2010–2019
Bolingo ya Solo: Elembo ya Moyekoli Nyonso ya Solo ya Yesu Klisto
Sanza ya Minei 2018


Bolingo: Elembo ya Moyekoli Nyonso ya Solo

Nsango malamu ya Yesu Klisto evandisami na bolingo ya Tata mpe Mobikisi mpe bolingo na biso mpo na bango mpo na biso na biso.

Tolingi mpe tozangi Mokambi Monson, mpe bolingo mpe kounga Mokambi Nelson. Mokambi Nelson azali na esika ya kafukafu na motema na ngai.

Ntango tata moko ya elenge, mwana mobali moke na biso, oyo azalaki na mibu mitano azongaki na ndako kowuta na eteyelompe atunaki mama na ye, “mosala nini Papa asalaka?” Bongo alimbolaki ete baninga na ye ya sika na kelasi bazalaki koswana na ntina ya misala ya batata na bango. Moko alobaki ete tata na ye azalaki mokonzi ya police ya engumba, ntango moko alobaki na lolendo ete tata na ye azalaki mokonzi ya compagnie monene.

Boye ntango atunaki na ntina ya tata na ye, mwana mobali na nga na mindondo te alobaki, “tata na ngai asalaka na bureau ya ordinateur.” Bongo, kotalisaka ete eyano na ye ekamwisaki te baninga naye mike ya sika, “mpe bongo, tata na ngai azali mokonzi ya banso.”

Nakanisi ete wana ezalaki suka ya lisolo.

Nayebisaki mwasi na ngai. “Ezali ngonga ya koteya ye mingi ya biteni ya mwango ya lobiko mpe nani oyo ezali na ntina mpenza.”

Kasi ntango toteyaki bana na biso mwango ya lobiko, bolingo na bango mpo na Tata ya Lola mpe Mobikisi ekolaki ntango bango bayekolaki ete yango ezali mwango ya bolingo. Nsango malamu ya Yesu Klisto evandisami na bolingo ya Tata mpe Mobikisi mpe bolingo na biso mpo na bango mpe ya moninga.

Mpaka Jeffrey R. Holland alobaki: “mobeko monene ya yambo mpo na libela ezali kolinga Nzambe na motena na mobimba, bokasi, mayele, mpe nguya—wana ezali mobeko ya yambo mpe ya monene. Kasi bosolo monene ya yambompo na libela ezali ete Nzambe alingi biso na motema na Ye mobimba, bokasi, mayele, mpe nguya nyonso. Bolingo wana ezali libanga moboko ya libela, mpe yango ezali libanga moboko ya bomoyi na biso ya mikolo na mikolo.”1

Kozala libanga moboko ya bomoyi na biso ya mikolo na mikolo, bolingo ya solo esengami mpo na moyekoli nyonso ya solo ya Yesu Klisto.

Profeta Mormon ateyaki, “Yango wana bandeko balingami na ngai bosambela epayi ya Tata na makasi manso ya motema na bino, ete bokoka kotonda na bolingo boye, boye apesaki epayi ya baye banso bazali balandi ya solo ya Mwana Mobali na ye, Yesu Klisto.”2

Bolingo ezali solo elembo ya moyekoli nyonso ya Yesu Klisto.

Bayekoli ya solo balingaka kosalisa. Bayebi ete kosalisa ezali kolakisa bolingo ya solo mpe liyokami basalaki na libatisi.3 Ata na libanda ya libingi na bangona Eklezia to misala na kati ya lisanga, bayokaka mposa mposa mpenza ya kolinga mpe kosalela Nkolo mpe moko na mosusu.

Bayekoli ya solo balingaka kolimbisa. Bayebi été Bomikabi ya Mobikisi esangisi masumu nyonso mpe mabunga ya moko na moko kati na biso. Bayebi été motuya wana Ye afutaki ezali “motuya ya nyonso.” Mpako ya molimo, yakofuta,bitinda, mpe mikumba esangani na masumu, mabunga, mpe mbeba nyonso esangani. Bayekoli ya solo bazali pene mpo na kolimbisa.

Bandeko na ngai ya basi mpe ya mibali, soki bozali kobundana mpo na kolimbisa, bokanisa te mpo na oyo basusu basali mpo na bino, kasi bokanisa mpo na oyo Nkolo asalaki mpo na bino, mpe bokozwa kimia kati na mapamboli ya bosikoli ya Bomikabi na Ye.

Bayekoli ya solo balingaka komitika bangomeyi mpo na Nkolo na kimia na motema na bango Bazali ya komikitisa mpe bamitiki mpamba te bango baling Ye. Bazali na bondimi mpo na kondima kokokisa bolingi na Ye, bobele te na oyo Ye asali kasi na lolenge mpe na ntango. Bayekoli ya solo bayebi ete mapamboli ya solo ezali ntango nyonso te oyo bango balingi kasi kutu oyo Nkolo alingi mpo na bango.

Bayekoli ya solo balingaka Nkolo mingi koleka mokili mpe batelemi ngwi mpe batatabanaka ten a bondimi na bango. Balenda mpe na molende na mbongwana mpe mobulungano ya mokili. Bayekoli ya solo balinganga koyokamela mongongo ya molimo mosantu mpe ya baprofeta mpe bazali na mobulungano te na mingongo ya mokili. Bayekoli ya solo balingaka kovanda na bisika bisantu mpe balingaka kosala “bisika bisantu wapi bavandi. ”4 Bisika wapi bakokende, bakabolaka bolingo ya Nkolo mpe kimia na mitema ya basusu. Bayekoli ya solo balingaka kotosa mitindo ya Nkolo, mpe batosaka mpo ete balingaka Nkolo. Ntango bango balingi mpe babateli mayokami na bango,mitema na bango ezongisami sika mpe ezaleli na bango mpenza ebongwani.

Bolingo ya solo ezali elembo ya ya solo ya moyekoli nyonso ya Yesu Klisto.

Nayekolaki na ntina ya bolingo ya solo uta na mama na ngai. Azalaki mondimi ya Eklezia te.

Mokolo moko, mibu ebele mileki, nakendeaki kotala mama na gai, oyo azalaki konyokwama na bokono ya cancer. Nayebaki ete akokufa, kasi amitungisaki ete azalaki konyokwama. Nalobaki ata eloko moko te, kasi ayebaki ngai malamu, alobaki, “namoni ete otungisami.”

Bongo na kokamwa na ngai, atunaki ngai na mongongo ya pete, “Ekoki yo kolakisa ngai lolenge ya kobondela? Nalingi nabondela mpo na yo. Nayebi obandaka na ‘Tata ya Lola,’ kasi bongo nini nakoki koloba?”

Lokola nafukamaki pembeni ya mbeto na ye mpe abondelaki mpo na ngai, nayokaki bolingo nano nayoka te liboso. Yango ezalaki ya mindondo te, solo, bolingo ya solo. Na yango ayebaki ten a ntina ya mwango ya lobiko, azalaki na motema na ye moko mwango ya bolingo, mwango ya bolingo ya mama mpo na mwana mobali na ye. Azalaki na pasi, konyokwama atako azwaki makasi ya kobondela. Nakokaki koyoka mongongo na ye na pasi, kasi solo mpenza nayokaki bolingo na ye.

Bongo naknisaki mpenza, “Boni boni moto oyo azali konyokwama mpenza akoki kobondela mpo na moto mosusu? Azali moko oyo azali na bosenga.”

Bongo eyano eyaki polele na makanisi na ngai. Alingi ngai mingi ete abisani na ntina na yemeyi. Na ngonga na ye ya pasi koleka, alingaki ngai mingi koleka yemeyi.

Sikawa, bandeko na ngai ya basi mpe ya mibali, ezali yango te oyo Nkolo asalaki? Ya solo, na etaleli ya seko mpe kotala mosika. Kasi na kati ya pasi na Ye monene, Azalaki moko oyo asengelaki na lisungi, monyoko na lolenge oyo tokoki kutu te kokanisa to kososola. Kasi na suka, Abosanaki na ntina na yemeyi mpe Abondelaki mpo na biso ntango Afutaki nyongo nyonso. Boni boni ezalaki Ye na makoki ya kosala yango? Mpo ete bolingo na Ye ya solo mpo na Tata, oyo atindaki Ye, mpe mpo na biso. Alingaki Tata mpe biso mingi koleka Yemeyi.

Afutaki mpo na eloko oyo Ye asalaki te. Afutaki mpo na masumu oyo Ye asalaki te. Mpo na nini? Bolingo ya solo. Kofutaka nyongo nyonso, Azalali na esika ya kopesa biso mapamboli ya nini Afutaki mpo na, soki tokoki koyambola. Mpo na nini Apesaki yango? Bolingo ya solo.

Bolingo ya solo ezali elembo ya ya solo ya moyekoli nyonso ya Yesu Klisto.

Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “ tika biso tobanda sikoyo, mokolo oyo mpenza, mpo na kolakisa bolingo epayi ya bana ya Nzambe nyonso, ezala ya libota na biso, baninga na biso, soki pe bayebani, to bato toyebi te. Lokola tozali kolamuka na tongo nyonso, tika biso toyanola na bolingo mpe boboto mpo na oyo nyonso ekoki koya na nzela na biso.”5

Bandeko ya basi mpe ya mibali, nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nsango malamu ya bolingo. Motindo monene ezali na ntina ya bolingo. Mpo na ngai, yango ezali nyonso na ntina ya bolingo. Bolingo ya Tata, oyo akabaki mbeka Mwana Mobali na Ye mpo na biso. Bolingo ya Mobikisi, oyo akabaki nyonso mpo na biso. Bolingo ya mama to tata oyo akoki kokaba nyonso mpo na bana na ye. Bolingo ya baoyo basali na kimia mpe bayebani ten a mingi kati na biso kasi bayebani malamu epayi ya Nkolo. Bolingo ya baoyo balimbisaka nyonso mpe ntango nyonso. Bolingo ya boko oyo bapesi koleka oyo bazwi.

Nalingaka Tata na ngai ya Lola. Nalingaka Mobikisi na ngai. Nalingaka nsango malamu. Nalingaka Eklezia. Nalingaka libota na ngai. Nalingaka bomoyi kitoko na yango. Mpo na ngai, yango ezali nyonso na ntina ya bolingo.

Tika ete mokolo oyo ya bokundoli lisekwa ya Mobikisi ezala mokolo ya bozongisi ya molimo mpo na moko na moko kati na biso. Tika ete mokolo oyo ezala ebandeli ya bomoyi etonda na bolingo, “libanga moboko ya bomoyi na biso ya mokolo na mokolo.”

Tka mitema na biso etondisama na bolingo ya solo ya Klisto, elembo ya solo ya moyekoli ya solo nyonso ya Yesu Klisto. Yango ezali libondeli na nga na nkombo ya Yesu Klisto, amene.