2010–2019
Botala Moto!
Sanza ya Minei 2018


Botala Moto!

Baoyo bazwaka mpenza nzela ya bosolo ya kotala Moto bozwaka nzela ya ekuke na esengo monene ya bomoi mpe mafuta mpo na boyokisi mpasi ya bomoi oyo.

Bandeko nan gai ya mibali mpe basi, baninga na ngai, nazali na esengo ya kozala elongo na bino lelo na likita linene itoko oyo na nsuka ya poso. Harriet mpe ngai tozali kosepela elongo na bino na koyambaka Bampaka ya  Mpaka Gong mpe Soares mpe bandeko mibali mpe basi baoyo bazwaki mabiangi ya ntina na ntango ya likita linene oyo.

Atako nabungisi moninga na ngai ya bolingo Mokambi Thomas S. Monson, nalingaka, nasalisi, mpe nasungi  profeta na biso mpe Mokambi, Russell M. Nelson, mpebapesi toli na ye.

Nazali lisusu na botodi mpe lokumu ya kosala penembeni ya Bandeko nan gai ya mibali ya Lisanga likoki ya Zomi na mibale.

Mingi mingi, nazali na bomikitisi mpe esengo makasi ya kozala mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka, esika wapi bamilio ya mibali mpe basi mpe bana bazali na bolingi ya kotelema esika bafandi—longola likoki to libiangi—mpe bazali koluka na ya bango mitema nyonso mpo na kosalisa Nzambe mpe baninga, kotongaka bokonzi ya Nzambe.

Lelo ezali mokolo ya bule. Ezali Eyenga ya Pasika, ntango tozali koyangela ntongo ya nkembo oyo ntango Mobikisi abukaki mikangano ya nkufa1 mpe abimaki na nkembo uta na lilita.

Mokolo Monene kati ya Lisolo

Nasengaki na inteneti, “Mokolo nini ebongwami uta lisitwale?”

Biyano ezali ya kokamwa mpe biamwa na komona mpe etumbolaka makanisi. Na kati na bango, mokolo ntango asteroide ebetaki Peninsule ya Yucatán; to ntango na 1440, Johannes Gutenberg asilisaki bobeti mokanda na ye; mpe ya solo mokolo na 1903 ntango bandeko Wright balakisa ete bato bakokki mpenza  kopumbwa.

Soki motuna ya lolenge moko etunamaki epai na bino, bokoloba nini?

Na makanisi na ngai eyano ezali polele.

Mpo na kozwa mokolo ya ntina koleka na lisitwale, tosengeli kozonga nsima na mpokwa wana mibu 2,000 eleki na Elanga ya Getesemane ntango Yesu Klisto afukamaki na losambo makasi mpe amikabaki mbeka Yemei lokola libonza mpo na masumu na biso. Ezalaki na ntango ya libonza oyo monene mpe ezanga nsuka ya bolozi  makasi na nyonso mibale na nzoto mpe na molimo oyo Yesu Klisto, kutu Nzambe , makila ebimaki na madusu nyonso ya loposo. Na bolingo ebonga nie , Apesaki nyonso mpo ete tokoka kozwa nyonso. Likabo na Ye ya motuya, mpasi mpo na kososola, bobele mpo na koyokisama na motema na biso mpe makanisi, emikundoli biso nyongo ya mokili mobimba ya botondi oyo todefaki na Klisto mpo na likabo na Ye ya bonzambe.

Nsima na mpokwa wana, Yesu amemamaki liboso ya bakambi ya biyamba mpe ya politiki oyo batiolaki Ye, babetai Ye, mpe babomaki Ye na liwa ya nsoni. Abakamaki na ekulusu kino nyonso, na nsuka, “e [silaki].”2 Nzoto na Ye ezanga bomoi etiamaki na lilita oyo edefamaki. Mpe nsima, na ntongo ya mokolo ya misato, Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe ya bokasi nyonso, abimaki na lilita lokola moto ya nkembo, mosekwi ya nguya, pole mpe nkumu.

Iyo, milulu ebele esalemaki na lisitwale ya mokili oyo ekomela bomoi ya bikolo mpe bato. Kasi bosangisa yango nyonso, mpe ekoki kobanda kokokanisa na ntina ya oyo ekomelaki na ntongo ya Pasika ya yambo wana.

Nini esalaka likabo ezanga nsuka mpe ya bosekwi ya Yesu Klisto ezala molulu ya ntina na lisitwale—koleka bitumba ya mokili, bobebisi ya cataclysmique, mpe mabimisi ya bato ya mayele?

Mpo na ntina ya Yesu Klisto, Tokoki Kozala Lisusu na Bomoi

Eyano ezali na mimekano minene mibale, oyo moko na moko na biso akutanaka na yango.

Ya yambo, tokokufa biso nyonso. Ata ozali elenge, ata ozali kitoko, bokolongono malamu, to na bokebi, mokolo moko nzoto na yo ekozanga bomoi. Baninga mpe libota bakolela yo. Kasi bakoki kozongisa yo na bomoi te.

Na yango, mpo na Yesu Klisto, nkufa na bino ekozala mpo na ntango. Molimo na yo mokolo moko ekosangana elongo na nzoto na yo. Nzoto ya bosekwi oyo ekokufa lisusu te,3 mpe okozala na bomoi ya seko, mpasi ekozala te mpe monyokoli ya nzoto ekozala te.4

Yango ekosalema mpo ete Yesu Klisto, oyo akitisaki bomoi na Ye mpe atombolaki yango lisusu.

Asalaki nyonso oyo mpo na baoyo bandimelaka Ye.

Asalaki nyonso oyo mpo na baoyo bandimelaka Ye te.

Asalaki oyo kutu mpo na baoyo batiolaka Ye, mpe bapamelaka nkombo na Ye.5

Mpo na Yesu Klisto, Tokoki Kofanda elongo na Nzambe

Ya mibale, tosalaki masumu biso nyonso. Masumu na biso ekopekisa biso mpo na libela kofanda elongo na Nzambe, mpo ete “eloko ya mbindo moko te ekoki kokota na bokonzi na ye.”6

Lokola mbano, mobali, mwasi, mpe mwana nyonso alongolamaki liboso na Ye—yango ezali, kino Yesu Klisto, Mwana na mpate azanga mabe, amikabaki bomoi na Ye lokola mbeka mpo na masumu na biso. Mpo ete Yesu adefaki nyongo te mpo na boyengebene, Akokaki kofuta nyongo na biso mpe kosilisa boyengebene mpo na molimo nyonso. Mpe yango ezali mpo nay o mpe ngai.

Yesu Klisto afutaki motuya mpo na masumu na biso.

Banso ya bango.

Na mokolo wana ya motuya na lisitwale, Yesu Klisto afungolai bikuke ya nkufa mpe abwakaki libanda bandelo oyo epekisaki biso na kala tokota na ndako esantu mpe ya bule ya bomoi ya seko. Mpo na ntina ya Mobikisi na biso, bino elongo na ngai topesami likabo ya ntina koleka mpe ya motuya mingi—etali kutu lobi na biso eleki te, tokoki koyambola mpo kolanda nzela oyo ekambaka na pole ya selesitiale mpe nkembo, kozingama na bana ya bondimi ya Tata na Lola.

Mpo na nini Tozali Kosepela

Oyo ezali oyo tozali kokembela na Eyenga ya Pasika—tokembelaka bomoi!

Mpo na ntina ya Yesu Klisto, tokolamuka uta na boyoisi motema mpasi ya nkufa mpe tooyamba baoyo tolingaka na maboko na biso, kosopaka mpinzoli ya esengo makasi mpe kosopaka botondi. Mpo na ntina ya Yesu Klisto, tokozala lokola bato ya seko, mikili ezanga nsuka.

Na ntina ya Yesu Klisto, masumu na biso ekoki kaka kolimwisama te; ekoki kobosanisama.

Tokoki kopetolama mpe konetolama.

Bule.

Mpo na ntina ya Molingami Mobikisi, tokoki mpo na libela komela uta na liziba ya mai oyo ebimaka na bomoi ya seko.7 Tokoki kofanda libela na bifandelo ya Mokonzi na biso ya seko, na nkembo ya likolo mpe esengo ya bobongi nie.

Biso Tomonaka “Botala Moto”?

Kasi na nyonso wana, ezali na bato ebele na mokili lelo basosolaka to bandimelaka likabo kitoko oyo ya Yesu Klisto apesaki biso. Bakoki kozala bayokaki na ntina ya Yesu Klisto mpe bayebi Ye lokola elembo ya lisitwale, kasi bamonaka Ye te mpo na nani Ye azali mpenza.

Ntango nazali kokanisa yango, nazali komikundola Mobikisi atelemi liboso ya mokonzi ya Loma ya Yuda, Pose Pilate, mwa bantango moke yambo ya nkufa na Ye.

Pilate azwaki Yesu lokola moto ya mokili mpenza. Pilate azalai na mosala ya kosala, mpe yango ezalaki na misala mibale ya ntina: kosangisaka mpako ya Loma mpe kotiaka kimia. Sikawa Bapesi toli ya Juda bamemelaki ye moto oyo balobaki azalaki monguna mpo na bango.8

Nsima ya kotuna mituna na mokangami na ye, Pilate alobaki, “namoni azali na mbeba tea ta moke.”9 Kasi amonaki ete asengelai kosepelisa bafundi ya Yesu, na yango Pilate akanisaki na bobimisi ya mokangemi oyo ezalaki kosalema na eleko ya Pasika. Batikaki ye te Yesu na esika ya mbolombolo moyibi mpe mobomi Balanabase?10

Kasi bato bagangaki basengaki na Pilate ete babimisa Balanabase mpe babaka Yesu na ekulusu.

“Mpo na nini?” Pilate atunaki, “Mabe nini ye asali?”

Kasi bagangaki na mongongo makasi. “Bobaka ye na ekulusu!”11

Na likoki ya nsuka mpo na kosepelisa bato, Pilate apesaki ndingisa na bato na ye bakanga Yesu.12 Basalaki yango, babimisaki Ye makila pene ya nkufa. Batiolai Ye, batiaki ye ekoti ya nzube na moto na Ye, mpe balatisaki Ye nzambala ya motane.13

Ntango mosusu Pilate akanisaki yango ekokaki kosepelisa bato mpo na makila. Ntango mosusu bakozala na mawa ya moto oyo. “Tala, namemi ye liboso na bino,” Pilate alobaki, “mpo bokoka koyeba ete namoni mabe moko kati na ye. … Botala Moto!”14

Mwana ya Nzame atelemaki na bomoto liboso ya bato ya Yelusaleme.

Bakokaki komona Yesu, kasi bakokaki komona Ye malamu te.

Bazalaki na miso mpo na komona te.15

Na lolenge elongobani, biso mpe tobiangemi “kotala moto.” Makanisi na ntina na Ye ezali ya kokesena na mokili. Baprofeta ya kala mpe sika batatolaka ete Azali mwana ya Nzambe. Ezali ntina mpe motuya ete moko na moko kati na biso ayebaka mpo na biso moko nsima. Na yango, ntango bomanyoli bomoi mpe mosala ya Yesu Klisto, bomonaa nini?

Baoyo bamonaka nzela ya kotala mpenza Moto bazwaka nzela ya ekuke na esengo makasi ya bomoi mpe mafuta esengama ya boyoki mpasi makasi na bomoi.

Na yango, ntango botungisami na mawa mpe mpasi, botala Moto.

Ntango boyoki ya kobunga to ya kobosana, botala Moto.

Ntango boyokisami motema mpasi, botungisami, na ntembe, botukami, to bonyokwami, botala Moto.

Akolendisa bino.

Akokangola bino mpe akopesa ntina na mobembo na bino. Akosopa Molimo na Ye mpe akotondisa motema na esengo makasi.16

Apesaka “nguya na botau; mpe na baoyo bazangi makasi abakisaka bompikiliki.”17

Ntango tokutani na Moto, toyekoli na ntina na Ye mpe toluki kokomisa bomoi na biso lolenge moko na ya Ye. Toyamboli mpe toluki kobongola ndenge na biso mpe tokoli moko na moko pene ne Ye. Tondimeli Ye. Tolakisi bolingo na biso mpo na Ye na kotosaka mitindo na Ye mpe kozalaka na bomoi ya bule na mayokani na biso.

Na maloba mosusu, tokomi bayekoli na Ye.

Pole na Ye ya malamu ekotondisama na milimo na biso. Ngolu na Ye ekotombola biso. Mikumba na biso ekokoma pepele, kimia na biso ekozala makasi. Ntango totaleli mpenza Moto, tozali na elikia ya lobi ekoya oyo efulaka mpe ekokamba biso na banzela mike mpe ya mabulu na mobembo ya bomoi. Kotalaka sima, toyeba ete ndakisa ezali ya bonzambe, oyo matono ya bokangemi ekutanaka.18

Ntango bondimeli bomiabi na Ye, bokomi bayekoli na Ye, mpe na nsuka bosimbi nsuka ya mobembo na bino ya mabele, oyo ekokoma ya mawa oyo bokutanai na yango na bomoi oyo?

Ekosila.

Boyokisi motema pasi, baboteki, mikakatano, oyo bokutanaki na yango?

Gone.

Mpasi, minyoko, mawa, nsoni mpe bolozi oyo bokutani na yango?

Ekei.

Ebosani.

Ezali kokamwa ete “tozali kolobela na ntina ya Klisto, tosepelaka mpo na Klisto, tozali koteya Klisto, tozali kosakola Klisto … ete bana na biso bakoka koyeka epai wapi liziba bakoki koluka mpo na bolimbisi ya masumu na bango”?19

Ezali kokamwa ete tolukaka na motema na biso mobimba mpenza kotala Moto?

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, natatoli ete mokolo ya ntina koleka na lisitwale ya moto ezalaki ntango Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, alongaki elonga likolo ya nkufa mpe lisumu mpo na bana nyonso ya Nzambe. Mpe mokolo ya ntina koleka na bomoi na bino mpe ngai ezali mokolo ntango toyekoli “kotala moto”; ntango tomoni Ye mpo na oyo Ye azali mpenza; ntango toliaka elambo na motema na biso mobimba mpe mayele ya nguya ya bomikabi na Ye; ntango tokomisaka sika bompikiliki mpe makasi, tondimaka kolanda Ye. Tika ete ezala mokolo oyo ekoya mbala na mbala na bomoi na biso mobimba.

Natikeli bino litatoli na ngai mpe lipamboli ete ntango “totaleli moto,” toozala na ntina, esengo, mpe kimia na bomoi oyo ya nse mpe bomoi ya seko na mokili ezali koya. Na nkombo ya bule ya Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Mozia 15:23.

  2. Yoane 19:30.

  3. Tala Alma 11:45.

  4. Tala Emoniseli 21:4.

  5. Tala 1 Bakolinti 15:21–23.

  6. 3 Nefi 27:19.

  7. Tala Yoane 4:14.

  8. Tala Luka 23:2.

  9. Yoane 18:38. Mpo na koboya kosambisa Yesu, Pilate amekaki kotinda likambo yango epai ya Elode Antipas. Soki Elode, oyo atindaki baboma Yoane Mobatisi (Tala Matai 14:6–11), akokaki kotia Yesu na nkufa, Pilate akokaki kotika bosambisi mpe koloba ezalaki likambo moke oyo andimakai na ntina ete abatela kimia. Kasi Yesu alobaki liloba moko te na Elode (Tala Luka 23:6–12), mpe Elode azongisaki Ye epai ya Pilate.

  10. Tala Malako 15:6–7; Yoane 18:39–40. Mokomi moko monene ya Boyokani ya Sika akomaki, “Ekonisamaki kozala ezalela ya bonkoko, ete na Pasika Moyangeli ya Loma azalaki kopesa na Bayuda mokangemi moko oyo apesamaki etumbu ya liwa” (Alfred Edersheim, The Life and Times of Jesus the Messiah [1899], 2:576). Nkombo Balabase elakisi “mwana ya tata.” Lokuta ya kopesaka na bato ya Yelusaleme boponi ya bato mibale oyo ezali ntina makasi.

  11. Tala Malako 15:11–14.

  12. This scourging was so terrible it was called “the intermediate death” (Edersheim, Jesus the Messiah, 2:577).

  13. Tala Yoane 19:1–3.

  14. Yoane 19:4–5.

  15. Kala te, Yesu amonaki ete “mitema ya bato oyo ekomaki na lolendo, mpe matoi na bango ekangemi, mpe miso na bango eangemi; na ntina ete na ngonga moko baoka komona na misu na bango, mpe koyoka na matoi na bango, mpe bakoka kososola na mitema na bango, mpe babongola mitema, mpe bakangolama.” Mpe nsima na sembo Alobaki na bayekoli na Ye, “Miso na bino epambolami, mpe emoni: mpe matoi na bino, mpo eyoki” (Matai 13:15–16). Tokopesa ndingisa na mitema na biso ezala makasi, to tokofungola miso na biso mpe mitema mpo ete tokoka komona mpenza Moto?

  16. Tala Mozia 4:20.

  17. Yisaya 40:29.

  18. Tala Dieter F. Uchtdorf, “The Adventure of Mortality” (worldwide devotional for young adults, Sanza ya yambo. 14, 2018), broadcasts.lds.org.

  19. 2 Nefi 25:26.