2010–2019
Bandeo ya Basi Misato
Sanza ya zomi 2017


Bandeko Basi Misato

Tozali na mokumba mpo na kimoyekoli na biso moko, mpe ezali pete—soki—eloko mokoya kosala na lolenge basusu basalelaka biso.

Bandeko basi ba bolingo, baninga ba bolingo, mpo na kobanda likita linene na liyangani ya bandeko basi ya mokili mobimba ezali na ntina mpe malamu mingi. Kaka bobanza: bandeko basi ya mibu, mambi, bikolo, mpe minoko nyonso basangani na bondimi mpe baling mpo na Nkolo Yesu Klisto.

Ntango kala te tokutanaki na profeta na biso wa bolingo, Mokambi Thomas S. Monson, alobelaki biso mingi kani alingaka Nkolo. Mpe nayebi ete Mokambi Monson azali na botondi mingi mpo na bolingo na bino, nsambo na bino, mpe bomipesi na bino.

Ntango moko molai eleki na mboka moko mosika evandaki libota moko ya basi misato.

Ndeko ya yambo ya mwasi azalaki na mawa Eloko nyonso uta na zolo na ye ti na mbanga na ye mpe uta na loposo na ye na ti na misapi ya makolo na ye emonanaki ya kotengama mpo na ye. Ntango alobaki, maloba na ye ntango mosusu ezalaki kobima malamu te, mpe bato bazalaki koseka ye. Ntango basusu bazalaki kotiola ye to “kobosana” kobengisa na eloko moko, azalaki kotela, kokima mosika, mpe koluki esika ya kobombama wapi akosala mpema ya mawa mpe komituna mpo na nini bomoi ekomi bololo mpe ezanga esengo.

Ndeko mwasi ya mibale azalaki zoba. Azalaki kokanisa azalaki mayele koleka, kasi ezali na moto moko azalaki ntango nyonso koleka ye na mimekano na kelasi. Azalaki komimona malamu, kitoko, kolata kitoko, mpe bozenga. Kasi mbala mingi, kasi emonisamaki kozala na moto moko azalaki malamu koleka, kolata malamu, to bonzenga.

Atikala kozanga moto ya yambo ya kozanga eloko moko te, mpe yango ezali oyo akokaki koyika mpiko te. Bomoi esengelaki te kozala lolenge wana!

Ntango mosusu abetaki basusu, mpe emonisamaki ete azalaki ntango nyonso koyimama na makambo nyonso azalaki kokutana na yango.

Ya solo, yango ezalaki kosepelisa ye te to bato. Ntango mosusu azalaki kolia mino, kokanga makofi, mpe kokanisaka ete, “Bomoi ezali malamu te!”

Nsima ezalaki na ndeko mwasi ya misato. Ekesena na bandeko na ye ya basi ya mawa mpe buzoba, azalaki—malamu, esengo. Ezali te mpo ete azalaki mayele to kitoko to atanda makoki koleka bandeko na ye misuse ya basi. Te, bato ntango mosusu bazalaki kokima ye. Bazalaki koseka lolenge azalaki kolata ntango mosusu to makambo oyo azalaki koloba. Bato ntango mosusu bazalaki kolobela maloba ya nkanda to na ntina na ye. Kasi apesaki ndingisa te na likambo moko etungisa ye koleka.

Ndeko mwasi oyo alingaki koyemba. Azalaki na mongongo kitoko te, mpe bato bazalaki koseka ye, kasi alandaki bango te. Azalaki koloba, “nakoki kotika bato mpe maloba na bango etikisa ngai koyemba te!”

Likambo oyo esalaki ete akoba koyemba epesaki ndeko na ye ya mwasi ya yambo mpe ya mibale nkanda.

Mibu ebele eleki, mpe na nsuka ndeko mwasi moko na moko akufaki.

Ndeko mwasi ya yambo, oyo amonaki mbala mingi ete ezalaki na boyokisami motema mpasi ebele na bomoi, na nsuka akufaki mawa.

Ya mibale, oyo mikolo nyonso amonaki eloko moko ya sika mpo na koboya, akufaki zoba.

Mpe ya misato oyo alekisaki bomoi na ye na koyembaka na bokasi na ye nyonso mpe boseki ya elikia na elongi na ye, akufaki esengo.

Ya solo, bomoi ezali pete te, mpe bato bazali ndenge moko te lokola bandeko basai misato oyo kati ya lisolo. Kasi atakutu lisolo ya pasi boye ekoki koteya biso eloko moko na ntina na biso moko. Soki bozali lokola ebele kati na biso, bokoki koyeba eteni ya bino moko kati na bomoko, mibale, to ntango mosusu bandeko nyonso misato oyo ya basi. Tika tomitala mwa moke pene pene.

Moto na likama

Ndeko ya mwasi ya yambo amimonaki lokola moto na likama—lokola moto oyo azalaki kosala.1 Emonisamaki lokola eloko moko na moko ezalaki kosalema sima ya mosusu yango esalaki ete azala na mpasi. Na makambo oyo ya bomoi, azalaki kopesa bizalela mosusu koleka lolenge nini azalaki koyoka mpe kozala. Ntango tosalaka yango, tokomemama pene ya mipepe nyonso ya maloba ya bato—mpe na mokolo oyo ya media social, mipepe yango ezalaki kotambola makasi na minoko ya bato.

Bandeko basi pona nini bosengeli kotika bisengo na bino na moto moko, to lingomba ya bato, oyo bazali na ntina moke mpo na bino to esengo na bino?

Soki bozali komitungisa na ntina ya oyo basusu balobaka mpo na bino nakoki kobeta lisolo oyo: bomikundola oyo bino bozali. Bomikundola ete bozali bana ya ndako ya mokonzi ya bokonzi ya Nzambe, bana basi ya Baboti ya Lola, oyo bazali kokonza na mokili mobimba.

Bozali na ADN ya molimo ya Nzambe. Bozali na mabonza moko oyo ewutaki na ebandeli ya bokeli ya molimo na bino mpe oyo ebutaki na ntango munene ya ntina ya bomoi na bino yay ambo ya nkufa. Bozali bana ya Tata na biso ya mawa ya Lola mpe ya seko, Nkolo ya Mampinga, Moto oyo akelaki mokili, apanzaki minzoto na bonene ya polele, mpe atiaki baplanete na esika na yango elongobana.

Bozali kati ya maboko na Ye.

Maboko malamu koleka.

Maboko ya bolingo.

Maboko ya bolengeli.

Mpe moto moko te akoki koloba eloko na ntina na bino mpe kobongola yango. Maloba na bango ezali na ntina te na oyo Nzambe alobaki na ntina bino.

Bozali bana na ye ya bolingo koleka.

Alingaka bino.

Atako ntango bokweyaka, atako ntago bosundolaka Ye, Nzambe alingaka bino. Soki bomiyoki ya kobunga, ya kobwakisama, to ya kobosanama—bobanga te. Mobateli mpate malamu akomona bino. Akotombola bino na mapeka n Ye. Mpe akomema bino na ndako.2

Bandeko na ngai ya basi balingami, tika ete babosolo oyo ya bonzambe etondisama na kati ya mitema na bino. Mpe bokomona ete bantina ezali ebele bozala na maw ate, mpo ete bozali na lobi ekoya ya seko oyo bosengeli kokokisa.

Mobikisi ya bolingo ya mokili apesaki bomoi na Ye mpo ete bokoka kopona kosala lobi oyo ekoya ezala bosolo. Bozwaki likolo na bino nkombo na Ye; bozali bayekoli na Ye. Mpe mpo na ntina na Ye, bokoki kolata bilamba ya nembo ya seko.

Moyini

Ndeko mwasi ya mibale azalaki na nkanda na mokili. Lokola mawa ya ndeko na ye ya mwasi, ayokaki ete makambo na bomoi na ye azalaki kotumbolama epai ya bato mosusu. Azalaki na nkanda na eloko nyonso oyo ezalaki kosalema lolenge ye alingaki na eloko mosusu to na moto mosusu kasi ye moko. Azalaki na nkanda na libota na ye, baninga na ye, mokonzi na ye ya mosala mpe baninga na ye ya mosala, polisi, bazalani, bakambi ya Elezia, bilamba ya eleko, moyi makasi, mpe mwa libaku mabe. Mpe azalaki koboya nyonso wana.

Atikalaki komimona ye moko te lokola moto mabe. Na ngambo mosusu, ayokaki azalaki komipesa ntina koleka. Mpo na ye moto nyonso mosusu, azalaki moto ya lolendo, azalaki kotala kaka oyo ezalaki ntina mpo na ye, mpe mabe. Ye, na ngambo mosusu, azalaki osepela kaka na oyo ezalaki osepelisa ye—boyengebene, bosembo, mpe bolingo.

Libaku mabe, makanisi ya buzoba ya ndeko mwasi ezalaka epai ya bato ebele. Yango ekomamaki na kala te na boyekoli oyo etiaki biyinani na kati ya lingomba ya bato. Lokola eteni ya boyekoli, baluki batunaki Bapalestine mpe Bayisalaele na Moyen orient, mpe Baye repibiliki mpe Baye demokalatiki na kati ya Etazini. Bamonaki ete “ngambo nyonso bazalaki koyoka ngambo na bango moko [ezalaki] na bolingo koleka boyini, kasi ntango natunaki mpo na nini lingomba ya bonguna [ezalaki] na nguya ya boyini, [bango] baponaki koyina lokola lingomba [mosusu] ezalaki.”3

Na maloba mosusu, lingomba moko na moko ekanisaki mpo na bolamu na yango moko lokola “bato malamu”—bayengebene, sembo, mpe bosolo. Na ngambo mosusu, bamonaki banguna na bango lokola “bato mabe”—ndenge moko, bazanga bosembo, nkutu mabe.

Lolenge ya bomoi ya boye ezali na lisolo ya likama ya ntango molai. Na mobu oyo nabotamaki, mokili ezalaki na etumba monene oyo epesaki mpasi mpe mawa. Etumba oyo ebandaki na lingomba ya bato kowuta ekolo na ngai—bato oyo bazalaki kotalisa mangomba mosusu lokola mabe mpe bakumisaki boyini epai na bango.

Bazalaki kokangisa munoko na baoyo nyonso bazalaki kosepelisa bango te. Bayokisaki nsoni mpe bamonaki bango kozala na nse na bango—kutu neti bato te. Soki kaka otali lingomba ya bato, ozali na mposa ya koloba maloba mabe mpe makambo ya botomboki epai na bango.

Tolengaka mpo na kokanisa na ntina ya oyo esalemaki na ekeke ya mbala ya mbala ya 20 na Allemagne mpo na ntina ya bizalela oyo. Libaku mabe, tosengeli kosala malembe to ya kozanga makoki ya komona lolenge moko na bizaleli na biso lelo.

Soki bato baboyi makanisi na biso to bandimi yango te, momekano ezali ya koloba ete eleko mabe ezali na bango. Mpe uta na yango litambe moke ezali ya kobamba bambeba na bango ya mabe na maloba na bango mpe misala.

Ya solo, tosangeli kolobela ntango nyonso mpo na oyo ezali malamu, mpe bantango ezali ntango tosengeli kotombola mingongo na biso mpo na ntina wana. Na yango, ntango tosali bongo na nkanda to na boyini kati ya mitema na biso—ntango tobundisaka basusu na maloba ya nkanda, na nsoni, to kokanga bango monoko—ngenge ezali ete tosalaka yango na boyengebene te.

Mobikisi Ateyaki nini?

“Nalobi epai na bino Bolinga bayini na bino, bopambola baoyo bazali batuki botuki bino, bosalela bango malamu baoyo bazali koyina bino, mpe bosambela mpo na bango baoyo bazali kosala bino mabe, mpe banyokoli bino;

“Mpo ete bokoka kobiangema bana ya Tata oyo azali na Lola.”4

Oyo ezali lolenge ya Mobikisi. Ezali litambe ya yambo ya kobuka bandelo oyo ezali kosala nkanda, boyini, bokabwani, mpe botomboki na mokili.

“Iyo,” bosengeli kolba, “Nakozala na bolingi ya kolinga banguna na ngai—soki kaka bazalaki na bolingi ya kosala lolenge moko na ngai.”

Kasi yango ezali mpenza ntina te, bongo te? Tozali na mokumba mpo na kimoyekoli na biso moko, mpe ezali pete—soki eloko moko—ya kosala na lolenge basusu basalelaka biso. Ya solo tolikiaka ete bakozala na bososoli mpe bolingo na ngambo na biso, kasi bolingo na biso bango ezali ya bonsomi ya mayoki na bango epai na biso.

Ntango mosusu bokasi na biso ya kolinga banguna na biso ekozala lembisa mitema na biso mpe ekopesa bango nguya ya kosala malamu. Ntango mosusu ekozala te. Kasi yango ekobongola boyokani na biso ya kolanda Yesu Klisto te.

Na yango, lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto, tokolinga bayini na biso.

Tokolonga nkanda na biso to boyini.

Tokotondisa mitema na biso na bolingo ya bana ya Nzambe.

Tokopambola basusu mpe tokosalela bango—atako baoyo basengeli “kotuka [biso], mpe konyokola [biso].”5

Moyekoli ya Solo

Ndeko ya mwasi ya misato azali moyekoli ya solo ya Yesu Klisto. Asalaki eloko moko oyo ekoki kozala mpasi mpo na kosala—andimelaki Nzambe atako na liboso ya botumboli ya boyokisi nsoni. Na ntina mosusu, abatelaki bondimi na ye mpe elikiaki, atako nsoni mpe buzoba na miso na ye. Azalaki na esengo, mpo na mabaku na ye te ezalaki ya esengo te kasi mpo ete ye azalaki na esengo.

Moto moko te asala yango na mobembo ya bomoi oyo na bozangi. Elongo na babokasi na komekaka kotiya biso mosika, lolenge nini tobombaka bomoni na biso eyekama bobele na esengo ya nkembo elakama na moyengebene?

Nakanisi eyano ekoki kozwama ndoto oyo profeta azwaki, mibu bankoto eleki. Nkombo ya profeta ezali Lehi, mpe ndoto na ye ekomami na Buku ya Mormon.

Na kati ya ndoto Lehi amonaki elanga monene mpe, ezalaki na nzete kitoko, bonzenga koleka nyonso. Amonaki lisusu mangomba ya bato ebele kosalaka nzela na bango kino na nzete. Balingaki komeka mbuma ya nkembo na yango. Bamekaki mpe bandimelaki ete ekokaki kopesa bango esengo makasi mpe kimia ya libela.

Ezalaki na nzela moke mpe nkaka oyo ekumbaki kino na nzete, mpe na ngambo na yango nyonso ezalaki na libende oyo ezalaki kosunga bango batikala na nzela. Kasi ezalaki mpe na londende ya molili oyo azalaki kotia butu na bomoni na bango na yango mibale nzela mpe nzete. Mpe ntango mosusu kutu likama makasi mpo na mongongo ya boseki makasi mpe botioli ewutaki na ngambo pene pene. Na mpasi botioli wana kutu endimisaki bato mosusu oyo bakomaki na nzete mpe bamekaki mbuma mpo na koyoka nsoni mpe botamboli.6

Ntango mosusu babandaki kotia ntembe ete nzete ezalaki kitoko lolenge bakanisaki yambo. Ntango mosusu babandaki komituna bosolo ya oyo bamonaki.

Ntango mosusu bakanisaki soki basundoli nzete, bomoi ekoki kokoma mwa pete. Ntango mosusu bakokaki kotiolama to kosekama te na moto moko.

Mpe sikawa, bato bato bazalaki kotiola bango bakomaki lokola bato oyo bazalaki na mwa esengo mpe bazalaki na ntango malamu. Na yango, ntango mosusu soki basundolaki nzete, bakokaki koyambama na lingomba ya etonga monene mpe kitoko koleka mpe babetelaki bango maboko mbona bosambisi na bango, mayele, mpe bwanya.

Tikala na Nzela

Bandeko basi, babinga, soki ezali mpasi mpo na bino kosimba makasi na libende mpe totamboli na bokebi kino na lobiko; soki botioli mpe boseki ya basusu oyo bamonani kozala elikia ya kosala mbonge; soki botungisami na makanisi na mituna to malongi oyo ezali bozali kososola te, soki boyoki mawa na ntina ya boyoki motema mpasi, nasengi bino bokanisa ndoto ya Lehi.

Tikala na Nzela!

Kotikala kotika libende te—liloba ya Nzambe!

Mpe bato bameki koyokisa yo nsoni mpo na bolingo ya Nzambe, kotala bango te.

Kobosana te, ozali mwana ya Nzambe; mapamboli ya bozwi ezali kati ya libanga; soki okoki koyekola kosala bolingi na Ye, okozala lisusu na bomoi elongo na Ye!7

Bilaka ya lokumu mpe bondimami na mokili ezali ya kotiela elikia te, ezanga bosolo mpe ezanga bosepelisi. Bilaka ya Nzambe ezali solo, bosolo, mpe esengo—sikawa mpe libela.

Na bengisi bino bokanisa eyambi mpe bondimi uta na bomoni ya likolo. Eloko moko te ebonzami kati ya etonga monene mpe ya lokumu ekoki kokokana na mbuma ya bomoi nsango malamu ya Yesu Klisto.

Na yango, “liso emoni te, to litoi eyoki te, ekoti kati ya motema ya moto, makambo Nzambe alengeli mpo na bango baoyo balingaka ye.”8

Nayekolaki uta na ngai moko ete nzela ya kimoyekoli kati ya nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nzela ya kosepela. Ezali nzela ya kosepelisa mpe kimia. Ezali nzela na bosolo.

Natatoli ete likabo mpe nguya ya Molimo Mosanto, okoki koyekola oyo mpo na yo moko.

Ntango mosusu, soki nzela ekomeli yo mpasi, nabanzi okozwa ekimelo mpe bolendisi na kati ya mangomba na biso kitoko ya Eklezia—Primaire, Bilenge Basi, mpe Lingomba ya Bamama Basungi. Bazali lokola babopemeli na nzela, esika bokoki kokomisa sika elikia na bino mpe bondimi mpo na mobembo oyo ezali liboso. Bazali ndako ya bobateli, esika oyo bokoki koyoka nguya ya kozala mpe kozwa bolendisi uta na bandeko na bino ya basi mpe baninga ya bayekoli.

Makambo oyo ozali kyekola na Primaire ezali kolengela yo babosolo ebele ya boyekoli kozala elenge mwasi. Nzela ya Boyekoli ozali kotambola kati ya Eteyelo ya Bilenge Basi ekambi yon a kimoninga mpe kibondeko basi ya Lingomba Bamama Basungi. Elongo na litambe nyonso na nzela mobimba, opesameli mabaku ebele ya kolakisa bolingo na yo mpo na basusu na nzela ya misala ya mawa, bolingani, mpe lisungi.

Nzela oyo ya kimoyekoli ekambaka na esengo ezanga boyebi mpe bokokisi.

Ekozala pete te. Ekosenga oyo ya motuya ozali na yango—mayele nay o nyonso, bokeli, bondimi, bosembo, bompikiliki, mokano, mpe bolingo. Kasi mokolo moko okotala na nsima na makasi na yo o, esengo nini okozala na yango ete otikali makasi, ete okanisaki, mpe ete olongwe na nzela te.

Kende liboso

Ekoki kozala na makambu ebele na ntina ya bomoi oyo ezali likolo ya nguya na bino. Kasi na nsuka, bozali na nguya ya kopona nyonso mibale nzela na bino mpe na mayebi ebele na bomoi. Ezali ebele te makoki na bino te kasi maponi oyo esalaka bokeseni na bomoi.9

Bokoki kopesa ndingisa na mabaku ya kopesa bino mawa te.

Bokoki kopesa bango ndingisa te ya kosala bino buzoba.

Bokoki kosepela ete bozali bana basi ya Nzame. Bokoki kozwa esengo mpe bosepeli kati ya ngolu ya Nzambe mpe kati ya bolingo ya Yesu Klisto.

Bokoki kosepela.

Nalendisi mitema na bino etondisama na botondi mpo na bofuluki mpe bolamu ya Nzambe ezanga ndelo. Bandeko na ngai ya basi balingami, bokoki kosala oyo! Nasambeli na bolingo nyonso ya molimo na ngai ete bokosala maponami ya kokende liboso na nzete ya bomoi. Nasambeli ete bokopona kotombola mingongo na bino mpe bokosala bomoi na bino loyembo ya nkembo ya lokumu, kosepelaka na bolingo ya Nzambe mpe na bolamu ya Eklezia na Ye oyo ekoki komema na mokili.

Loyembo ya solo ya kimoyekoli ekoki koyokana te to kutu na mwa mongongo moke na basusu. Uta na ebandeli ya ntango yango ezalaka bongo.

Kasi epai ya Tata na biso ya Lola, mpe na baoyo balingaka mpe batosaka Ye, ezali loyembo malamu mingi mpe kitoko—loyembo kitoko mpe esantisama ya bolingo ya bosikoli mpe mosala epai ya Nzambe mpe bandimi.10

Natikeli bino lipamboli na ngai lokola Apostolo ya Nkolo ete bokozwa bolendisi mpo na kosepela ekokamba bino lokola bana basi ya Nzambe na ntango bozali kotambola na esengo mokolo na mokolo na nzela ya esengo ya kimoyekoli. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala 2 Nefi 2:14, 26.

  2. Tala Luka 15:4–6.

  3. Boston College, “Study Finds Intractable Conflicts Stem from Misunderstanding of Motivation,” ScienceDaily, Sanza ya zomi na moko. 4, 2014, sciencedaily.com.

  4. Matai 5:44–45.

  5. Matai 5:44.

  6. Tala 1 Nefi 8.

  7. Tala “I Am a Child of God,” Children’s Songbook, 2–3.

  8. 1 Bakolinti 2:9.

  9. Tala “The Most Inspirational Book Quotes of All Time,” pegasuspublishers.com/blog.

  10. Tala Alma 5:26.