2010–2019
Sanza ya Libwa 30, 2017
Sanza ya zomi 2017


Kolonga Elikia ya Nkolo mpe ya Libota na Yo

Bandeko, ntango mosusu ezali te na longonia monene tokoki kozwa uta na Nkolo koleka oyo ya koyeba ete Ye alikiaka biso mpo na kozala basimbi bonganganzambe balongobani mpe babali mpe batata banene.

Bandeko, ntango mosusu ezali na longonia moko te ya monene mingi oyo tokoki kozwa uta na Nkolo koleka koyeba Ye alikiaka biso tozali basimbi bonganganzambe tolongobani mpe mibali mpe batata ya monene.

Likambo moko ezali na ntembe te: kolonga elikia ya Nkolo ezali lipamboli moko oyo eyaka na nzela ya bokasi na biso ya monene. Elikia evandi na botosi na mitindo ya Nzambe. Kolonga elikia ya Nkolo eyaka lokola mbano ya kozalaka solo na mayokani tosalaki na mai ya libatisi mpe na tempelo esantu. Ntango tobateli bilaka na biso na Nkolo, Elikia na Ye na biso ekoli.

Nalingaki makomi ya kala mpe ya mokolo ya lelo oyo esalelaka liloba “bosembo ya motema” ntango elimboli ezaleli ya moto ya bosembo.1 Bosembo to bozangi bosembo ezali eloko moko ya ntina na ezaleli ya moto. Bato oyo bazali na “bosembo ya motema”bazali bato ya kolikia—mpamba te elikia etongami likolo ya bosembo.

Kozala moto moko ya bosembo elingi kaka koloba bantina na yo, misala na yo lokola, ezali peto mpe ya bosembo na ndenge nyonso ya bomoi na yo, ezala na libanda to na kati. Na mokano nyonso tosalala, tozwaka litomba ya elikia ya Nzambe mingi to tokitisaka elikia ya Ye. Libongi oyo elakisami ntango mosusu polele mingi koleka na mikumba na biso oyo ewuti na Nzambe lokola mibali mpe batata.

Lokola mibali mpe batata, tozwi mokumba uta na baprofeta, bamoni, mpe babimisi ya mokolo ya lelo na mokanda “Libota: Esakola na Molongo.” Mokanda oyo etei biso ete (1) )  “batata basengeli kokamba mabota na bango na bolingo mpe bosembo,” (2) batata “bazali na mokumba ya kopesa masengeli ya bomoi,” mpe (3) batata bazali na mokumba ya kobatela mabota na bango.”2

Mpo na biso kolonga elikia ya Nzambe, tokosengela kokokisa mikumba misato miwuti na Nzambe mpo na mabota na biso na lolenge ya Nkolo. Lokola elobami nsima na esakola ya libota, lolenge ya Nkolo ezali kokokisa mikumba oyo elongo na basi “lokola baninga bakokani.”3 Mpo na ngai, oyo elingi koloba tokokende liboso na mokano nyonso etali mikumba oyo misato na kozanga bomoko mobimba elongo na basi na biso.

Litambe ya yambo na boluki na biso mpo na kolonga elikia ya Nkolo ezali kotia elikia na biso na Ye. Profeta Nefi alakisaki lolenge oyo ya komipesa ntango asambelaki: “O Nkolo, nalikii na yo, mpe nakolikia na yo libela. Nakotia te elikia na ngai na loboko ya mosuni.”4 Nefi amipesaki mobimba na kosalaka bolingi ya Nkolo. Na kobakisaka na koloba “akosala makambo oyo Nkolo atindi,” Nefi aninganaki te na komipesa na kosalaka bitinda na ye, lokola elimbolami na esakola oyo: “Lokola Nkolo azali na bomoi, nakokita te epai ya tata na biso na esobe kino tokokokisa likambo oyo Nkolo atindi biso.”5

Mpamba te Nefi yambo alikiaki na Nzambe, Nzambe atiaki elikia monene na Nefi. Nkolo apambolaki ye na bosopani ya Molimo oyo epambolaki bomoi na ye, bomoi ya libota na ye, mpe bomoi ya batona ye. Mpamba te Naphi akambaki na bolingo mpe bosembo mpe apesaki makoki mpe abatelaki libota mpe bato na ye, akomi, “towumelaki na lolenge ya esengo.”6

Mpo na kolakisa emoneli ya mwasi na likambo oyo, natunaki na bana na ngaI mibale babala basalisa ngai. Natunaki soki bakokaki kopesa liloba moko to mibale etali boniboni bamonaki ntina ya elikia na lolenge esalaka na libota na bango mpe bomoi na bango. Oyo ezali makanisi ya Lara Harris mpe Christina Hansen.

Yambo, Lara: “Moko na makambo ya ntina mingi koleka mpo na ngai ezali koyeba ete ntango mobali na ngai akendaki na banzela na ye, asalaka maponi oyo elakisaka limemia mpe bolingo epai na ngai. Ntango tokoki kolikiana na lolenge oyo, ekomema kimia na ndako na biso, epai tokoki kosepela na kokolisaka libota na biso elongo.”

Sikawa makanisi ya Christina: “Kolikia na moto moko ezali lokola kozala na bondimi na moto moko. Na kozanga elikia mpe bondimi wana, ekozala bobangi mpe ntembe. Mpo na ngai, moko na mapamboli monene oyo ewutaka na kokokaka kozala na elikia mobimba na mobali na ngai ezali kimia—kimia ya makanisi koyebaka ete ya solo asalaka oyo alobaka akosala. Elikia ememaka kimia, bolingo, mpe nzinganzinga moko wapi bolingo ekoki kokola.”

Lara mpe Christina bamonaki mokolo moko te nini basusu bakomaka. Ezali kokamwa mpo na ngai ete bango mibale bakanisaki moko na moko lipamboli ya kimia na ndako ezali mbano mpenza ya kozala na mobali moko bakoki kolika. Lokola elimbolamaki na bandakisa ya bana na ngai ya basi, libondi ya kolikia ezali ntina moko ya ntina mpenza na bokoli ya ndako ya Klistona katikati na yango.

Nakokaki lisusu kosepela ete kaka ezaleli ya Klisto na katikati na kokolaka na ndako wapi tata na ngai akumisaki bonganganzambe na ye mpe alongaki elikia ya libota mobimba na ntina ya “bosembo ya motema na ye.”7 Tika ngai nokabola elongo na bino mayele uta na bolenge na ngai oyo elimboli nguya ya malamu ya kowumela oyo tata moko oyo asosoli mpe asaleki libongi ya elikia etongami likolo ya bosembo ekoki kosala na libota na ye.

Ntango nazalaki mpenza elenge, tata na ngai akelaki kompani moko oyo ekomelaki na bamasini esalaka yango moko. Nkita oyo ya kokelaka, kosalaka, mpe kotiaka na mosala biloko ya internet esalaka yango moko na mokili mobimba.

Ntango nazalaki na katikati ya secondaire, tata na ngai alingaki ngai nayekola boniboni kosala mosala. Alingaki lisusu ngai nayekola nkita uta na nse tii likolo. Mosala na ngai ya yambo ezalaki lokola kolengela nse mpe kotiaka langi na bisika ya ndako emonanaka te na bato nyonso. Namikundoli lisusu libaki nazwaka ya kotia langi bakikoso nyonso mbala mingi na mibu wana ya katikati ya secondaire.

Ntango nakotaki na secondaire, bamatisaki ngai mpo na kosala na mabele ya ndako ya bamasini. Nabandako koyekola boniboni kotanga miango eyemama mpe kotambolisa masini ya kosala bibende ya kilo. Nsima ya kosilisa secondaire, nakendeki na universite mpe nde nakotaki na misio. Na kozongaka na ndako uta misio, nazondaki mbala moko na mosala. Nazalaki na mposa ya mosolo mpo na kofuta kelasi.

Mokolo moko nsima ya misio, nazalaki kosala na masini ntango tata na ngai abengaki ngai na bilo na ye mpe atundaki soki nalingaki kokende elongo na ye na mobembo ya nkota na Los Angeles. Oyo ezalaki mbala ya yambo tata na ngai abengisaki ngai nakende na ye na mobembo moko ya nkita. Akomaki kotinda ngai mpenza na libanda mpo na kosalisa lokola ntomba ya kompani.

Liboso tolongwa mpo na mobembo, alengelaki ngai na mwa makambo ya mikemike etali basombi ya sika. Yambo, mosombi azalaki kompani moko ya mokili mobimba. Ya mibale, babandaki komatisa biloki na bango ya internet ya mokili mobimba na bamasini esalaka yango moko ya sika ya nsuka. Ya misato, kompani na biso etekelaka bango naino te liboso misala to masini ya mayele. Mpe na nsuka, mokonzi na bango ya liboso na mosala ya kosomba abengaka bosangani oyo mpo na kosembola mokanda na biso ya bantalo ya biloko na esaleli moko ya sika. Bosangani oyo elakisaki libaki moko ya sika mpe ya motuya ya nsima mpo na kompani na biso.

Nsima ya kokoma na Los Angeles, tata na ngai mpe ngai tokendaki na ndako ya mosala mpo na bosangani. Ya yambo na molongo ya nkita ezalaki kosolola mpe kososola mambi ya mwango ya mayele ya mosala. Likambo elandaki ya masolo etalaka mikemike ya esaleli, lokola bamasini mpe mikolo ya kotinda yango. likambo ya manaka ya kosukisa ekangamaki na kotia ntalo, boyokani, mpe masengeli. Awa nde makamabo ekomaki elengi.

Mokonzi ya kompani oyo alimbolaki na biso ete ntango tosengaki ezalaki moke mingi koleka ya oyo basusu batindaki bantalo mpo na mosala. Nde, kokamwa, ye ayebisaki biso ntalo ya mibale na moke. Nsima atundaki bisonsoki tokokaki kolinga kokamata lisusu mokanda ya bantalo nab so mpe kotinda yango lisusu. Alobaki ete ntalo na biso ya sika esengelaki kokoma mwa na nse ya bantalo elekaki likolo ya kolanda. Nde alimbolaki ete tosengelaki kokabola badolar ebakisa ya sika 50–50 na ye. Alimbolaki yango na kolobaka ete moto moko alingaki kolonga. Kompani na bio elingaki kolonga mpamba te tolingaki kosala mosolo mingi mpenza koleka ntalo na biso ya liboso. Kompani na ye elingaki kolonga mpamba te balingaki lisusu kosala nkita na ntali ya nse mingi koleka. Mpe, na ntembe te, alingaki kolonga na kozwaka ndambo na ye mpemba te atiaki nkita oyo ya monene elongo.

Nsima apesaki biso motango moko ya sanduku ya mikanda wapi tokokaki kotinda  mosolo oyo azalaki kosenga. Nsima ya nyonso oyo, atalaki tata na ngai mpe atundaki, “Boye, tosali nkita ya malamu?” Na bokamwi na ngai makasi, tata na ngai atelemaki, apesaki ye mbote ya maboko, mpe alobaki na ye tokozongela ye.

Nsima ya kotika kosangana wana, tomataki na motuka ya kofutela, mpe tata na ngai abalukaki na ngai mpe atundaki, , “Malamu, okanisi nini tosengeli kosala?”

Nayanolaki na kolobaka nakanisaki te ete tosengelaki kondima likabo oyo.

Tata na ngai nde atundaki, “Okanisi te ete tozali na mokumba na basali na biso nyonso na kokobaka na kofuta bango?”

Ntango nazalaki komaniola motuna wana mpe yambo nakoka koyanola, ayangola motuna na ye moko. Alobaki, “Yoka, Rick, soki ozwi kaniaka mbala moko to oteko bosembo na yo, ezali mpasi na kozongisa yango. Kosala yango mokolo moko te, ata mbala moko te.”

Na kokabolaka likambo oyo nalingi koloba ete nabosana ata moko te nini tata na ngai ataki ngai na mobembo wana ya liboso ya nkita elongo na ye. Nakoboli likambo oyo mpo na kolimbola nguya ya kowumela tozali na yango lokola batata. Bokoki kobanza elikia nazalaki na yangona tata na ngai na tina ya bosembo ya motema na ye. Asalelaki mabongi wana kaka na bomoi na ye ya kati elongo na mama na ngai, bana na ye, mpe banso elongo na bango asalaki.

Bandeko, ezali losambo na ngai mpokwa oyo ete tokoka basgo yambo kotia elikia na biso na Nkolo, lokola Nefi qpesaki ndakisa, mpe nsima, na nzela ya bosembo ya mitema kolonga elikia ya Nkolo, elikia ya basi mpe bana na biso lokola. Ntango tososoli mpe tosaleli libongi oyo ya bule ya kotonga likolo ya bosembo, tokozala solo na mayokani ya biso ya bule. Tokolonga lisusu na kokamba mabota na biso na bolingo mpe bosembo kopesaka makoki ya bomoi, mpe kobatelaka mabota na biso na mabe ya mokili. Ya bosolo oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.