2010–2019
Bobanga Kosala Bolamu Te
Sanza ya zomi 2017


Bobanga Kosala Bolamu Te

Nkolo ayebisi biso ete ntango totelemi na bondimi likolo ya libanga na Ye, ntembe na bobangi ekitaka; mposa ya kosala bolamu emataka.

Bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, nasambeli na bosembo ete Molimo ya Nkolo ekozala elongo na biso na ntango nazali koloba lelo. Motema na ngai etondisami na botondi epai ya Nkolo, mokolo ya Eklezia oyo, mpo na bofuli oyo toyokaka na nsambo ya makasi, masakoli efulama, mpe loyembo ya banzelu na kati ya likita oyo.

Sanza ya minei eleki, Mokambi Thomas S. Monson apesaki nsango moko oyo etutisaki mitema ya bato na mokili mobimba, na yangi mpe. Alobelaki na ntina ya nguya ya Buku ya Mormon. Atei biso toyekola, tomanyola, mpe toteya mateya na yango. Alobi boye soki topesaki ntango mikolo nyonso ya koyekola mpe komanyola mpe kobatela mitindo oyo ezali na kati ya Buku ya Mormon, tokozala na litatoli monene ya bosolo na yango, mpe eyano ya litatoli ya Klisto ya bomoi ekomona biso na nzela ya bobateli na ntango ya mikakatano. (Tala “Nguya ya Buku ya Mormon,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 86–87.)

Lokola ebele kati na bino, nayokaki maloba ya profeta lokola mongongo ya Nkolo epai na ngai. Mpe, lisusu lokola ebele kati na bino, nazwaki ekateli ya kotosa maloba yango. Sikoyo, uta nazalaki elenge mobali, nayokaki litatoli ete Buku ya Mormon ezali liloba ya Nzambe, ete Tata mpe Mwana babimelaki mpe balobelaki Joseph Smith, mpe ete Bapostolo ya kala bayaki epai ya Profeta Joseph mpo na kozongisa bafungola ya bonganganzambe na Eklezia ya Nkolo.

Elongo na litatoli wana, natangaki Buku ya Mormon mikolo nyonso mpo na koleka mibu 50. Na yango ntango mosusu nakokaki kokanisa ete maloba ya Mokambi Monson ezalaki mpo na moto mosusu. Kasi, lokola ebele kati na bino, nayokaki bolendisi ya profeta mpe elaka na ye ebingisi ngai nasala makasi koleka. Ebele kati na bino basalaki oyo ngai nasalaki: nasambelaki na likanisi monene, namanyolaki makomi koleka, mpe namekaki na bokasi kosalela Nkolo mpe basusu mmo na Ye.

Eyano ya esengo mpo na ngai, mpe mpo na ebele kati na bino, ezali oyo profeta alakaki. Baoyo ya biso bazwaka liteya na ye efulama na motema bayokaki Molimo na bokeseni koleka. Tozwaki nguya monene ya kotelemela lisenginya mpe toyokaki bondimi kati ya Yesu Klisto, na kati ya nsango malamu na Ye, mpe na kati ya Eklezia na Ye ya bomoi.

Na ntango ya bomati ya mobulu na mokili, babomati oyo na litatoli elongolaka ntembe mpe bobangi mpe ememelaki biso mayoki ya kimia. Liteya ya likebisi ya Mokambi Monson ezalaki na bantina mibale malamu  on likolo na ngai: Yambo, Molimo oyo alakaki ebimisaki lolenge ya komindima na htina ya oyo ekoya lobi, nkutu ntango mobulu na mokili emonisami komata. Mpe, ya mibale, Nkolo apesaki ngai—mpe bino—liyoki monene ya bolingo na Ye mpo na baoyo bazali na mpasi. Toyokaki bomati kati ya mposa ya kokende mpo na kobikisa basusu. Mposa yango ezali na kati ya motema ya mosala ya Mokambi mpe liteya.

Nkolo alakaki bolingo mpo na basusu mpe bolendisi epai ya Profeta Joseph Smith mpe Oliver Cowdery ntango mosala liboso na bango ekokaki komonisama mpasi. Nkolo alobaki basengelaki na mpiko mpo na bondimi na bango epai na Ye lokola libanga na bango:

“Bobanga kosala bolamu te, bana na ngai ya mibali, mpo ete nyonso oyo bozali kolona, bokobuka yango lisusu; na yango soki bozali kolona bolamu, bokobuka mpe bolamu mpo na litomba na bino.

“Na yango bobanga te, lisanga moke; bosala bolamu; tika mabele mpe lifelo basangana mmo na bino, mpe te soki soki botongami na libanga na ngai, bakoki kolonga te.

“Botala, napesi bino etumbu te; bokende banzela na bino mpe bosumuka ata moke te; bosala na bosembo mosala oyo atindi bino.

“Botalela ngai na makanisi na bino; botia ntembe te, bobanga te.

“Botala bampota oyo etoboli mopanzi na ngai, mpe lisusu bilembo ya basete na maboko na ngai mpe makolo; bozala na kondima, botosa mitindo na ngai, mpe bokokota na bokonzi ya lola” (D&A 6:33–37).

Nkolo ayebisaki bakambi na Ye na ntina ya Bozongisi, mpe Ayebiis biso, ete ntango totelemi na bondimi likolo ya libanga na Ye, tembe mpe bobangi ekitaka; mposa ya kosala bolamu emataka. Ntango tondimaka libiangi ya Mokambi Moson ya kopika kati ya mitema na biso litatoli ya Yesu Klisto, tolongaka nguya, mposa, mpe mpiko ya kokende kobikisa basusu na bozangi litomba ya mposa na biso moko.

Namoni bondimi mpe mpiko yango mbala mingi ntango bandimi ya Basantu ya mikolo ya Nsuka bakutanaki na mikakatano makasi. Ndakisa moko, nazalaki na Idaho ntango Baraje ya Teton ebukanaki na sanza ya Motoba 5, 1976. Efelo ya mai esopanaki. Bankoto ya mabota etikaki bandako na bango. Bankoto ya bandako mpe misala ebebaki. Na lolenge ya kokamwa, moke ya bato 15 koleka bakufaki.

Oyo namonaki kuna, namonaki ntango Basantu ya mikolo ya Nsuka batelemaki ngwi likolo ya libanga ya litatoli ya Yesu Klisto. Mpo ete batiaki ntembe te ete Azali kobatela bango, bazangaki kobanga. Babosanaki mikakatano na bango ya kokende kosunga basusu. Mpe basalaka yango mpo na bolingo na bango epai ya Nkolo, kosengaka mbano na bango te.

Ndakisa, ntango Baraje ya Teton ebukanaki, mibale ya Basantu ya mikolo ya Nsuka basalaki mobembo, bakilometele mosika uta bandako na bango. Kala te bayokaki nsango na radio, bazongaki mbango na Rexburg. Na yango bakendaki na bandako na bango mpo na kotala soki ebebisamaki, bakendaki koluka episikopo na bango. Azalaki na ndako oyo ezalaki lokola ndako ya bobateli. Azalaki kosunga kokambaka bankoto ya basali bazanga lifuti oyo bazalaki koya na babisi ya langi ya mosaka.

Bato mibale oyo bakendaki epai ya episikopo mpe balobaki, “Tozongi sikawa. Episikopo, esika nini tokoki kokende kosunga?” Apesaki bango bankombo ya libota. Bato mibale wana batikalaki na kati ya potopoto mpe mai na kati ya ndako nsima mosusu. Basalaki uta na mokolo kino na butu uta mikolo ebele. Na nsuka bazwaki bopemi ya kokende kotala mabota na bango moko. Eloko moko te etikalaki, etikaki eloko moko te ya kobongisa. Nde bongo  bazongaki lisusu mbango epai ya episikopo na bango. Batunaki, “Episikopo, ozali na moto oyo akoki kosunga biso?”

Bikamwisi oyo ya mpiko ya kimia mpe bolingani—bolingo ya solo ya Klisto—ebandelamaki mbala mingi na mibu mpe na mokili mobimba. Esalemaki na mikolo ya mitungisi mpe mikakatano na ntango ya Profeta Joseph Smith na Missouri. Esalemaki ntango Brigham Young akambaki bandimi ya bobimi uta na Nauvoo mpe nsima abengaki Basantu na bisika yam abele ekauka bango nyonso na westi ya Etazini, mpo na kosungana batonga Siona mpo na Nkolo.

Soki botangi makambo ya zulunale ya bapionie oyo, bokomona bikamwisi ya bondimi kolongolaka ntembe mpe bobangi. Mpe botangi Basantu kosalelaka matomba na bango moko mpo na kosunga moto mosusu mpo na Nkolo, yambo bazongela ntina na bango to elanga na bango ya mosala.

Namonaki bikamwisi ya lolenge moko wana mwa mikolo moke eleki na Ekumbaki ya Irma na Puerto Rico, Saint Thomas, mpe Florida, wapi Basantu ba Mikolo mya Nsuka basalaki lisanga na biklezia misusu, maboke bato ya esika, mpe mangoma ya mboka mpo na kobanda makasi ya kopetola.

Lokola baninga na ngai na Rexburg, balingani moko bandimi te na Florida bakangamaki na kosamosa bato esika ya kosala na esika na bango moko. Ntango bazalaki ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bapesaki lisalisi na banzete mibale ekangaki nzela na bango, balongani wana balimbolaki ete elekelaki bango mpe boye babalukaki na kosalisa baususu, kozalaka na bondimi na oyo Nkolo akopesa lisungi basengelaki na ndako na bango moko. Mobali nsima akabolaki ete yambo bandimi ya Eklezia baya na kopesa lisalisi, balongani wana bazalaki kosambela. Bazwaka eyano ete lisungi elingaki koya. Eyaki nsima ya bangonga ya bosolo wana.

Nayokaki nsango moko ete basusu babandaki kobenga Basantu ya mikolo ya Nsuka oyo balati Basimizi ya Mains Serviable ya langi ya mosaka “Baanzelu ya Langi ya Mosaka.” Mosantu moko ya mikolo ya Nsuka azwaki motuka na ye mpo na kokende mosala, moto oyo azalaki kosunga amonaki “liyoki ya molimo.” Ayokaki yango ntango ya basimizi ya langi ya mosaka balongolaki banzete uta na esika na ye mpe nsima, alobaki, “ bayembaki ngai mwa loyembo na ntina ya kozala mwana ya Nzambe.”

Mofandi mosusu ya Florida—lisusu ya bondimi na biso te—alobaki ete Basantu ya mikolo ya Nsuka bayaki na ndako na ye ntango azalaki kosala na lopango na ye ebibisamaki mpe ayokaki bolembu, mpasi mpe mpene ya kolela. Basali bazanga lifuti basalaki, na maloba na ye, “bikamwisi ya malamu.” Basungaki te kaka na etingia kasi lisusu koseka mpe koseka moseka, kondimaka eloko te.

Namonaki etingia wana mpe nayokaki koseka wana ntango, nsima ya poso moko, nakendaki kotala elongo na lingomba ya Basantu ya mikolo ya Nsuka na Floride. Basali mosala ezanga lifuta oyo batikaki mosala bazalaki kosala uta ntango molai mpo ete napesa bango mbote na maboko. Balobaki ete bandimi 90 ya Likonzi na Georgie basalaki mwango ya kobikisa na Floride bobele butu yambo.

Batika Georgia na 4:00 na ntongo, bakumbaki bantango minei, basalaki na mokolo mobimba mpe butu, balengelaki mpo na kosala lisusu mokolo elandaki.

Basalaki nyonso oyo epai na ngai na koseka mpe esengo malamu. Motungisi moko nayokaki ezalaki ete balingaki kotika matondi mpo ete bakoka kozongela mosala. Mokambi ya likonzi apelisaki lisusu masini na ye ya kokata nzete mpe azalaki kosala na nzete ekweya mpe episikopo moko azalaki komema banzete mpe kokotisa na motuka mpo na kokende na lingomba ya bosungi oyo elandaki.

Na ntongo ya mokolo wana, ntango tokomaki mosika na esika mosusu, moto moko amataki na motuka,  alongolaki ekoti na ye, atondaki biso mpo na mosala ezanga lifuti. Alobaki, “nazali mondimi ya eklezia na bino te. oyo bosali mpo na biso elekeli ngai. Nzambe apambola bino.” Basali bazanga lifuti ya LDS batelemaki pene na ye na simizi ya langi ya mosaka bazoseka mpe koningisaki mapeka na ye, lokola azalaki na mposa ya lokumu te.

Na ntango basali mosala ezanga lifuti kouta na Georgie bakomaki mpo na kosunga moto oyo azalaki akokaki kondima te, bamonkama ya Basantu ya mikolo ya Nsuka kouta na esika oyo ebebisama mpenza ya Floride bakendaki bamonkama ya bakilometele na sudi esika mosusu na Floride esika oyo bayokaki bato batutisamaki makasi.

Mokolo wana namikundolaki mpe nasosolaki malamu maloba ya Profeta Joseph Smith: “Moto oyo atondisami na bolingo ya Nzambe, azali na mokumba ya kopambola bobele libota na ye kaka te, kasi amipesi na mokili mobimba, na mposa ya kopambola moto nyonso” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith [2007], 426).

Tomonaka bolingo ya lolenge oyo na babomoi ya Basantu ya mikolo ya Nsuka na bisaka nyonso. Ntango nyonso ezali na likama kosalema na mokili, Basantu ya mikolo ya Nsuka bapesaka mpe na bozangi lifuti na babokasi ya bato ya Eklezia. Libiangi ntango mosusu esalemaka te. na yango, na mabaku misusu, tosengeli kosenga baoyo basepeli kozela kokende mobembo mpo na komona esika kino baoyo bakambaka mosala bamilengeli mpo na koyamba bango.

Mposa wana ya kopambola ezali mbuma ya bato oyo balongaka litatoli ya Yesu Klisto, nsango malamu na Ye, Eklezia na Ye ezongisama, mpe profeta na Ye. Yango ezali mpo na nini bato ya Nzambe batia ntembe te mpe babanga te. Yango ezali mpo na nini bamisionele basalaka na bozangi lifuti mosala ya mokili mobimba. Yango ezali mpo na nini baboti basambelaka elongo na bango mpo na basusu. Yango ezali mpo na nini bakambi basengaka bilenge na bango basalela libiangi ya Mokambi Monson ya komipesa bango moko kati ya Buku ya Mormon na motema. Mbuma ebotamaka te na mposa ya bakambi kasi na mosala ya bilenge na bondimi mpe bandimi kosalaka na bondimi. Bondimi yango, etiaki na mosala, oyo esengeli bomikabi, ememi mbongwana ya motema oyo epesaka bango ndingisa bayoka bolingo ya Nzambe.

Mitema na biso, na yango, ebongwama ntango bobele ntango tozali kokoba kolanda liteya ya profeta. Soki totiki komeka ntina ya bokasi, mbongwana ekolemba.

Basantu ya mikolo ya Nsuka bamatisaki bondimi na bango epai ya Nkolo Yesu Klisto, na kati ya Buku ya Mormon lokola liloba ya Nzambe, mpe na bozongisi bafungola ya bonganganzambe na kati ya Eklezia na Ye ya solo. Oyo ematisaki litatoli epesameli biso mpiko makasi mpe ntina mpo na basusu bana ya Nzambe. kasi mimekano mpe mabaku oyo ezali liboso ekosenga kutu mingi.

Kokoki komona liboso mobimba ya makambo te, kasi toyebi elili mobimba. Toyebi ete na mikolo ya nsuka, mokili ekozala na mobulu. Toyebi ete atako na kati kati ya nungunungu oyo ekoya, Nkolo Akokamba Basantu ya mikolo ya Nsuka ya bondimi mpo na komema nsango malamu ya Yesu Klisto na bikolo nyonso, mabota, nkota, mpe bato. Mpe toyebi ete bayekoli ya solo ya Nkolo bakozala ya kolongobana mpe balengelama mpo na koyamba Ye ntango Akoya lisusu. Tosengeli kobanga te.

Na yango, lokola totongi bondimi mpe mpiko na mitema na biso Nkolo azali kozela ebele kouta epai na biso—mpe kouta na bankola sima na biso. Bakosengela kozala makasi mpe bilombe mpo ete bakosala makambu kutu makasi mpe koleka mpenza oyo biso tosali. Mpe bakokutana na bonguna makasi kouta na monguna ya milimo na biso.

Nzela ememi na bomindimi lokola tozali kokende liboso epesamaki epai ya Nkolo: “Botalela ngai na makanisi na bino nyonso; botiya ntembe te, bobanga te” (D&A 6:36). Mokambi Monson ayebisaki biso lolenge nini ya kosala yango. Tosengeli komanyola mpe kosalela Buku ya Mormon mpe maloba ya baprofeta. Tosambela ntango nyonso. Tozala na kondima. Tosalela Nkolo na mitema na biso mobimba, na makasi, na mayele, mpe mpiko. Tosengeli kosambela na makasi nyonso ya mitema na biso mpo na likabo ya bolingani, bolingo ya solo ya Klisto (tala Moroni 7:47–48). Mpe likolo ya nyonso, tosengeli kokoba mpe kotika te na kolandaka liteya ya profeta.

Ntango nzela ezali mpasi, tokoki kotalela elaka ya Nkolo—elaka oyo Mokambi Monson akanisi biso ya na ntango azalaki kotanga maloba oyo ya Mobikisi: “Oyo nyonso akoyamba bino, ngai mpe nakozala liboso na bino. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe ya mwasi, mpe banzelu na ngai bakozala nzinga nzinga na bino, mpo na kotola bino” (D&A 84:88).

Natatoli ete Nkolo azali liboso na bino ntango bomipesi na mosala na. ntango mosusu bokozala baanzelu oyo Nkolo atindi mpo na kotombola basusu likolo. Ntango mosusu bokozingama na baanzelu oyo bakotombola bino likolo. Kasi ntango nyonso bokozala na Molimo na Ye na mitema na bino, lokola bolakaki na elambo nyonso. Bosengeli kotosa mitindo na Ye.

Mikolo ya ntina koleka ezali mpo na bokonzi ya Nzambe likolo yam abele. Bonguna ekolendisa bondimi na biso epai ya Yesu Klisto, ntango lokola ezalaka uta mikolo ya Profeta Joseph Smith. Bondimi ntango nyonso elongaka bobangi. Kotelema elongo ebotisaka bomoko. Mpe nsambo na bino mpo na baoyo bazali na bosenga eyokanaka mpe eyanolamaka epai ya Nzambe ya bolingo. Alalaka te to Animbaka te.

Natatoli litatoli na ngai ete Nzambe Tata azali na bomoi mpe alingaka bino bozonga ndako epai na Ye. Oyo ezali Eklezia ya solo ya Nkolo Yesu Klisto. Ayebaka bino; Alingaka bino Abatelaka bino. Amikabaki mpo na masumu na bino mpe ya ngai mpe mpo na masumu ya bana nyonso ya Tata na Lola. Kolandaka Ye na bomoi na bino mpe na lisalisi ya basusu ezali nzela bobele se moko ememi na bomoi ya seko.

Natatoli bongo mpe natikeli bino lipamboli mpe bolingo. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.