Makomi
2 Nefi 22


Mokapo 22

O mokolo mwa nkoto-yoko-ya-mibu bato banso bakokumisa Nkolo—Akofanda o ntei ya bango—Mekisani Yisaya 12. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpe o mokolo mona okoloba: O Nkolo, nakosanzola yo; ata ozalaki na nkanda na ngai, nde nkanda ya yo elongwi, mpe obondisi ngai.

2 Tala, Nzambe azali lobiko la ngai; nakondima, mpe nakobanga te; mpo Nkolo Yova azali makasi ma ngai mpe loyembo la ngai; akomi mpe lobiko la ngai.

3 Yango wana, na bosepeli bokobenda mai libanda lya mabulu ma lobiko.

4 Mpe o mokolo mona nakoloba: Sanzolani Nkolo, biangani nkombo ya ye, sakolani misala mya ye o ntei ya bato, sangelani ete nkombo ya ye enetolami.

5 Yembani epai ya Nkolo; mpo asalaki makambo ma malonga mpenza; eye eyebani o mabele manso.

6 Belela mpe ganga, yo mofandi wa Siona; mpo monene azali Mosantu Moko wa Yisalaele o katikati ya yo.