2010–2019
Bino Boluka na ba Buku ya Malamu Koleka
Sanza ya zomi 2017


Bino Boluka na Babuku ya Malamu Koleka

Ntango toyekolaka na buku ya ntina koleka, tomibatelaka biso moko na motungisi ya makelele ya basusu baoyo balukaka molimo ya misisa na biso.

Na ebandeli ya ntongo moko, namonaki lipumbulu moko na nzala mpe abombamaki malamu na nzete ya rose. Nakotalaka banzete mosusu ezangi makasa, elakisaki ete mpo na momoni ya ntango, koliaka makasa ya pete na mino na ye ya makasi. Na lolenge ya ndimbola, nakokaki kolongola makanisi te ete ezali na bampombolo bato mosusu oyo bazali lokola katapilar oyo; bamonani esika nionso na mokili, mpe ndambo bafinikami makasi biso tokoki topesa bango nzela ntango mosusu ya kokota babomoi na biso, mpe yambo toyeba yango, basi balie misisa na biso ya molimo mpe oyo baye libota mpe baninga na biso.

Tozali kobika na mokili epai wapi nsango mabe na ntina ya bondimi na biso epesami. Na bantango lokola oyo, bokueyi ya bobateli mpe na bozindo ya misisa na biso ya molimo ezali mbel a ya kozala na yango kosuaka na baoyo baluki kobebisa bondimi na biso na Klisto mpe bondimi na bison a nsango malamu na Ye ezongisami. Zulunale ya Buku ya Mormon, ezali Zeerom oyo alukaki kobebsa bondimi ya bandimi.

Misala mpe maloba na ye ezalaki “motambo ya monguna, oyo ye … atandaki mpo na kokanga [baye] bato, ete amema [bango] na kati ya boyangeli na ye, ete akoka kozinga [bango] pembeni ya miniololo na ye” (Alma 12:6). Lolenge ya bamitambo wana ezali lel’oyo, mpe kaka soki tozali miso ga mpe totongi moboko makasi na Mosikoli(tala Helaman 5:12), tokoki komimona bisomoko ya kokangama na miniololo ya Satana mpe tomemami na bokebi nionso na nzela epekisami oyo elobamaki na Buku ya Mormon (tala 1 Nefi 8:28).

Apostolo Paulo apesaki bokebisi moko na eleko na ye oyo ezali na ntina na mikolo na biso: “Mpo ngai nayebi ete, … kati na bino mpenza mibali bakotelema, kolakisaka mateya ya kokosa, ete babenda bayekoli sima na bango” (Acts 20:29–30).

Likebisi na ye mpe oyo ya ba profeta mpe ya bapostolo ekondolisi biso ete tosengeli kosala nionso tokoki mpo na kopesa makasi ya molimo na bisomoko na maloba ya kobalukela mpe ya kolembisa nzoto. Ntango natala bapaluase mpe makonzi ya eklezia, nazalaki na esengo mingi na oyo namonaki, nayokaki, mpe namiyokaki lokola Basantu bayanolaki na kondima mpe bondimi makasi na mateya ya Mobikisi mpe basali na Ye.

Bokoli ya komemia mokolo ya Saba ezali boye ndakisa moko ya bandimi komipesaka makasi bango moko na kolanda nabokebi bambela ya baprofeta. Kopesa makasi ya bokembisi epesaki elembo na botombuami na tempelo mpe mosala ya mambi ya bakolo ya libota mabota ntango bakutani na bakoko na bango na makuli ya tempelo. Misisa na biso ya molimo ekokundama na bozindo soki libondeli ya sembo ya moto yemoko mpe libota ekomi nguba ya bondimi na biso mpe soki toyamboli mokolo na mokolo, toluki kiboninga ya Molimo Mosantu, mpe toyekoli Mobikisi mpe balolenge na ye mpe tobundi mpo na kokoma lokola Ye (tala 3 Nephi 27:27).

Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azali Pole ya Mokili, mpe Ye abengi biso tolanda Ye. Tosengeli kotala epai na Ye ntango nionso mpe mingi boye soki molili mpe mbonge ya butu ntango mopepe makasi ya ntembe mpe kozanga kondima, lokola bobaluki ya lipata ya molili, efiniki. Misapi esengelaki kolakisama uta na ngambo “mosusu ya etando ya mayi, [kuna] ndako moko monene mpe ya etando[etelemi]” (1 Nephi 8:26) emonani elakisami epai na yo na lolenge ya kotuka, kokitisa, mpe kobenga, nasengi ete bino bolongua na lombango boye bokotindikama ten a ntina ya mayele mabe mpe makanisi mabe ya kokabola binomoko uta na bosolo mpe mapamboli na yango

Na yango, oyo bisomoko tokozala ya kokota na mokolo oyo ntango makambo mabe ezali kolobama, kokomama, kotiama na bilili. Mpaka Robert D. Hales ateyaki biso ete, “Loba kaka soki bokotisi mobimba na kobika nsango malamu—kobika yango na ‘motema, mayele, makanisi mpe makasi’ na bino mobimba—soki te bokoka te kobimisa pole ya molimo ekoki mpo na kopusa molili mosika” (“Libanda ya Molili kati ya Pole na Ye Malamu ,” Liahona, Sanza ya nsambo 2002, 78). Na bosolo, posa na biso ya kolonda Klisto, oyo azali Pole ya Mokili (tala Yoane 8:12), elingi koloba tosengeli kosala na nzela ya mateya na Ye. Biso tokembisami, topesami makasi, mpe tobatelami na molimo soki tosali likolo ya maloba na Nzambe.

Monene makasi ya pole na babomoi na biso ekitisi molili. Atako kutu na botondi ya pole tozali liboso ya batu mpe bamaloba oyo elakisi na mabe babondimi na biso mpe emeki bondimi na biso. Apostolo Yakobo akomaki ete “komekama na ya [bino] bondimi ekokoma mpiko” (Yakobo 1:3). Elongo na bomoni oyo, Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki “Moyekoli ya mpiko … akokamua te to kosala ten tango eklezia elakisami mabe” (“Mpiko” [Brigham Young University devotional, Nov. 27, 1979], speeches.byu.edu).

Mituna etali mambi ya kala ya Eklezia mpe babondimi na biso ezali kobuta. Esika ya kotala mpo na kozua biyano ya malamu esengi bokebi monene. Ezali na eloko moko te ya kolonga na kotalaka na bokebi bomoni to makanisi ya bato bayebi muke to na boyebi ya lokuta. Toli ya malamu koleka epesamaki na Apostolo Yakobo: “Soki moko kati na bino azangi bwa,ia, asenga epai na Nzambe” (Yakobo 1:5).

Kotunaka Nzambe esengeli kozala na sima ya boyekoli na bokebi, mpo ete topesami ndaka na nse ya makomi ya koluka “na ba buku ya malamu koleka ya maloba ya bwanya” “boluka boyekoli, kutu na koyekola mpe na bondimi” (D&C 88:118). Ezali na botondi moko ya bozui na ba buku wana, ekomami na Bakambi ya Eklezia bafulama –na lola mpe mambi Makala ya Eklezia mpe malongi ya bwanya ya bokengi, mpe ya bosolo. Elongo na nayongo eloba moko te eleki na nkembo maloba ebimisami ya Nzambe kati makomi canonique. Wuta na makasa wana ya mike evimbi na babomoni ya molimo, toyekoli bosolo na nzela ya Molimo Mosantu mpe na bongo tobuti na pole.

Mokambi Thomas S. Monson, oyo abondelaki biso “na libondeli makasi toyekola mpetokanisa na bozindo Buku ya Mormon mikolo oyo” (“Nguya ya Buku ya Mormon,” Liahona, Sanza ya Mitano 2017, 87).

Mibu ebele eleki, ntango nasalaki lokola mokambi ya Misio ya Fiji Suva, bamisionele moko bazuaka mayele moko oyo epesaki bango makasi lisusu ya nguya ya bobongoli ya Buku ya Mormon. Na moko mokolo ya molunge mpe ya mai oyo bampaka mibale bkomaki na ndako moko ya lisanga moko na Libasa.

Kokola na ekuke bayanolamaki na mobali moko akuba oyo ayokaki lokola ba misionele batatolaki bosolo ya Buku ya Mormon. Bango bapesaki ye Buku ya Mormon mpe babengaki ye kotanga mpe kobondela mpo na koyeba, lokola bango, ete yango ezali liloba ya Nzambe. Eyano na ye ezalaki mokuse; “Lobi nakokende koloba mbisi. Naktanga yango ntango nakozala na ebale, mpe nttango nakozonga, bokoki koya kotala ngai lisusu.”

Ntango ye akendaki, bobongolami ezalamaki, mpe sima ya bamposo mike, kiboninga ya sika ya bampaka bazongaki kotala molobi mbisi. Na ntango wana ye atangaki Buku ya Mormon Mobimba, azuaki kondimisama ya babosolo, na yango mpe, ezalaki mpasi mpo na koyekola ebele.

Mobali yango abongalamaki na Molimo Mosantu, oyo atatolaki bosolo ya maloba ya motuya na lokasa mokomoko ya makambo mpe lilongi eteyamaki bantango ebele eleki mpe ebombamaki mpo na mikolo na bison a kati ya Buku ya Mormon. Lipamboli ya ndenge moko ya motuya ezali mpo na moko na moko na biso.

Ndako ezali esika moko ebongi mpo na libota koyekola mpe kokabola babomoni ya motuya uta na makomi mpe maloba ya bafrota mpe kokota na mikanda ya Eklezia na LDS.org. kuna bokokuta bansango ebele etali masolo ya nsango malamu lokola lisolo Limoni ya Yambo. Soki toyekoli uta na babuku ya malamu koleka, tomibateli biso moko na mbanga ya kobundisa oyo ezali koluka kolia misisa na biso ya molimo.

Elongo na libondeli, koyekola, mpe kotia makanisi na biso nionso, kuna ekoki kokundolisa iyo-kozala-koyanolama na mituna, kasi tosengeli te kotika yango eboma moto ya bondimi oyo ezali kopela kati na biso. Mituna ya lolenge oyo ezali libiangi ya kotonga bondimi na biso mpe esengeli te kotia essence na ntango na biso tembe ya kolembisa. Yango ezali essence nionso ya eyamba te kozala na eyano moko ya solo na mituna na biso nionso, mpo na yango ezali moko ya bantina ya bondimi. Na kotala yango, Mpaka Jeffrey R. Holland ateyaki biso ete “ntango bangonga ya boye eye mpe ebimi libanda, mayele mpo na yango elandi na mbala moko te, bosimba makasi na oyo bino boyebi yambo mpe botelema makasi kino boyebi ya kobakisama eye” (“Nkolo, nandimi,” to Liahona, Sanza ya mitano 2013).

Tomoni nzinganzinga na biso ya ebele koleka oyo etelemisi makasi na kokobaka koleisaka misisa na bango ya bondimi. Bondimi na bango ekoki mpo na kopesa bango elikia monene na Mobikisi na bango, mpe uta na banzete minene ya esengo. Bango basakoli te koyeba makambo nionso, kasi bango bafutaki talo ya koyeba ebele mpo na kozwa kimia mpe kobika na mpiko ntango bango baluki koyeba ebele. Molongo moko likolo ya mosusu, bondimi na bango ekangami na Klisto, mpe bango batelemi makasi lokola baninga ya engumba elongo na Bansantu.

Tika moko na moko na biso abika boye ete mino ya kobundisa ya bampumbulu babatami oyo bamonani na esika, sikoyo te to libela, na babomoi na biso ete tokomikundola “makasi na bondimi na Klisto, kutu tii na suka” (Alma 27:27). Na nkombo na Yesu Klisto, amene.