2010–2019
Tika ete Esengo na bino Ekoka Kozala ya Kotondisama
Sanza ya zomi 2017


Tika ete Esengo na Bino Ekoka Kozala ya Kotondisama

Yesu Klisto azali liziba ya lobiko nionso, kimia, mpe bokobi ya libela.

Bandeko mibali mpe basi, ezali esengo kozala na bino. Mpe na yango nalingi nasolola na bino na ntina ya ntongo ya lelo—kozalaka na bofuluki ya esengo.

Bansango ya sika ya zulunali etangi, “Makama ebeti ekolo[mpe] mokili.”1 Uta na bekumbaki mpe botondi ya mayi ya mbonge ya moto mpe bokauki, uta na moto ya zamba mpe boningani yam abele na bitumba mpe bamaladi ya kobebisaka, emonani lokola “mokili mobimba [ezali] koningana.”2

Ebele ya bato bakimaki, mpe babomoi ezangi botangi ekatanaki na bitumba wana. Bowelani kati na mabota mpe mangomba ezalaki lokola kokonata na bitumba na moto, ntembe mpe bozeli ya ndambo yango mpe etikaku biso na mobulu. Ekoki kozala mpasi ya koyoka esengo oyo Lehi ateyaki na ntina ya bomoi. 3 Tumitunaki banso na ngonga wana, “Epai wapi nakende kozua himia? Epai wapi ezali lisiko na ngai … ?”4 Tomitungisaka, “boniboni nakozua esenge atako na mikakatano ya bomoi ya bokufi” ?

Eyano ekoki komanana pete makasi, kasi yango emonisamaki bosolo uta na mikolo ya Adama. Esengo ya libela ezuami na kotiaka makanisi na Mobikisi na biso, Yesu Klisto, mpe kobikaka nsango malamu lokola Yemoko alakisaki mpe ateyaki. Mingi koleka biso toyekoli na ntina ya,kozala na bondimi na, mpe komekola Yesu Klisto, mpe mingi tokoya kososola ete Ye azali liziba ya lobiko, kimia, mpe bokobi ya libela. Ye abengi moko na moko na biso kobelema epai na Ye,5 mbela moko oyo Mokambi Henry B. Eyring atiaki yango “mbela ya motuya koleka oyo moto nionso akoki kondima.”6

Koyekola Yesu Klisto

Lolenge nini tokobelema na Ye? Sanza ya minei oyo eleki, Mokambi Russell M. Nelson mpe Mpaka M. Russell Ballard bapesaki biso makasi ya koyekoma “The Living Christ”7 lokola eteni ya koyekolaka na ntina ya Mobikisi. Ebele bandimaki etumba yango mpe bapambolamaki. Kala mingi te moninga moko ya talo apesaki moko moko ya bana na ye ya mikolo bankoma ya mokanda yango na bilili ya nsango malamu kolimbola liloba moko moko. Ye apesaku bana na ye makasi ya kosunga bakoko na ye kososola mpe kobomba yango. Ntango moko nsima moninga na ngai akabolaki video moko ya koko na ye ya mibu misato kolobaka na lolemo motindo ye abombaki na makanisi elongo ya bosepeli mpe kondimisama. Nasosolaki ete soki mwana ya mibu misato akoki kosala yango, ngai lokola nakoki!

Elilingi
Laynie, oyo akangaki na moto “Yesu ya Bomoi”

Lokola natangaki bomoi mpe mateya ya Yesu Klisto na kotia makanisi mpe bomikotisi makasi “The Living Christ” mpo na kokundola, botondi mpe bolingona ngai mpo na Mobikisi emataki. Molongo moko na moko ya mokanda oyo efulami ezali na liteya moko mpe epusaki bososoli na ngai na bantina na Ye ya bonzambe mpe mosala na ye na mabele. Oyo nayekolaki mpe nayokaki eloko wana ya boyekoli mpe ya kokanisa elakisaki ete Yesu na bosembo nionso “azali pole, bomoi, mpe elikia ya mokili.”8 Makomi ya kala mpe maloba ekomami to elobami ya baprofeta ya mikolo ya suka na kosanzola Ye bapesaka litatoli ete “Nzela na ye ezali nzela oyo ekomema na bosepeli na bomoi oyo mpe na mokili ekoya.”9

Kozala na Bondimi na Yesu klisto

Soki botangi bomoi mpe mateya ya Klisto na balolenge ebele, bondimi na bino epi na Ye ekokola. Bokoyeba ete Ye alingi biso moto nse yemok mpe asosoli biso malamu koleka. Na mibu na Ye 33 ya bokufi, Ye anyokuamaki na bobuaki, masenginia, bolozi ya nzoto, mposa ya mai, mpe kolemba,10 kotikala yemoko, kofinga mpe kobeta na nzoto, mpe na nsuka liwa moko ya mpasi na maboko ya bato ya masumu.11) Na elanga ya Gethesemane mpe na ekulusu ya Calvaire, Ye ayokaki nionsoya biso pasi, bolozi, mimekano, makono, mpe mpasi ya nzoto.12

Atako oyo biso tonikuamaki, Ye azali liziba ya lobiko. Baoyo bazuaki mayele ya lolenge na lolenge ya boniokoli, bobungisi ya bobebi, maladi makasi to mitungisi ezangisi makoki, bofundi ya lokuta, koyina ya mabe makasi, to kobukana ya molimo uta na lisumu to bozangi bososoli ekoki nionso ekundamaki na Mosikoli ya mokili. Ata bongo, Ye akokota ten a bozangi mbela. Tosengeli kokende epai na Ye mpe kopesa Ye nzela ya kosala bikamwa na Ye.

Mokolo moko kitoko yam oi natikaki ekuke ya kofonguama mpo na kosepela na mopepe ya piyo. Ndengo moko ya moke apimbwaki na ekuke ya kofungwama mpe nsima amonaki ete ezalaki tee sika alingaki kozala. Apumbuka na bozangi elikia katikati ya ndaku, mbala na mbala kopumbukaka na molangi ya lininisa komekaka kokima. Namekaki na motema malamu kotambuisa ye liboso ya ekuke efunguama, kasi abangaki mpe alukaki kobima libanda. Na sika amataki na singa ya lido ya ekuke na kolemba ya kobulungana. Nazuaki kombo mpe na malembe nakendaki na malembe esika ndeke atelemaki na kobanga. Ntango natombolaki mutu ya kombo pembeni ya makolo na ye, kosimbaka kombo na mayele nionso nakokaki. Kaka ntango tokomaki na ekuke, ndeke nalombango nionso abumbukaki na bonsomi.

Lokola ndeke wana, ntango mosusu tozalaka na bobangi ya kolikia mpo ete tozali kososola te bolingo ekoki ya Nzambe mpe mposa na ye ya kosunga. Kasi ntango toyekoli muango ya Tata na Lola mpe mosala ya Yesu Kisto, tososoli ntina na Bango ezali kaka bosepeli mpe bokobi na biso ya libela.13 Bango bazali na elengi ya kosunga bisosoki tokolomba, tokoluka mpe tokobeta.14 Soki tosaleli bondimi mpe tomifongoli biso moko na komikitisa na biyano na Bango, tokomi na bonsomi uta botindiki na makasi ya bozangi bososoli mpe lokuta, mpe tokomonisama nzela liboso.

Yesu Klisto azali lisusu liziba ya kimia. Ye abengi biso “koyekola na [Yaye] loboko molayi”15 mpe alaki “kimia   … oyo eleki bososoli nionso,”16 liyoki moko oyo eye ntango Molimo na Ye “koloba[ka] kimia na ba elimo na bino”17 atako mikakatano nini ezingi biso. Ezala bitumba ya moto na moto, mobulu ya libala, to matata na mangomba ya bato, kimia ekoya ntango tolikii ete Mwana Mobali Mobotami Se Moko azali na nguya mpo na kolembisa milimo na biso ya mpasi.

Elilingi
Snježana Podvinski, mondimi na Croatie

Snježana Podvinski, moko ya motango moke ya Bansatu ya Karlovac, Croatie, amikangamaki na mobikisi ntango mobali na ye mpe baboti na ye bakufaki na katikati ya eleko ya mibu motoba na mibu eleki. Na mawa na motema, kasi kolaka na litatoli ete mabota bazali mpo na libela na libela, ye asalelaki mbongo nionsi abombaki mpo na kobembuka na tempelo, kuna ye akangisamaki na mobali mpe baboti na na ye. Ye akobalaki ete mikolo wana na tempelo ezalaki pole moko na bolmoi na ye. Mpo ete azalaki na bondimisami ya makasi ya Yesu Klisto mpe Bokikabi na Ye, ye ayokaki kimia mpe amonaki kobikisama oyo ezalaki mpe makasi moko mpo na baoyo bazingaki ye.

Bondimi na Yesu Klisto ememi mingi koleka makabo lokola lobiko mpe kimia. Lokola Mokambi Henry B. Eyring akabolaki: “nazali na botondi mingi mpo na balolenge ebele Nkolo atalaki ngai elongo na Molendisi ntango nasengelaki na kimia. Iyo Tata na biso ya Lola atali kaka te ntina ya bolendisi na biso kasi kutu mingi ntina ya bokobi na biso liboso.”18

Na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, oyo ekotisi makabo ya bosikoli mpe lisekwa, tozali na makoki ya koyambola, kobonguana, mpe kokoba liboso libela na libela. Na ntina ya nguya Ye apesi biso soki totosi, tozali na makoki ya kokoma malamu koleka lolenge tokokaki kokoma ata mokolo moko te na biso moko. Tokoki te kososola na mobimba llenge nini, kasi moko na moko kati na biso ayokaki bondimi na Kisto komata ayambaki lisusu bossoli monene ya ntina mpe bozali ya bonzambe na biso, komemaka biso kosala maponi oyo ekotisi na boyebi wana.

Atako mokili moko oyo akomeka kokitisa biso na nse na lolenge ya “mobimba ya baniama,”19 koyebaka ete Nzambe azali Tata na biso apesi biso elaka ete tozali na makoki mpe elaka ya kembo. Atako mokili oyo eyebisi biso ete bomoi ezali nsuka na liwa, koyebaka ete Mwana se Mobali se Moko ya Bolingo ya Nzambe akokisaki yango mpo na biso tosikolama mpe tosekua epesi biso elikia mpo na bokobi ya libela.

Komekola Yesu Klisto

Soki toyekoli mingi na ntina ya Yesu Klisto, tokolisi bondimi monene epai na ye mpe na bisomoko tolingi kolanda ndakisa na Ye. Kobombaka mitindo na ye ekokoma mposa na biso monene. Mitema na biso ezali na mposa ya kosunga mpasi ya basusu, lokola Ye asalaki, mpe tolingi bango bayoka kimia mpe bosepeli oyo biso tomonaki.

Mpo na nini komekaka kosala lokola Ye azalaki na nguya mingi? Mpo ete ntango totie bondimi na bison a mosala, Molimo Mosantu ememi litatoli ya bomoi ya seko,”19 Yesu ateyaki bayekoli na Ye kobomba mitindo na Ye mpo ete Ye ayebaki soki tolandi ndakisa na Ye, tokobanda kobika esengo, mpe tokokoba na nzela na Ye, tokokoma na esengo ya kotonda makasi. Ye alimbolaki, “Makambo oyo na nayebisaki bino, ete esengo na ngai ezala na kati na bino, mpe te esengo yango ekoka kotondisama.”21

Ya biso matatoli etongami na libanga makasi ya moboko ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye? Ntango bambonge ya bomoi ekiti likolo na biso, elukaka biso na bobangi nionso kotia to kokoma kosenga lisalisi na internet? Tozuaka ngonga ya kotonga mpe kokembisa boyebi na biso mpe litatoli ya Yesu Klisto ekofuta lifuti ya bozui nan tango ya mikakatano mpe kibongunia. Kotanga mokolo na mokolo makomi mpe kotiaka makanisi na maloba ya baprofeta ya bomoi, komikotisaka losambo ya ntina ya moto se yemoko, kokabolaka na bokebi nyonso elambo mposo nionso; kosalaka mosala lokola Mobikisi akokaki—moko na moko ya misala oyo ya pete ekomi etongelo moko likolo ya libanga mpo na bomoi moko ya esengo.

Nini ememeli yo esengo? Komona ya baoyo yo olingaka na nsuka ya mokolo moko molayi? Kosepela ya mosala moko esalami malamu? Esengo na misos ya moto moko ntango okaboli na bango mokumba? Maloba ya nzembo moko oyo ekotaka na bozindo ya motema na yo? Mbote ya loboko ya moninga ya kati? Bozua ngonga na biso moko ya komaniola likolo ya mapamboli na biso, mpe sima tolinga lolenge ya kokabola yango. Ntango botandi loboko mpo na kosalisa mpe kotombola bandeko na yo ya mibali mpe ya basi sangisa bato ya pembeni to na mokili mobimba moye oyo ezali na mobuli mingi, bokoyoka kimia monene mpe lobiko mpe kutu bokobi

Boya epai na Ye. Natatoli ete soki bino bokotisi bomoi na bino na Yesu Klisto, bokozua esengo na bambano na bino, ata lolenge nini yango ekozala. Na tembe te, “Ye, kaka Moko,” 22 azali eyano. Bosala ngonga mpe bokamata ngonga mpo na koya koyeba Yesu Klisto na nzela ya boyekoli na motema moko, kokolisaka bondimi na biso monene epai na Ye, mpe kosalaka makasi ya kokoma mingi kutu lokola Ye. Ntango tosali bongo, biso mpe tokoka koloba, na mwana Laynie, “Nzambe tondisama mpo na makabo ezanga kokokisana ya Mwana na Ye ya bonzambe.”23 Na nkombo epambolama mpe ebulisama ya Yesu Klisto. Amene.