2010–2019
Yango Ezali mpo ya Bato Banso
Sanza ya Minei 2018


Ezali mpo na Ntina ya Bato Nyonso

Eklezia ezali nyonso na ntina ya bino, bayekoli ya Nkolo—baoyo balingaka mpe balandaka Ye mpe bazwi nkombo na Ye likolo na bango.

Ntango ya bolelengeli mpo na kotonga Tempelo kitoko ya Paris France, nazwaki boyebi moko nakoki kobosana yango te. Na mobu 2010, ntango esika mpo na kotonga Tempelo ezwamaki, mokambi ya engumba asengaki mpo na kokutana na biso mpo na koyeba mingi na ntina ya Eklezia na biso. Bokutani oyo ezalaki na litomba monene mpo na kozwa ndingisa ya botongi. Tolengelaki na bokebi mpenza kolakisa mingi bilili oyo esangisaki bantempelo ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka. Elikia na ngai ya makasi ezalaki ete kitoko ya botongi na yango ekokoka mpo na kondimisa mokambi ya engumba kosunga mabongisi na biso.

Oyo ekamwisaka ngai, mokambi ya engunba alakisaki ete ata komonisa bilili na biso te, ye mpe lisanga na ye basepelaki kokamba boluki boyebi na bangomei mpo na kozwa mpenza eklezia ya lolenge nini tozalaki. Sanza elandi, tobiangamaki kozonga koyoka mikano epesami na na lisanga ya engumba oyo lisusu esalemaki mpo na kozala molakisi ya mambi ya kala ya biyamba. Atelemaki mpe alobaki, “Likolo ya nyonso, tolingaki kososola oyo bandimi ya Eklezia na bino bozali. Yambo, tokendaki na moko ya liyangani na bino ya elambo. Tovandaki na nsuka ya ndako nzambe na bino mpe nabokebi tolandaki bato kati na lisanga mpe nini bazalaki kosala. Bongo tosololaki na bato ya pembeni—baye bavandi nzinga nzinga ya ndako ya likonzi na bino—mpe totunaki bango bato ya lolengi kani bino ba Mormons bozali.”

“Na yango mikano na bino ezali nini?” Natunaki, koyokaka mwa kanda moke. Ayanolaki, “Tokomi na boyebi ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali solo pene na Eklezia ya Yesu Klisto ya kala kolela ata eklezia moko te toyebi.” Nasimbamaki bongo na maloba, “Oyo wana esalemaki ekokisamaki te! Yango ezali te eklezia oyo ezali pene mpenza; yango ezali Eklezia ya Yesu Klisto— Eklezia se moko, Eklezia ya solo!” Kasi namivandisaki kimia mpe nasalaki libondeli ya botondi na kimia. Na bongo ete mokambi ya engumba apesaki biso toli oyo, kotalaka boyebi na bango, ye mpe lisanga na ye bazwaki ata mabe moko te mpo na botongi ya tempelo na engumba na bango.

Lelo, ntango nazali kokanisa na ntina ya boyebi ya kokwama wana, nazali na botondi mpo na bwanya ya mokambi ya engumba mpe bososoli ya molimo. Ayebaki ete fungola mpo na kososola Eklezia ezali te na kotala yango na nzela ya kotalaka libanda lolenge palwasi yango etongami to ata mabongisi malamu ya lisanga kasi na nzela ya ba milio ya bandimi ya solo, baye bazali komeka mikolo minso kolanda ndakisa ya Yesu Klisto.

Ndimbola ya Eklezia esengeli komonisama uta na mokapo ya Buku ya Mormon oyo elobi, “Mpe bako [kozala bayekoli ya Nkolo] oyo babatisamaki na nkombo ya Yesu ebengamaki eklezia ya Klisto.”1

Na maloba mosusu, Eklezia ezali nyonso na ntina ya bato. Yango ezali nyonso na ntina na bino, bayekoli ya Klisto—baoyo balingi mpe balandi Ye mpe bazwi nkombo na Ye likolo na bango na mayokami.

Mokambi Russell M. Nelson mbala moko akokanisaki Eklezia na motuka kitoko. Tolingaka banso ntango motuka na biso ezali peto mpe kongenga. Kasi ntina ya motuka ezali te mpo na kozala libanda lokola eloko ya kosepelisa; yango ezali mpo na komema bato na motuka.2 Na lolenge moko, biso, lokola bandimi ya Eklezia, tosepelaka kozala na bisika kitoko ya kosambela oyo ezali peto mpe ebatelami malamu, mpe tolingaka lisusu kozala manaka ebongisami malamu. Kasi wana ezali kaka mabongisi ya lisungi.Ntina na biso ezali kobongisa mwana mwasi mpe mwana mobali nyonso ya Nzambe koya epayi ya Klisto mpe kokamba ye to na nzela ya mayokami. Eloko moko te ezali na ntina koleka. Mosala na biso ezali nyonso na ya bato mpe mayokami.

Ezali yango bikamwa te ete nkombo epesami na likundoli mpo na kozongisa Eklezia kokanga elongo biteni mibale ya ntina koleka biteni kati na nyonso ya mayokami ya nsango malamu? Yambo ezali nkombo ya Yesu Klisto. Eklezia oyo ezali ya Ye. He azali na mutu na yango, mpe Bomikabi na Ye esantisi mpe mayokani ezali se bobele nzela ekomema na lobiko mpe konetolama. Ya mibale nkombo ememami epayi na biso: Bansantu, to na maloba mosusu, banzeneneke na Ye mpe bayekoli na Ye.

Nayekolaki ntina mpenza ya kolanda na bato na bokebi ntango nazalaki kosala lokola mokambi ya likonzi na France. Na ebandeli ya mosala na ngai, nazalaki na makanisi bantina kitoko mpo na likonzi: kosala ba palwasi ya sika, kotonga ndakonzambe ya sika, mpe kutu botongi ya tempelo kati na etuka na biso. Ntango napemisamaki sima ya mibu motoba, ata moko ya bantina wana ekokisamaki. Oyo ezalaki lokola kozanga elonga, na mibu motoba wana, bantina na ngai ekomaki ndengenge mosusu.

Ntango natelemaki na esambelo mokolo ya bobimi na ngai, elekelaki ngai na kozwa mpenza ntina ya botondi mpe bokokisi. Natalaki bilongi ya minkama ya bandimi bazalaki wana. Nakokaki kokokanisa boyebi ya molimo esangani na moko na bango.

Wana ezalaki na bandeko basi mpe mibali baye oyo bakotaki na mayi ya batisimo, baye mpo na nini na natiaki mokoloto mbala ya yambo na mokanda ya [ndingisa ya kokota na] tempelo na yango bakokaki kowza makuli masantu mpo na tempelo, bilenge wana mpe balongami natiaki mpembeni to na pemisaki lokola bamisionele ya ntango molai. Azalaki na mingi basusu mpo na oyo nasalaki lokola bakendaki kotala na ngonga bazalaki na mitungisi mpe mikakatano na bomoyi na bango. Nayokaki bondeko makasi ya bolingo ya moko na moko kati na bango. Nazwaki mpenza esengo na kosalelaka bango mpe nasepelaki na bokolisi bosembo mpe bondimi mpo na Mobikisi.

Mokambi M. Russell Ballard eteyaki, “Oyo ezali na ntina mpenza na mikumba na biso kati na Eklezia ezali motango topesaka ya rapport oyo topesaka te to masanga oyo tosalaki kasi soki moto na moto—kosalaka mpo na moto na ngonga kaka lokola Mobikisi asalaki—etombolaki mpe elendisaki mpe ebongwanaki mpenza.”3

Bandeko na ngai ya basi mpe mibali, ezali biso mpenza kosalela nsango malamu, to ezali biso komipesa na makambo ya bisomeyi oyo ezali kozwa biso ngonga mpo na kosala misala kati na Eklezia? Fungola ezali kolanda ndakisa ya Mobikisi na makambo nyonso. Soki tosali yango, tokomipesa mpenza kobikisa bato koleka koluka kokokisa mikumba mpe kosalela bamanaka.

Bomituna binomei te nini yango ekokaki kozala soki Mobikisi akotala palwasi to etape na bino mokolo ya eyenga ekoya? Nini Ye akosala? Ekoki Ye komitungisa na koyeba soki kosalela bilili mpo na kosunga bato basosola etiamaki malamu na kelasi? To ekoki Ye moto kolinga, koteya mpe kopambola? Ntango mosusu Ye akoki koluka libanda mondimi ya sika to moninga mpo na kotombela ye boyei malamu, ndeko mwasi to mobali ya bokono to ndeko mwasi na bosenga ya libondisi, to elenge azali kotatabana oyo asengeli kotombolama mpe kolendisama.

Bakelasi nini Yesu akoki kotala? Nakoki kokamwa te soki Ye atali liboso Eteyelo ya Bana. Akoki nakanisi kofukama mpe kolobela bango mbunzu na mbunzu. Akolakisa bango bolingo na Ye mpo na bango, kobetela bango masolo, kokumisa bango na koyema na bango, mpe kotatola mpo na Tata na Ye ya Lola. Ezaleli na Ye ekoki kozala ya mindondo te, solo mpenza, mpe ya esengo. Tokoki kosala bongo?

Nalaki bino ete lokola bino komekola kozala na manaka ya Nkolo, eloko moko te ekoki kokoma na ntina koleka kozwa bato baye bokoki kosunga mpe kopambola. Na eklezia bokoki kotala kaka mateya ya bato mpe kosimba mitema na bango. Mposa na bino ekozala kosalisa mpo na boyebi ya molimo mpenza koleka kobongisa mosala ebongi nie, mpo na kosala na bino kolanda bandimi koleka kotia elembo na mokanda mpo na motango ya botali bosalaki. Ekozala te na ntina na bino kasi na ntina na Bango baye tobengi bandeko na biso ya basi mpe ya mibali.

Ntango mingi tolobelaka na ntina ya kokende na eklezia. Kasi ezali malamu koleka kotonga to kozala na esika songolo. Ezali mpenza mpe na bomoi ya bavandi ya komikitisa na bisika mosika ya mokili lokola yango ezali na esika ya bakambi ya Eklezia na Salt Lake City. Nkolo yemei alobaki, “Esika mibale to misato basangani na nkombo na ngai, wana Nazali kati na bango.”4

Tomemaka Eklezia elongo na biso bisika binso tokendaka: na mosala, na eteyelo, na mobembo, mpe solo mpenza na bandako. Kozala na biso mpenza mpe bobendi ekoki kokoma mpo na kozwa bisomei esika esantu.

Namikundoli lisolo nazwaki na moninga moko oyo azali mondimi ya bondimi na biso te. Akomwaki mpo na koyekola ete moto alongobani nyonso na Eklezia na biso akoki kozwa bonganganzambe. Atunaki, “Kasi motango boni ya bakumbi bonganganzambe tozali na bango na palwasi?”

Nayanolaki, “Kati ya 30 mpe 40.”

Elekelaki ye, akobaki, “ na lisanga na ngai, tozali bobele na nganganzambe moko. Mpo na nini bosengeli na banganganzambe ebele mokolo ya eyenga na ntongo?”

Nayokaki pasi na motuna oyo, Nayokaki lifulami mpo na koyanola, “Nandimi. Nakanisi te tosengeli na bakumbi bonganganzambe wana ebele na eklezia mokolo ya eyenga. Kasi tozali na bosenga ya mokumbi bonganganzambe na libota nyonso, bakumbi bonganganzambe mosusu babiangemi likolo mpo na kotala mpe kosala mpo na libota.”

Ya biso ezali kaka te mpo na mokolo ya eyenga na eklezia. Kokembela na biso ekobaka mikolo nyonso ya mposo, wapi tokozala mpe na nini tokosala. Bandako na biso mpenza ezali “eteyelo ya bondimi na biso.”5 Yango ezali mingi kati na mabota na biso ete tobondelaka, topambolaka, toyekolaka, toteyaka liloba ya Nzambe, mpe tosungaka na na bolingo ya solo mpenza. Natungisamaki mpo na kokanisa ete ntango toyambi mopaya na mabota na biso, soki bazali bandimi to te, ata na lolenge nini tosengeli kobengisa bango na eklezia. Nakoki kotatola uta na boyebi na ngai ete mabota na biso ezali bisika ya bule wapi molimo ekoki kotondisama—mbala na mbala, mpe ntango nyonso kutu koleka, na bisika na biso ya kosanzola.

Natatoli ete oyo ezali Eklezia ya Yesu Klisto Eklezia yango moko oyo Ye abongisaki ntango ya misala na Ye na nse ya mabele, Eklezia ya solo! Ezalali kokoma na bokasi mpe nguya uta na misala ya bamilio ya bayekoli na Ye oyo bazali komeka mikolo minso kolanda ndakisa monene na Ye na kosalisaka basusu bisika binso bazali. Bomoi ya Klisto, mpe Azali kotambwisa Eklezia na Ye. Mokambi Russell M. Nelson azali profeta oyo aponi mpo na komema mpe kokamba biso na mikolo na biso. Makambo maye natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.