2010–2019
Pembeni, kasi Kino sikawa Bomoko
Sanza ya zomi 2017


Pembeni, kasi Kino sikawa Bomoko

Na kati ya Eklezia, na esika ya babokeseni na biso, Nkolo asengi biso tozala na bomoko!

Na sanza ya nsambo 1994 nazalaki kokumba motuka na mawa na bozongi ndako uta mosala mpo na kotala na TV ndembo ya makolo ya ekipi ya mboka na biso na Coupe du Monde. Kala te nsima ya kobanda mobembo na ngai, namonaki na mosika na nzela ya bato ya makolo mobali kopusaka velo, ayonamonaki ezalaki na bendele ya Brezile. Nayebaki mbala moko ete azalaki kokende ndako mpo na kokende kotala lisano ya ndembo!

Ntango banzela na biso ekutanaki mpe miso na biso etalanaki, mpo na mwa ntango moke, nayokaki nayokaki bosangani makasi na moto wana! Tozalaki kokende banzela ekesena, toyebanaki te, mpe tozalaki na bokeseni ya lingomba ya bato mpe na bonzoto, kasi mposa na biso ya makasi ya ndembo mpe bolingo mpo na mboka eyokisi biso lokola kozala bomoko na ntango wana! Natikala koyeba moto wan ate, kasi, mibu ebele eleki, nakoki kino sikawa komana miso wana mpe koyoka bokasi ya mokangano wana elongo na moto wana. Sima ya nyonso tolongaki lisano wana mpe Coupe du Monde ya mobu wana!

Na kati ya Eklezia, totala bokeseni na biso te; Nkolo asengi biso tozala bomoko! Alobaki na Doctrine et Alliances, “Bozala bomoko; mpe soki bozali bomoko te bozali ya ngai te.”1

Ntango tokotaka biso nyonso na ndako ya liyangani mpo na kokumbamela lokola lingomba, tosengeli kosundola babokeseni na biso, mpe langi ya loposo, ezaleli ya lingomba ya bato, babokeseni ya politiki, mpe ya kelasi mpe mosala, mpe na esika totia makanisi na bantina na biso ya molimo. Elongo toyemba nzembo, tomanyola na ntina ya mayokani moko na ntango mpe ya elambo, tolobaka nzela moko “amene” nsima ya masukulu, mateya, mpe nsambo—kolimbolaka ete tondimi biso nyonso elongo na oyo ekabolamaki.

Makambo oyo tosalaka elongo esungaka biso tosala eloko moko ya makasi ya bomoko na kati ya lingomba.

Na yango, oyo mpenza ekokisaka, elendisaka, to ebebisaka bomoko na biso ezali lolenge tosalaka ntango tozali elongo na bandeko na biso ya kolanda Eklezia te. Ntango biso nyonso toyebi, ntina koleka mpe malamu ete na nsuka tokoloba na ntina ya moko na moko.

Engebene na oyo toponaka mpo na koloba na ntina ya moko na moko, maloba na biso mpe “mitema na biso ekosangana elongo na bomoko,”2 lokola Alma ateyaki baoyo abatisaki na Bamai ya Mormon, to bakobebisa bolingo, elikia, mpe bolamu oyo ekozala na kati na bango.

Ezali na maloba oyo na lolenge ya pete ebebisaka bomoko lokola “Iyo, azali episikopo malamu; oh, kasi osengelaki komona ye ntango azalaki elenge mobali!”

Liloba malamu koleka ekokaki kozala “Episikopo azali mpenza malamu, mpe azali kokola na bwanya koleka mpe mayele mibu nyonso.”

Mbala mingi tobambaka bato maloba kolobaka lokola “Mokambi na biso ya Lingomba ya Bamama Basungi azali ntina ya libunga; azali mpenza moto makasi!” Na ngambo mosusu, tosengeli koloba, “Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi azalaki mwa malamu mbala oyo; ntango mosusu azali koleka eleko ya mbasi. Tika ete tosunga ye!”

Bandeko mibali mpe bandeko basi, tozali na ndingisa te ya kolobela moto, mingi mingi na bandimi ya Eklezia na biso, lokola moto oyo akoki kobongwana te! Kasi maloba na biso na ntina ya bandeko na biso esengeli kozala ndakisa ya boyambi na biso mpo na Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye mpe ete epai na Ye mpe na nzela na Ye, tokoki ntango nyonso kobongwana mpo na malamu koleka!

Basusu batongaka mpe bakabwanaka uta na bakambi ya Eklezia mpe bandimi mpo na makambo ya mike koleka.

Oyo ezalaki likambo ekomelaki moto moko na nkombo ya Simonds Ryder, oyo akomaki mondimi ya Eklezia na 1831. Nsima ya kotanga libimisi moko oyo ezalaki ya ye ; akaamwaki komona ete nkom,bo na ye ekomamaki mabe na letele Rider na esika ekomama na mokanda iy. Ezaleli na ye na likambo oyo ememaki ye atia ntembe na profeta mpe na nsuka ekambaki na moniokoli ya Joseph mpe bolonngwe na Eklezia.3

Ekoki kosalema lisusu ete biso nyonso tokozwa maloba ya botiei na nzela ya bakambi na biso ya eklezia, oyo ekozala momekano ya lolenge nini biso tozali na bomoko elongo na bango.

Nazalaki kaka na na mibu 11 namikundoli mibu 44 eleki, ndako ya likita oyo libota na ngai ezalaki kokende eklezia esengelaki kobongisama. Yambo misala wana, likita moko esalemaki epai wapi bakambi ya esika na ya etuka bazalaki kosolola lolenge nini bandimi basengelaki kosala mosala wana na bokasi. Tata na ngai, oyo azalaki yambo kokamba na palwasi wana uta mibu ebele, apesaki makanisi na ye ete misala wana esengelamaki kosalema na mosali oyo ayebi mpe na baoyo bazali komeka te.

Likanisi na ye ebwakisamaki kaka te, kasi toyokaki ete atukamaki makasi mpe na polele na likambo wana. Sikawa, oyo ezalaki moto oyo azalaki na bomipesi na Eklezia mpe moko oyo soda abundaki Etumba ya Mibale ya Mokili na Erope, atelemelaki mpe abundaki mpo na oyo azalaki kokanisa kozala malamu! Bato bazalaki komituna eyano na ye ekozala lolenge nini nsima ya likama oyo. Asengelaki kokoba na likanisi na ye mpe akokoba koboya ekateli oyo ezwamaki?

Tosilaki komona mabota na palwasi na biso kolemba na nsango malamu mpe batikaki koya na Makita ya mpo ete bakokaki kozala bomoko te elongo na baoyo bazalaki kokamba. Ngai moko lisusu natatolaki ebele ya baninga na ngai kowuta na primaire kobungisa bondimi na bango na bolenge na bango mpo ete baboti na bango bazalaki kozwa makambo na bandimi na Eklezia.

Tata na ngai, mpo na yango, azwaki mokano ya kotikala bomoko elongo na Basantu. Mwa mikolo nsima, ntango bandimi ya palwasi basanganaki mpo na kosunga botongami, ye “abengisaki” libota na biso elanda ye na ndako ya likita esika oyo tosengelaki kosala makoki na biso mpo na kosunga na lolenge elongobana.

Nayokaki nkanda. Nayokaki lokola natuna ye, “Tata, mpo na nini na mokili tozali kosalisa na botongami soki oboyaki ete bandimi basala te?” Kasi elongi na ye elembisaki ngai ete nalingaki kozala malamu te mpo na bokulisi lisusu. Na yango, libaku malamu, nazwaki mokano ya kozala kimia mpe kaka kokende mpe kosunga na botongami!

Tata amonaki bosilisi ya palwasi ya sika te, lokola akufaki yambo ya bosilisi misala oyo. Kasi biso kati ya libota, ekambamaki sikawa na mama, tokobaki kosala mokumba na biso kino esilaki, mpe yango etikaki biso bomoko elongo na tata na ngai, elongo na Eklezia, bakambi, mpe mingi mingi elongo na Nkolo!

Bobele mwa bantango moke yambo ya baexperiences na Ye ya mpasi mpenza na Getesemani na Ye, ntango Yesu azalaki kosambela epai ya Tata na Ye mpo na Bapostolo na Ye mpe Basantu, Alobaki, “Ete bango nyonso bakoka kozala bomoko; lokola yo, Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo.”4

Bandeko mibali mpe basi, natatoli ete ntango tozwi ekateli ya kozala bomoko elongo na bandimi mpe bakambi ya Eklezia—bango nyonso mibale tosangani elongo mpe mingi mingi ntango tozali biso moko when—tokoyoka lisusu bosangani malamu mingi koleka elongo na Tata na biso mpe Mobikisi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.