikozala mpo ya nkobongo mpe nzube.

24 Na makula mpe matimbo bato bakoya kuna, zambi mboka mobimba ekokoma nkobongo mpe nzube.

25 Mpe ngomba patatalu inso iye ikotimolama na nkongo, ekoya kuna te bobangi nkobongo mpe nzube; kasi ekozala mpo ya botindi pakasa, mpe matambe ma bibwele bileki bike.