2010–2019
Zwa Molimo Mosantu lokola Mokambi na Yo
Sanza ya Minei 2018


Zwa Molimo Mosantu lokola Mokambi na Yo

Likabo nini ekokani na oyo eya epayi ya baoyo bazali na bondimi epayi ya Yesu Klisto. Likabo wana ezali Molimo Mosantu

Na Eyenga oyo ya Pasika, makanisi na biso ebaluki na Bosekwi ya Nkolo Yesu Klisto mpe nkunda ya mpamba oyo epesi mondimi nionso elikia na elonga monene ya Klisto likolo likolo ya kopola soki yango te. Nandimi, elongo na Apostolo Polo, ete bobele lokola Nzambe Klisto “alamukaki na bawa [boye] esekwisaki [Ye] lisusu [ya biso] nzoto ya kufa na Molimo na ye oyo ezali na [biso].”1

Kosekwisa elingi koloba kopesa bomoi. Kaka lokola Klisto azongisaki lisusu bomoi na nzoto na biso na nzela ya nguya ya Bosekwi na Ye, boye akoki kopesa biso bomoi na liwa ya molimo2 Na buku ya Mose, totangi ete Adama azwaki lolenge oyo ya bosekwi: “[Adama] abatisamaki, mpe Molimo ya Nzambe ekitaki likolo na ye, mpe bongo abotamaki na Molimo, mpe akomaki asekwisamaki na moto ya kati.”3

Likabo ya kokamwa kani eyei nab aye batii bondimi na Yeus Klisto. Likabo wana ezali Molimo Mosantru kopesaka biso nini Boyokani ya Sika ebengi “bomoi na Klisto.”4Kasi tosalaka ntango nyonso mpo na kozwa lokola likabo?

Bandeko mibali mpe bandeko basi, ezali litomba moko ya kafukafu mpo na “kozala … na Molimo Mosantu lokola mokambi na [biso]”6—lokola elimbolami na lisolo ekolanda.

Elilingi
Ensign Frank Blair

Na ntango ya Etumba ya Corée, Ensign Frank Blair asalaki na masuwa ya kokumba mampinga etelemaki na Japon.7 Masuwa wana ezalaki monene te ekokaki mpo na kozala na Pasteur ya solo, boye basengaki Ndeko Mobali Blair na kozala Pasteur ya bongo na bongo, lokola bamonaki ete elenge mobali azalaki moto moko ya bondimi mpe ya libongi, oyo atosamaki mpenza na liboke mobimba ya basali.

Elilingi
Ensign Blair

Ensign Blair akomaki: “Masuwa na biso ekangamaki na kabakata ya mbonge moko. Mbonge ezalaki penepene na metela 14 ya molai. Nazalaki na bokengeli … na ntango yango moko ya motele na biso miteni etikaki kosala mpe bobukani moko eyokamaki na nzela ya kati ya masuwa.Totitakali na motele mobale, moko na yango kosalaka na katikati ya makasi na yango. Tozalaki mobulu ya solo.”

Ensign Blair asilisaki bokengeli na ye mpe azalaki kokende kolala ntango kapiteni abetaki na ekuke na ye. Ye asengaki, “Okoki palado kosambela mpo na masuwa oyo.” Na ntembe te, Ensign Blair andimaki kosala yango.

Na esika wana, Ensign Blair akokaki kaka kosambela, “Tata ya Lola, nasengeki opambola masuwa na biso mpe batela yango na likama,” mpe nsima kokenge kolala. Esika na yango, asambelaki mpo na koyeba nini akokaki kosala  mpo kobikisa masuwa na likama. Na eyano na losambo ya Ndeko Mobali Blair, Molimo Mosantu atindaki ye akende ma etando, koloba na kapiteni, mpe koyeba lisusu mingi. Asosolaki ete kapiteni azalaki komeka koyeba mbangu kani kotambolisa motele etikalaki ya masuwa. Ensign Blair azongaki na esika na ye mpo na kosambela lisusu.

Asambelaki, “Nini nasengeli kosala mpo na kosalisa koyanola na kpokoso na motele?”

Na eyano, Molimo Mosantu anungonisaki ete asengelaki kotambola na masuwa mpo na kosangisa mayele.Azongaki lisusu na kapiteni mpe asengaki ndingisa mpo na kotambola nzinganzinga na libanda. Nsima, na nsinga ekangama nsinganzinga na libumu na ye, abimaki na kati ya ekumbaki.

Nakotelemaki na nsonge, amonaki pakapaka minene ntango ezalaki kobima libanda ya mai ntango masuwa ekomaki na nsonga ya mbonge. Moko kaka ezalaki kosala mpenza, mpe ezalaki kobaluka mpenza mbangu. Nsima ya komona wana, Ensign Blair mbala moko lisusu asambelaki. Eyano ya polele azwaki ezalaki ete motele moko wana ya malamu ezalaki na mosala makasi mingi mpenza mpe esengelaki kolembisama. Boye azongaki na kapiteni mpe apesaki toli wana. Kapiteni. Kapiteni asutukaki, kolobalaka ye ete nganga ya mayele ya masuwa asengaka likambo ya bokeseni—ete babakisa lombangu ya motele wana ya malamu mpo na kolonga mbonge. Nzokande, kapiteni aponaki kolanda likanisi ya Ensign Blair mpe kolembisa motele. Na ntongontongo, masuwa ekomaki na likama te na mai ya kimia.

Kaka ngonga mibale nsima, motele ya malamu atikaki kosala mpenza. Na makasi ya katikati na motele etikalaki, masuwa ekokaki kokoma malembamalemba na libongo.

Kapiteni alobaki na Ensign Blair, “Soki tolembisaki te motele wana ntango tosalaki yango, tolingaki koboma yango na katikati ya mbonge.”

Na kozanga motele wana, elingaki kozala na nzela te mpo na kokamba. Masuwa elingaki kotambola, kokambikama, mpe kozinda. Kapiteni atondaki elenge wana kunzi ya Basantu ba Mikolo Mya Nsuka mpe alobaki andimaki ete kolanda mayoki ya molimo ya Ensign Blair ebikisaki masuwa mpe liboki basali na yango.

Sikawa lisolo oyo ezali mwa kafukafu. Ntango tokoki ntango mosusu te kokutana na makambo ya nsomo boye, ekoki ngai kopesa likanisi ete lisolo oyo ezali na toli etali boniboni biso tokoki kozwa bokambi mingi koleka mbala na mbala.

Yambo, mpo na oyo etali bobimisi, tosengeli kobalola ndenge elongobani mayoki na biso na lolaka ya lola.. Ensign Blair azalaki na bomoi moko ya peto mpe bondimi soki te na botosi, alingaka te kozwa bondimi esengelaki mpo na kosambela lokola asalaki mpo na kimia ya masuwa mpe kozwa bokambi ya songolo boye tosengeli moko na moko kosalaka makasi mpo na kokisa bomoi na biso engebene na mitindo ya Nzambe mpo na kokambama na Ye.

Ntango mosusu tokoki te koyoka liyebisi ya lola mpamba te tolongobani te. Boyamboli mpe botosi ezali nzela mpo na kozwa bosololi ya polele lisusu. Liloba ya Boyokani ya Kalampo na boyamboli elingi koloba “kobaluka” to “kobongwana.”7 Ntango omiyoki mosika ya Nzambe, osengeli kaka kozwa mokano mpo na kobaluka mosika na lisumi, na kobongwanaka mpe kotalaki Mobikisi, mpe okokuta Ye kozelaka yo, maboko na Ye etandolama. Ye azali na mposa ya kokamba yo, mpe yo ozala bobele losambo moko mosika na kozwa bokambi lisusu.8

Mibale, Ensign Blair atunaki kaka Nkolo te mpo na koyanola na kpokoso na ye. Atunaki nini asengelaki kosala mpo na kozala eteni ya eyano. Ntango tozali kosamba na Nkolo, tosengeli kosenga lokola, “Nini esengeli ngai kosala mpo na kozala eteni ya eyano ?” Na mpe nsima kolanda  bofuli ya Nkolo. Na ndakisa, ntango tozali kosambela, tosalaka molongo ya bakpokoso mpe totunaka Nkolo apesa eyano na yango? Kolola Ensign Blair, tokoki kokanisa etali bamposa na biso ya sika mpe mpe komaniola ndenge ye sika mpe ya malonga ya kosambela mpo na lisalisa ya Nkolo na makambo oyo, mpe  kokanaka kosala engebene na bokambi ya Molimo.

Ezali na liteya moko ya misato ya motuya na lisolo ya Enseign Blair . Akokaki   kosambela na kimia ya bondimi ya boye soki azwaka te bokambi uta na Molimo na mabaki misusu eleka? Bokomi ya ekumbaki ya makasi ezali te ntango ya kolongala mputulu na likabo ya Molimo Mosantu mpe kokanisa boniboni kosalela yango. Elenge mobali  kunzi ya masuwa azalaki na polele kolanda ndakisa asalelaki ntango mingi liboso, kosangana   lokola misionele ya ntango mobimba. Tosengeli kozwa Molimo Mosantu lokola mokambi na biso na mai ya kimia, boye mongongo na Ye ekozala ya kobunga na biso na katikati ya  mbonge eleki makasi.

Boko bakanisi  tosengeli te kozela bokambi ya mokolo na moko uta na Molimo mpamba te “elongobani te ete [Nzambe] asengeli kotindda na makambo nionso,” noki te tokokoma basali ya goigoi.9 Nzokande, makomi oyo, epesamaki na book bamisionele ya liboso oyo atunaki  Joseph Smith mpo na kozwa  libimisi bakokaki kozwa mpo na nangomeyi. Na  nzela yambo na yango, Nkolo alobaki  [baya] na mobele oyo, lokola bakosamba katikati na bangomei mpe ngai .”10

Bamisionele oyo balingaki libimisi mpenza  na ntina ya mingo ya mobembo na bango. Bayekolaka naino te koluka bokambami na bongomei  na makambo na bango moko. Mpe Nkolo babengaki ezaleli oyo: goigoi. Bandimi ya Eklezia ya liboso bakokaki kozala na esengo  mingi ya kozala na profeta ya solo ete bazalaki na likama ya kozanga koyekola boniboni bozwa libimisi mpo bangomei. Eteni ya komikoka na molimo ezali kokoka koyoka mongongo ya Nkolo na nzela ya Molimo na Ye mpo na bomoi ya moto yemei.

Alma apesaki toli na mwana na ye ya mobali na “kosamba elongo na Nkolo na nionso ya misala na biso.”11 Kozala na lolenge oyo—oyo tokobengaka mbala mingi “kozala na Molimo”—ezali litomba moko ya monene mpenza.Yango ekomema elongo na yango liyoki ya kimia mpe bosolo mpe lisusu bambuma ya Molimo, bambuma lokola bolingo, esengo, mpe kimia.12

Kokoka ya Ensign Blair mpo na libimisi  ebikisaki ye mpe basali elongo na ye na masuwa na mbongo ya kongala. Ndenge mosusu ya mbonge ezali kongala lelo. Lisese ya Buku ya Mormon ya nzete ya bomoi 13 epesi ndakisa moko ya nguya ya boniboni kozwa kimia ya molimo na mokili moko ya boye. Ndoto oyo elobeli londende ya mbalakaka ya molili kobimaka mpo na komema bobebisi ya molimo na bandimi ya Eklezia na kotambolaka na nzela ya kozonga na Nzambe.14

Elilingi
Ndoto ya Lehi

Na komaniolaka ndakisa oyo, namoni ba miso na ngai ngulupa ya bato kokenda na nzela wana, na maboko na bango kokangamaka ngwi na lingende ya ebende, kasi mingi mosusu kolandaka mpamba makolo ya bato liboso na bango. Kotambola oyo ya nsuka esengaka likanisi to bokasi boke. Okoka kaka kosala to kokanisa ono basusu basali kosala to kokanisa. Misalaa oyo  ekoki kosala mpenza malamu na ntango ya moi. Kasi mbonge ya lokuta mpe londende ya bokosi ebandaka na kozanga koyebisa. Na ntango oyo, komesana na mongongo ya Molimo Mosantu ezali likambo ya bomoi to liwa ya molimo.

Elaka ya nguya ya Nefi ezali ete “oyo nionso akoyokemela liloba ya Nzambe, mpe … akosimba makasi na yango, … akowa mokolo moko te; to ekokoka masengenia mpe mipanga ya nkanda ya monguna kolonga bango na kati ya bokufi miso, mpo na kokamba bango mosika na bobebisi.”15

Kolanda makolo ya bato liboso na yo na nzela ekoki te. Tokoki te kaka kosala mpe kokanisa oyo bato basusu bazali kosala mpe kokanisa ; tosengeli na likabo ya bokambami. Tosengeli moko na moko na biso kozala na loboko na bisomei na lingenda ya libende. Nde tokoki kokende na Nkolo na bondimi ya komikitisa, koyebaka te Ye “akokamba [biso] na loboko, mpe akopesa [biso] eyano na [ya biso] nsambo.”16 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.