2010–2019
Tika Biso Banso Tomipesa
Sanza ya Minei 2018


Tika Biso Banso Tomipesa

Nasengi na bino boyekola uta na bitinda ya likita oyo mbala mingi—kutu kobandela—na basanza motoba ekoya.

Balingami na ngai ya basi mpe ya mibali, lokola tokomi na suka ya likita oyo mpenza, nasangani elongo na bino na kokanisaka Nkolo mpo na bokambami na Ye mpe bobendani efulama. Miziki ezalaki kitoko mpenza mpe kosepelisa. Etinda ezalaki kaka kobondisaka te, kasi ebongoli bomoi!

Na likita ya lipombo tosungaki Bokambi ya Yambo ya sika. Mibali minene mibale batiamaki na Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale.

Sikawa loyembo elingami esangisi liyokani na biso ya sika, etumba na biso, mpe mokumba na biso ekende liboso:

Tika biso banso tokosala na lombango mosala ya Nkolo,

Ete ntango bomoyi esili tokoka kozwa mbano;

Na etumba mpo na lotomo ya moto tika biso tobimisa mopanga,

Mopanga ya nguya ya bosolo.

Kobanga te, atako monguna azali kotiola;

Na mpiko, mpo Nkolo azali na ngambo na biso.

Tokoyanola te na oyo nini banguna bakoloba,

Kasi Nkolo kaka nde tokotosa.1

Nasengi na bino boyekola uta na bitinda ya likita oyo mbala mingi—kutu kobandela—na basanza motoba ekoya. Na motema nyonso boluka na banzela nyonso mpo na kotia bitinda wana na makita ya libota na mpokwa na bino, na mateya ya nsango malamu, masolo na bino na libota mpe na baninga, mpe kutu na masolo na bino na baninga oyo bazali ya bondimi na bino te. Bato ya malamu mingi bakoyanola na babosolo nyonso ntango epesami na bolingo. Mpe mposa na bino ya kotosa ekokoma makasi ntango bokomi kundola mpe bokolaki oyo boyokaki na mikolo mibale oyo eleki.

Makebisi ya likita linene oyo ezali ebandeli ya mabongisi ya sika. Nkolo atie mabongisi na lolenge ete tomilendisa moko na moko. Bandeko basi mpe bandeko mibali—mibange mpe bilenge—bakosunga moko na moko na lolenge ya sika. Bampaka ya masanga ya likoki bakolendisama mpo na kopambola babomoi ya mibali, basi, mpe bana na mokili mobimba. Bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi bakokoba kosala na lolenge na bango ya bolingo, kolakisaka mabaku ya kosangana lokola mosala ya ntina.

Etinda na biso na mokili ezali ya mindondo te mpe ya solo: tobiangi bana ya Nzambe na bipayi nyonso mibale baya epayi ya Mobikisi na bango, kozwa mapamboli ya tempelo esantu, bazala na esengo ya kowumela, mpe komilengela mpo na bomoyi ya seko.2

Konetolama ekoya esengi botongono na biso mobimba sikawa na mayokami mpe makuli tosala tokoyamba na ndako ya Nkolo. na ntango oyo, tozali na batempelo 159, mpe ebele ezali kotongama. Tolingi komema batempelo pene pene ya bandimi ya Elezia. Na yangotozali na esengo sikawa ya kosakola batempelo nsambo oyo esengeli kotongama. Batempelo oyo ekotongama na bisika oyo elandi: Salta, Argentina; Bengaluru, India; Managua, Nicaragua; Cagayan de Oro, Philippines; Layton, Utah; Richmond, Virginia; mpe esika mosusu na Russia.

Napamboli bino mpo na koyeba mapamboli wana ekoka kotiama mpembeni mpenza na bino bokoka kolekisa ntango mingi na tempelo. Napamboli bino na boyokani mingi mpe bolingo na mabota na bino mpe mposa monene ya kosunga mpo na bomoyi ya seko ya bozalani ya mabota na bino. Napamboli bino bondimi makasi na Nkolo Yesu Klisto mpe makoki monene mpo na kolanda ye lokola bayekoli na Ye ya solo.

Napamboli bino banso botombolaki mingongo na bino na litatoli, lokola nazali kosala sikoyo, na nini tomipesi na mosala ya Nzambe ya Nguya Nyonso! Yesu ezali Klisto. Eklezia oyo ezali ya Ye, wapi Azali kokamba na nzela ya basali bapakolami na Ye. Natatoli bongo, na kolakisaka bolingo na ngai mpo na moko na moko na bino, na nkombo ya bule ya Yesu, amene

Matangi

  1. “Tika Biso Banso Tomipesa,” Hymns, no. 243.

  2. Defined in Doctrine and Covenants 14:7 as “the greatest of all the gifts of God.”