2010–2019
Kosalisa lokola Mobikisi Asalisaka
Sanza ya Minei 2018


Kosalisa lokola Mobikisi Akosalaka

Tosengeli kolakisa botondi mpe bolingo na biso mpo na Nzambe na kosalisa na bolingo bandeko na biso ya basi mpe ya mibali ya seko.

Lipamboli ya kitoko kani kozala na ntango bobimisi ya kokoba uta na Nzambe! Ntango totali liboso mpo na koyamba “bozongisi ya makambo nyonso,”1 oyo eyaki mpe ekoya na nzela ya makambo elakelamaki ya ntango na biso, bazali kolengela biso mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi.2

Mpe nzela ya malamu mingi kani mpo na kolengala kokutana na Ye koleka kobunda kokoma lokola Ye na nzela ya kosalisana na bolingo! Lokola Yesu Klisto ateyaki balandi na Ye na ebandeli ya eleko oyo, “Soki bolingi ngai bakosalela ngai.”3 Lisalisi na biso na basusu ezali ndimbola ya boyekoli mpe botondi mpe bolingo na biso mpo na Nzambe mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Ntango mosusu tokanisaka tosengeli kosala likambo moko ya monene mpe elombe mpo na “kotanga” lokola kosalisa bazalani. Kasi misala ya kosalisa ekoki kozala na mbano ya mozindo na basusu—lokola mpe na biso moko. Nini Mobikisi asalaki? Na nzela ya makabo na Ye ya bonzambe ya Bomikabi mpe Bosekwi—oyo tozali kokembisa na Eyenga oyo ya kitoko ya pasika—“moko te asala na nguya moko ya mozindo boye [na] banso oyo bazala mpe oyo bakozala lisusu na likolo ya mabele.”4 Kasi lisusu Ye asakaki na, alobaki na, ayokaki, apesaki ntango mpo na, alendisaki, ateyaki, aleisaki, mpe alimbisaki. Ye asalakisaki libota mpe baninga, bazalani mpe bapaya lokola, mpe Ye abengisaki bayebani mpe balingami mpo na kosepela mapamboli ya bomengo ya nsango malamu na Ye. Misala wana ya “mike” ya kosalaka mpe kolinga ekopesa ndakisa mpo na kosalisa na biso lelo.

Ntango ozalaki na litomba ya kozala ntoma ya Mobikisi na bokasi na yo ya kosalisa, mituna, “Boniboni ekokoki ngai kokabola pole ya nsango malamu elongo na moto to libota oyo? Nini Molimo azali kofula ngai nasala?”

Kosalisa ekoki kosalema na kililiki moko monene ya ndenge ya moto na moto. Boye ekoki kozala lolenge kani?

Kosalisa ezali lokola lisanga likoki ya bampaka mpe babokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi na losambo kosololaka etali bitinda. Esika ya bayangeli kaka kokabolaka biteni ya nkasa, ezali lokola kosololaka etali bato mpe mabota mpenza ntango bitinda epesami mpo na kosalisa bandeko mibali mpe bandeko basi. Ezali lokola kokendeke kotambola, kozalaka elongo na lisano ya butu, kopesaka lisalisi, to kutu kosalisaka elongo. Ezali lokola kokendaka kotala yomei to kolobaka na telefoni to kosololaka na Internet to na sms. Ezali lokola kopesaka kalati ya mbotama elamu mpe kosepelaka na lisano ya motopi. Ezali lokola kokabolaka makomi moko to litangi uta na lisolo moko ya likita oyo ekokaki kozala na ntina mpo na moto. Ezali lokola kosololaka motuna moko ya nsango malamu mpe kokabolaka litatoli mpo na komema polele mpe kimia. Ezali lokola kokomaka eteni ya bomoi ya moto moko mpe kolengelaka ye. Ezali lokola bosololi ya kosalisa na yango bamposa mpe bokasi esololami na bwania mpe na bolongobani. Ezali lokola lisanga ya palwasi kobongisaka mpo na koyanola mposa moko monene.

Kosalisa ya lolenge oyo elendisaki ndeko mwasi moko oyo alongwaki mosika na ndako ntango mobali na ye abandaki université. Na telefoni te mpe bebe ya moke mpo na kolengela, amiyokaki mobulu na esika ya sika, ya kobunga mpe ye moko kaka mpenza. Na kozanga liyebisi, ndeko mwasi moko ya Lingomba ya Bamama Basungi ayaki na ekuke komemaka mwa basapato mibale mpo na bebe wana, atiaki mibale yango na kati ya motuka na ye mpe amemaki yango mpo na koluka magazini ya bilei. Ndeko mwasi wana ya botondi apesaki nsango, “Azali libiki na ngai!”

Kosalisa ya solo elakisami na ndeko moko ya mwasi ya nkulutu na Afrika oyo atindamaki mpo na koluka ndeko moko ya mwasi oyo akendeki te na Eklezia ntango molai. Ntango akendeki na ndako ya ndeko mwasi yango, akutaki ete mwasi wana babetaka ye mpe bayibaka ye, azalaka na moke mpenza mpo na kolia, mpe azangaki bilamba oyo ayokaki elongobana mpo na mayangani ya Eklezia na Eyenga. Mwasi oyo batindaki mpo na kosalisa ye amemaki litoyi ya koyoka, milona uta na bilanga na ye, makomi ya kotanga, mpe kimoninga. Ndeko mwasi oyo “azalaki koya lisusu na eklezia te” azongaki nokinoki na eklezia mpe sikoyo azwi libiangi moko mpamba te ayebi balingi ye mpe bapesi ye motuya.

Kosangisa bokasi ya Lingomba ya Bamama Basungi ya boye na kobongisa ya sika ya lisanga likoki ya bampaka ekomema bomoko oyo ekopesa mbano ya kokamwa. Kosalisa ekomi bokasi moko esangana mpo na kokokisa mokumba ya bonganganzambe mpo na “kotala ndako ya mondimi moko na moko” mpe mpo na “kokengela eklezia ntango nyonso,”5 mpe lokola mpo kokokisa ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na kosalisana kolengela mpo na mapamboli ya bomoi ya seko.6 Kosala elongo na bokambami ya episikopo, lisanga likoki ya bampaka mpe Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi bakoki kofulama ntango bazali koluka ndenge eleki malamu mpo na kokengela mpe kobatela moto mpe libota moko na moko.

Tika napesa ndakisa moko. Mama moko bazwaki ye na cancer. Nokinoki babandaki kosalisa ye, mpe noki, bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi bakendeki na mosala, kobongisaka boniboni kosalisa malamu koleka na bilei, motuka mpo na bilaka ya lopitalo, mpe lisungi mosusu. Batalaki ye mbala na mbala, kopesaka ye kimoninga ya esengo. Na ntango kaka moko, lisanga likoki ya Bonganganzamba ya Melikisedeki ekotaki na mosala. Basalaki mosala na kobakisa lisuku ya kolala mpe ya kosokola ebongisami lisusu mpo na kokomisa yango pete mpo na kolengela ndeko mwasi wana ya maladi. Bilenge mibali badefisaki maboko mpe mikongo na bango mpo na kosala elongo na bokasi wana ya ntina. Mpe bilenge basi bamikotisaki: babongisaki na esengo mpo na kotambolisa na solo mbwa mokolo na mokolo. Lokola ntango ezalaki koleka, palwasi akobaki na mosala na bango, kobakisaka mpe ko kongisaka esika esengelaki. Ezalaki na polele mosala moko ya bolingo, mondimi moko na moko komipesaka, na bomoko kolakisaka bolengeli na ndenge ya moto na moto oyo epambolaki kaka te ndeko mwasi na mpasi kasi moye libota na ye moko na moko.

Nsima ya bokasi moko ya mpiko, ndeko mwasi wana awaki na cancer mpe bamemaki ye na bopemi. Palwasi ebendaki mpema ya bopemi mpe ekanisaki mosala esalemaki malamu mpe esilaki malamu? Te, bilenge basi bakobaki kotabolisa mbwa mokolo na mokolo, masanga makoki ya bonganganzambe bakobaki kosalisa tata mpe libota, mpe Lisanga ya Bamama Basungi bakobaki kosalisa na bolingo mpo na koyeba bokasi mpe mposa. Bandeko mibali mpe bandeko basi, oyo ezali kosalisa—oyo ezali kolinga lokola Mobikisi asalaka!

Lipamboli mosusu ya kosakola oyo efulama ezali libaku mpo na bilenge basi ya mibu 14 ti 18 mpo na kosala elongo na kosalisa boninga na bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi, kaka lokola bilenge mibali ya mibu na bango basalaka na kosalisaka lokola baninga ya bandeko ba Bonganganzambe ya Melekisedeke. Bilenge bakoki kokabola makabo na bango kaka mpe kokola na molimo ntango bazali kosala elongo na bankulutu na mosala ya lobiko. Kokotisa bilenge na bitinda mpo na kosalisa ekoki kokolisa lisusu nguya ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe bolengeli ya masanga makoki ya bampaka mpo na kolengela basusu na kobakisaka motango ya bandimi oyo bakosala elongo.

Ntango nakanisi etali bilenge basi ya kongenga nayebaki, nasepeli mpo na bandeko basi ya Lingomba ya Bamama wana oyo bakozala na litomba ya kopambolama na esengo, batalenta, mpe bwania ya molimo ya elenge mwasi moko ntango bazali kosala elongo to basalisami na bango. Mpe nasepeli lisusu na nkonzo bilenge basi bakozwa na kokambama mpe koteyama mpe kolendisama na bandeko basi na Lingomba ya Bamama Basungi. Libaku oyo ya kosala elongo na kotonga bokonzi ya Nzambe ekozala litomba ya kafukafu mpo na bilenge basi, kosalisaka bango kolengela bango malamu koleka mpo na kokokisa misala na bango lokola bayangeli na Ekleizia na lingoma mpe lokola baninga ya kosala elongo na mabota. Lokola Ndeko Mwasi Bonnie L. Oscarson akabolaki lobi, bilenge basi “balingi kozala na mosala. Bazali na mposa ya koyeba bazali na motuya mpe na ntina na mosala ya lobiko!”7

Solo, bilenge basi bazali uta kala kosalisa basusu, na etinda to makelele te. Libota moko nayebi elongwaki bankama ya bakilometele mpo na esika mosusu wapi bayebaki moto te. Na poso ya yambo, mwana mwasi moko ya mibu 14 uta na palwasi ya sika ayaki na ekuke na bango na sani ya bisikiti, kopesa bango boyei malamu na etuka ya sika. Mama na ye atelemaki na koseka nsima na ye lokola mokumbi motuka ya bolingi, kosungaka mposa ya mwana na ye ya mwasi mpo na kosalisa.

Mama mosusu amitungisaki mokolo moko ete mwana na ye ya mwasi ya mibu 16 azongaki ndako te na ngonga ya momesano. Ntango mwana mwasi na nsuka azongaki, mama na ye atungisaki ye na mwa nkele etali wapi azalaki. Mwana ya mibu 16 wana penepene lokola mokengeli ayanolaki ete amemelaki fololo moko na mokufeli mobali moko oyo azalaki kofanda mpembeni. Amonaki ndeko mwasi wana azalaki lokola ye moko kaka mpe atindikamaki mpo na kotala ye. Na ndingisa nyonso ya mama na ye, elenge mwasi wana akobaki kotala mwasi wana ya mobange. Bakomaki baninga malamu, mpe boyokani malamu na bango ekobaki mibu mingi.

Bilenge basi nyonso oyo, mpe mingi lisusu lokola bango, bamonaki mposa ya moto moko mpe basalaki mpo na kokokisa yango. Bilenge basi bazali na mposa ya kobotama mpo na kolengela mpe kokabola oyo ekoki kokambama malamu na nzela ya kosalisa na kimoninga elongo na ndeko mwasi ya nkulutu.

Kotala te mibu, ntango tomanioli boniboni kosalisa malamu koleka, tokotunaka, “Nini asengeli na yango?” Kosangakisa motuna wana na mposa ya solo mpo na kosalisa, tokambami na Molimo mpo na kosala oyo ekotombola mpe ekolendisa moto. Nayoki masolo mingi ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bapambolamaki na likambo ya moke ya kokotisa mpe koyamba na eklezia, mokanda ya Internet ya boboto to sms, kokutana ya moto na moto na ntango ya kpokoso, libengisi mpo na kosala elongo na liboke ya molulu, to likabo ya kosalisa na likambo ya mpasi. Baboti oyo bazali bango moko, babongwani ya sika, bandimi balembi eklezia, bakufeli mibali mpe bakufeli basi, to bilenge oyo bazali na mikakatano bakoki kozala na mposa ya bokebi ya kobakisa mpe lisalisi ya kolengela liboso uta na bandeko mibali ya mpe bandeko basi basalisi. Kobongisa katikati ya babokambi ya masanga makoki ya bampaka mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi ekopesa nzela mpo kaka bitinda ya malamu esalema.

Nsima ya koloba mpe kosala nyonso, kosalisa ya solo esalamaka moko na moko na bolingo lokola botindiki. Motuya mpe libongi mpe kitoko ya kosalisa ya solo ezali ete ekobongola bomoi! Ntango mitema na biso ezali ya kofungwana mpe ya bolingi mpo na kolinga mpe kokotisa, kolendisa, mpe kobondisa, nguya ya kosalisa na biso ekozala ya ntembe te. Na bolingo lokola botindiki, makamwisi ekoya, mpe tokomona nzela mpo na komema bandeko na biso ya basi “oyo bayaka lisusu na eklezia te” na kati ya boyambi ekotisaka banso ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Mobikisi azali ndakisa na biso na nyonso—kaka te na oyo tosengeli kosala kasi ntina nini tosengeli kosala yango.8 “Bomoi na Ye na mabele ezalaki [yoko] libengisi mpo na biso—mpo na kotombola bomoni na biso ya likolo mingi, mpo na kobosana bakpokoso na biso mpe [mpo na] kosalisa basusu.”9 Ntango tondimi libaku ya kosalisa na motema mobimba bandeko basi mpe bandeko mibali, topambolami mpo na kokoma peto mingi na molimo, engebene mingi na bolingi ya Nzambe, mpe ya kokoka mingi na kososola mwango na Ye mpo na kosalisa moko na moko na kozonga epai na Ye. Tokoyeba na pete mingi mapamboli na Ye mpe tokozala na mposa mpenza ya kotandola mapamboli wana na basusu. Mitema na biso ekoyemba na lisanga na mongongo moko:

Mobikisi, ekoki ngai kolinga bandeko ba ngai mibali

Lokola nayebi olingaka ngai,

Mona na bokasi na ngai, mwinda na ngai,

Mpo ya yo mosali nakozala.

Mobikisi, ekoki ngai kolinga bandeko ba ngai mibali—

Nkolo, nakolanda yo.10

Tosengeli kolakisa botondi mpe bolingi mpo na Nzambe na kosalisaka na bolingo bandeko na biso ya basi mpe bandeko na biso ya mibali.11 Mbano ekozala bomoko ya koyokaka lokola bato ya Amerika ya kala basepelaki mibu 100 nsima ya bomilakisi ya Mobikisi na mokili na bango.

“Mpe esalemaki ete ezalaki boswani te … na ntina ya bolingo bwa Nzambe boye bofandaki o mitema mya bato.

“… Mpe izalaki boluli te, to songisongi te, … mpe ekokaki te kozala bato boko ba esengo mingi koleka bato banso baye bakelamaka na loboko la Nzambe.”12

Na esengo napesi litatoli na ngai ete bambongwana oyo ya bobimisi efulami na Nzambe mpe ete, soki toyambi yango na mitema ya bolingi, tokokoma ya kolengelama malamu mingi mpo na kokutana na Mwana na Ye, Yesu Klisto, na boyei na Ye. Tokozala penepene mingi mpo na kokoma bato ya Siona mpe tokoyoka esengo eluti elongo na baye tosalisaki na nzela ya boyekoli. Ete tosala bongo ezali losambo na ngai ya makasi mpe ya komikitisa na nkombo ya Yesu Klisto, amene.