2010–2019
Na Boyokani Moko
Sanza ya Minei 2018


Na Boyokani Moko

Na ntina ya kokoma na bozali na biso ya nkembo, tosengeli na moko mpe mosusu, mpe tosengeli kozala bomoko.

Moko ya bikelamu ya kokamuisa makasi na mokili ezali lipekapeka nkumu. Na mobembo moko na mboka Mexico koleka Noel elongo na libota ya mobali na ngai, tokendeki kotala ndako ya mapekapeka, kuna bamilio ya mapekapeka balekisaka eleko ya malili. Ezalaki kosepelisa na komona lokola limoni moko ya kokamuisa mpe kolakisa biso ndakisa moko ya bomoko mpe ya botosi na mibeko ya bonzambe oyo bikelamu ya Nzambe elakisi.1

Elilingi
Mokonzi Kipekapeka
Elilingi
Lisanga ya bipekapeka

Mapekapeka nkumu bazali makoki mpenza ya batambuisi. Bango basalelaka etelemeli ya moi mpo na komona nzela bango basengeli kokende. Na eleko nionso ya moi, bango babembukaka bankama ya kilometele uta Mexico kino Canada, mpe na bokueyi nionso, bango bazongaka na zamba na bango ya sapin ya bule na Mexico.2 Bango basalaka yango mobu nionso, lipapu moko ya moke kodiembela nan tango moko. Kati na mobembo na bango, bakanganaka esika moko na butu likolo ya nzete kobatelana bango moko na malili mpe baniama mabe.3

Elilingi
Lisanga ya bipekapeka
Elilingi
Lisanga ya mibale ya bipekapeka

Liboke moko ya mapeka peka ebiangami kaleidoscope, lisanga moko ya bato kosalaka na boyokani mpo na ntina moko.4 Yango ezali elilingi moko ya kitoko? Lipekapeka yango na kati ya kaleidoscope esali lolenge na yango moko mpe ekaseni, solo yango emonani penza bikelamu ya kolemba esalamaki na Mokeli moko ya bolingo elongo na makoki ya kobika, ya kobembuka, kobongolana, mpe kopanza bomoi lokola bango bakendaka uta fololo moko mpe oyo elandi, kopanzaka putulu ya fololo. Mpe atako lipekapeka yango ekeseni, bango basalaka elongo kokomisa mokili kitoko koleka mpe esika ya kobota mbuma.

Lokola mapekapeka nkumu, tozali na mobembo moko ya kozonga na ndako na biso ya lola kuna tokosangana lisusu elongo na Baboti na biso ya Lola.5 Lokola mapekapeka, topesamaki makoki ya bonzambe oyo epesi biso nzela ya kotambola na bomoi, na ntina ya “kotondisa … emekelo ya [biso] bokeli.”6 Lokola bango, soki tosangisi mitema na esika moko,7 Nkolo akobatela biso “lokola soso [abombi] bana na ye na nse ya mapapu na ye”8 mpe akotia biso na kati ya kaleidoscope moko ya kitoko.

Bana ya basi mpe ya mibali, bilenge basi mpe mibali, bandeko basi mpe mibali, tozali na mobembo yango elongo. Na ntina ya kokoma na bozali na biso ya kembo, tosengeli na moko mpe mosusu, mpe tosengeli kozala bomoko. Nkolo apesaki biso motindo, “Bozala moko, mpe soki bino bozali moko te bozali ya ngai te.”9

Yesu Klisto azali ndakisa monene ya kibomoko elongo na Tata na Ye. Bazali moko na ntina, na bolingo, mpe na misala, na “bolingi ya Muana elamaki na bolingi ya Tata.”10

Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa ebongi nie ya boyokani ya Nkolo na Tata na Ye mpe kozala na bomoko lokola Bango mpe na moko mpe mosusu?

Lolenge moko efulami ezuami na Misala 1:14. Totangi, “[Mibali] banso bakobaki na boyokani moko kati na losambo mpe libondeli, elongo na basi.”11

Nandimi yango ezali na ndimbola liloba oyo “na boyokani moko” emonani ba mbala ebele na mokanda ya Misala, kuna totangi na oyo etali balandi ya Yesu Klisto basalaki mbalamoko sima Ye komata na lola lokola mosekui, lolenge loko ezalaki mapamboli bango bazuaki mpo na makasi na bango. Yango ezali lisusu na ndimbola ete tomoni lolenge kaka moko na kati ya bandimi na mboka America na ntango Nkoloa atalaki mpe ateyaki bango. “Na boyokani moko” elakisi kati ya konimana, kati na bomoko, mpe banso elongo.

Boko ya makambo oyo Bansantu ya bosembo basalaki na bomoko na bisika songolo ezalaki ete bango batatolaki Yesu Klisto, bayekolaki liloba ya Nzambe elongo, mpe bateyaki bamoko mpe basusu na bolingo.12

Balandi ya Nkolo bazalaki moko kati ntina, kati na bolingo, mpe kati na misala. Bango bayebaki banana bango bazalaki, bango bayebaki nini basengelaki kosala, mpe bango basalaki yango na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na moko mpe mosusu. Bango bazalaki etemi ya kaleidoscope ya kitoko kokendaka liboso na boyokani moko.

Boko ya mapamboli bango bango bazuaki ezalaki ete bango batondisamakina Molimo Mosantu, bikamua ezuaki ezaki esika na kati na bango, Eklezia ekolaki, ezalaki na bosuani te kati na bato, mpe Nkolo apambolaki bango na makambo nionso.13

Tokoki koloba ete ntina mpo na nini bango bazalaki na bomoko mpenza ezali mpo ete bango bayebaki Nkolo yemei mpenza. Bango bazali penepene na Ye makasi, mpe bango bazalaki banzeneneke ya etinda na Ye ya bonzambe, na bikamua oyo Ye asalaki, mpe na Lisekua na Ye. Bango bamonaki mpe basimbaki bilembo na maboko mpe makolo na Ye. Bango bayebaki na bosolo nionso ete Ye azalaki Masiya alakamaki, Mosikoli ya mokili. Bango bayebaki ete “Ye azali liziba ya libiki, kimia, mpe bokobi ya libela nionso. ”14

Atako tomona te Mobiki na bison a miso ya mosuni, tokoki koyeba ete Ye azali na bomoi. Soki biso topusani pembeni na Ye, soki tozali koluka kozua litatoli ya moto se yemoko na nzela ya molimo mosantu ya etinda na biso ya bonzambe, tokosala na bososoli makasi ya ntina na biso, bolingo ya Nzambe ekovanda na mitema na biso;15 tokozala na etingia ya kozala moko na banzela ya sika, ya malamu.”16

Bikamua eyaka ntango bana na Nzambe bazali kosala elongo na botambuisi ya Molimo kotanda maboko mpo na kosunga basusu na bosenga.

Elilingi
Nzela etonda na babikisi

Toyokaki masolo ebele ya bolingo bato ya pembeni balakisaki kati na bato ntango makama ekombolaki. Ndakisa, ntango engumba ya Houston eniokamaki ya mobu eleki na bomati ya mayi ya mabe eyaki, bato babosanaki bosenga na bango moko mpe bakendaki kosunga. Bokambi ya lisanga likoki ya bampaka asengaki lisalisi na lingomba, mpe lisanga ya 77 masuwa ebongisamaki na lombangi mpenza. Basungi bakendaki nzinganzinga bisika ya pembeni oyo esimbamaki mpe bamemaki mabota mibimba na moko ya bandako na biso ya mayangani, kuna bazua esika ya kobombana mpe lisungi ebele esengelaki. Bandimi mpe bandimi te basalaki elongo na ntina kaka moko.

Elilingi
Bamisionele koteyaka Espaniole

Na Santiago, Chili, Bokambi moko ya Lisanga Bamama Basungi ezuaki mposa ya kosunga bapaya na lisanga na bang outa Haiti. Na kopesaka toli elongo na batambuisi naye ya bonganganzambe, ye mpe batambuisi mosusu bazuaki likanisi ya kopesa kelasi ya Espagnol na bapaya yango, kosungaka bango mpo na kokota malamu koleka na ndako na bango ya sika. Mposo nionso na ntongo, bamisionele bakendaka kokutana elongo na bayekoli oyo ya mposa. Liyoki ya bomoko na botongi wana ezali ndakisa moko efulami ya bat outa bisika ndenge na ndenge ya kosalaka na boyokani moko.

Elilingi
Basali bazanga lifuta na Mexico

Na Mexico, bamokama ya bandimi babembukaki bangonga ebele kosunga bakueyeli ya boningisi mabele mibale ya makasi koleka. Bango bayaki na bisaleli, bamasini, mpe bolingo na bato na bango ya pembeni. Ntango basali ya ofele bakutana elogo kati moko bandako na biso ya mayangani kozelaka mitindo, mokambi ya engumba ya Ixhuatán abukanaki na kolela ntango amonaki komonana moko ya “bolingo ya ptua ya Klisto.”17

Nkolo apesi biso sikawa libaku ya kopesana toli sanza oyo na masanga makoki ya bonganganzambe mpe Masanga Bamama Basungi na biso, boye tokoki kozala na bakoti ya makasi na bapaluase to etape na biso ya kaleidoscope —esika moko wapi biso nionso tokoki mpe wapi biso nionso tosengeli.

Banzela moko na moko na biso ekeseni, kasi totambolaka yango elongo. Nzela na biso ezali te oyo biso tosi tosali to epai wapi tozalaki; yango ezali epai wapi tozali kokende mpe nini tozali kokomaka, kati na bomoko. Ntango tozali kopesana toli elongo na botambuisi ya Molimo Mosantu, tokoki komona esika nini tozali mpe esika nini tosengeli kozala. Molimo Mosantu akopesa biso limoni moko oyo miso na biso ya mosuni ekoki komona te, mpo ete “bobimisi ya ezali kopanzana kati na biso,”18 mpe soki totie bobimisi wana elongo, tokoki komona ebele koleka.

Soki tosali na bomoko, ntina biso esengeli ezala kotala mpe kosala bolingi ya Nkolo, mposa na biso esengeli ezala bolingo tozali koyoka mpo na Nzambe mpe mpo na moto ya pembeni;19 mpe mposa na biso monene esengeli ezala ko “sala na etingia nionso,”20 boye tokoki kobongisa nzela mpo na bozongi ya nkembo ya Mobikisi na biso. Lolenge kaka moko tokoki kosala bongo ezali “na boyokani moko”

Lokola mapekapeka monarque, tika biso tokoba na mobembo na biso elongo na kibomoko mpe ntina moko na moko na biso elongo na bamakoki na biso mpe babopesi na biso, kosalaka mpo na kokomisa yango mokili moko ya kitoko mpe ya kobota mbuma—litambe moko moke kati nan tango mpe kati na kibomoko ebonginie elongo na Mobikisi na biso.

Nkolo na biso Yesu Klisto alakaki biso ete ntango tozali kosangana elongo na nkombo na Ye, Ye azali na kati na biso.21 Natatoli ete Ye azali na bomoi mpe ete Ye asekuaki na ntongo moko kitoko ya moi lokola lelo. Ye azala Nkumu likolo ya bankumu nionso, “Mokonzi ya bakonzi nionso, mpe Nkolo ya bankolo.”22

.Nalikyi ete tokoki kozala moko kati na Tata mpe kati na Muana na Ye se Moko ya Mobali, lokoa totambuisami na Molimo Mosantu, ezali libondeli na ngai ya komikitisa na nkombo a Yesu Klisto, amen

Matangi

  1. Tala Abraham 3:26; 4:7, 9–12, 15, 18, 21, 24–25.

  2. An interesting fact about monarch butterflies is that it takes up to three generations to make the trip northward to Canada. However, a “super generation” makes the whole trip southward to Mexico, spends the winter there, and makes the first lap back north. (See “Flight of the Butterflies” [video, 2012]; “‘Flight’: A Few Million Little Creatures That Could,” WBUR News, Sept. 28, 2012, wbur.org.)

  3. Tala “Why Do Monarchs Form Overnight Roosts during Fall Migration?” learner.org/jnorth/tm/monarch/sl/17/text.html.

  4. Tala “What Is a Group of Butterflies Called?” amazingbutterflies.com/frequentlyaskedquestions.htm; see also “kaleidoscope,” merriam-webster.com. Kaleidoscope comes from the Greek kalos (“beautiful”) and eidos (“form”).

  5. Tala “The Family: A Proclamation to the World,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 145.

  6. Doctrine et Alliances 88:19; tala lisusu Doctrine et Alliances 88:25.

  7. Tala Mozia 18:21.

  8. 3 Nefi 10:4.

  9. Doctrine et Alliances 38:27.

  10. Mozia 15:7.

  11. Misala 1:14; sete ebetami.

  12. Boko ya makambo oyo bansantu basalaki na Yelusaleme: baponaki Apostolo moko ya sika mpe mibali sambo ya bizaleli malamu, mpe babatelaki bango (tala Acts 1:26; 6:3–5); basanganaki esika moko na mokolo ya Pantecote (tala Acts 2:1); batatolaki Yesu Klisto Misala 2:22–36; 3:13–26; 4:10, 33; 5:42); babengaki bato koyambola mpe babatisaki bango (tala Misala 2:38–41); bakobaki na kiboninga mpe kobukaka lipa, mpe na losambo (tala Misala 2:42); bazalaki elongo mpe bazalaki na biloko nionso ya kosangana (tala Acts 2:44–46; 4:34–35); bakotaki na tempelo (tala Misala 2:46); baliaki bilei na bango na esengo mpe na bosangani ya mitema (tala (Misala 2:46); basanjolaki Nzambe mpe bamonaki mpe bamonaki bolamu na ye na bato nionso; bazalaki na botosi na bondimi (tala Misala 2:47); bamipesaki bango moko na kokobaka kosambela mpe kosakola liloba (tala Misala 6:7); Boko makambo bansantu basalaki na ekolo America: bateyaki nsango malamu ya Klisto (tala (Misala 6:4). Basalaki eklezia ya Klisto (tala 3 Nefi 28:23); babatisaki bato (tala 4 Nefi 1:1); mobali nyonso asalaki na bosembo moko na mosusu (tala 4 Nefi 1:1); bazalaki na ionso kosangana na kati na bango (tala 4 Nefi 1:2); batongaki lisusu bituka (tala 4 Nephi 1:3); bango babalaki (tala 4 Nefi 1:7–9); batambolaki nsima ya mitindo oyo bango bazuaki uta na Nkolo (tala 4 Nefi 1:11); bakobaki na kokila bilei mpe kosambela (tala 4 Nefi 1:12); bakutanaki elongo mingimingi mpo na kosambela mpe koyoka liloba ya Nkolo (tala 4 Nefi 1:12); 4 Nefi 1:12)

  13. Boko mapamboli oyo bansatu bazuaki na Yelusaleme: bango batondisamaki na Molimo Mosantu (tala Misala 2:4; 4:31); bayambaki likabo ya monoko ya sika mpe masakoli mpe balobaki mosala ya kitoko ya Nzambe (tala Misala 2:4–18); ebele ya makamuisi mpe bilembo esalamaki na Bapostolo (tala Misala 2:43); bikamua esalemaki (tala Misala 3:1–10; 5:18–19; 6:8, 15); ebele ya bato bayaki na Eklezia (tala Misala 2:47; 5:14). Boko mapamboli oyo Bansantu ya mboka Amerika bazuaki: bato babonguanaki epai na Nkolo (tala 3 Nefi 28:23; 4 Nefi 1:2); nkona moko epambolamaki (tala 3 Nefi 28:23); ezalaki ten a bowelani mpe kosuana kati na bango (tala 4 Nephi 1:2, 13, 15, 18); ezalaki na mozui te mpe mobola te (tala 4 Nefi 1:3); bazalaki banzo bansomi mpe bakaboli ya likabo ya lola (tala (4 Nefi 1:3); ezalaki na kimia na mabele (tala 4 Nefi 1:4); bikamua ya nguya esalemaki (tala 4 Nefi 1:5, 13); Nkolo afulukisaki bango ebele koleka (tala 4 Nefi 1:7, 18); basalaki mabele makasi, bakomaki ebele koleka na bangu, mpe bakomaki kitoko mpe bonzeka koleka (tala 4 Nefi 1:10); bango bapambolamaki kolandisama na ebele ya bilaka Nkolo apesaki epai na bango (tala 4 Nefi 1:11); ezalaki na bowelani te na mabele, mpo ete bolingo ya Nzambe evandaki na mitema ya bato (tala (4 Nefi 1:15); ezalaki na boluli te, to songisongi te, to mobulu te, to pite te, to lokuta te, to bobomi te, to lolenge moko te ya bonsoni, mpe ekokaki te kozala na bato moko ya esengo mingi koleka bato nionso baye bakelamaki na loboko ya Nzambe (tala (4 Nefi 1:16); ezalakai na miyibi te, babomi te, mpe ezalaki na balamani te, lolenge moko ya ba-songolo te, kasi bazalaki se moko, bana na Klisto, mpe basangoli ya bokonzi na Nzambe (tala (4 Nefi 1:17); Nkolo apambolaki bango na nionso bazalaki kosala (tala (see 4 Nefi 1:18).

  14. Jean B. Bingham, “That Your Joy Might Be Full,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 85.

  15. Tala 4 Nefi 1:15.

  16. Jeffrey R. Holland, “Emissaries to the Church,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 62.

  17. Moroni 7:47.

  18. Neil L. Andersen, in “Auxiliary Panels Use New Training Library,” Liahona, Sanza ya minei. 2011, 76.

  19. Tala Matai 22:37–40.

  20. Jacob 5:61.

  21. Tala Matai 18:20.

  22. 1 Timote 6:15.