2010–2019
Biloko Mike mpe ya Mindondo te
Sanza ya Minei 2018


Biloko Mike mpe ya Mindondo te

Topsengeli kozala na bokundoli ete na mobimba mpe na nsuka eleko ya ntina ya ntango, elimbolaka makambu mike mpo na kokokisa makambu minene.

I.

Bandeko na ngai ya mibali mpe basi, lokola bino, natutanisami mpe nateyami mpe nafulami na bansango mpe miziki ya ntango oyo elongo. Nazali na bondimi nalobela bino na kotondaka botondi na bandeko na biso nyonso ya mibali mpe basi oyo, lokola bisalelo na maboko ya Nkolo, epesameli biso nguya ya makasi ya ntango oyo elongo.

Nazali na botondi ya koloba na liyangani oyo ya Eyenga ya Pasika. Lelo tosangani na Baklistu mosusu mpo na koyengela Lisekwa ya Yesu Klisto. Mpo na bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikilo ya Nsuka, Lisekwa ya Yesu Klistu ezali moboku ya bondimi na biso.

Nazali na esengo ya koloba liboso ya lisanga oyo na Eyenga ya Pasika. Lelo tosangani na Baklisto misusu mpo na kokanisa Lisekwa ya Nkolo Yesu Klisto. Mpona bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo mya Nsuka Lisekwa ya solo ya Yesu Klisto ezali likonzi ya bondimi na biso. Mpamba te tozali kondimela masolo na buku nionso mibale Bibilia mpe Buku ya Mormon na ntina ya Lisekwa ya solo ya Yesu Klisto, tondimaka mpe lisusu makomi ebele koteyaka ete lisekwa ya ndenge moko ekokomela babokufi oyo batikala kozala ta mokolo moko te likolo ya mabele oyo. Lisekwa wana epesi biso oyo Apostolo Petelo abengaki “elikyia ya bomoyi” (1 Petelo 1:3). Elikya ya bomoyi wana ezali ya biso kondimisama ete liwa ezali te suka ya kozala na biso kasi kaka litambe esengeli na mwango ya ngolu ya Tata na biso ya Lola mpona kosikola bana na Ye. Mwango wana esengeli mpo na koleka uta na bomoyi ya kufa na bomoyi ezanga kufa. Boyebi ya boleki wana ezali kolala mpe kolamuka ya nkembo ya ntongo esalemi na nzela ya Lisekwa ya Nkolo mpe Mosikoli na biso oyo tozali kokundola na Eyenga ya Pasika oyo.

II.

Na loyembo kitoko oyo maloba ekomamaki na Eliza R. Snow, toyembaka:

Boni bikamwa, boni nkembo, boni bokokisami

Mwango monene ya bosikoli,

Wana bosembo, bolingo, mpe ngolu esangani

Na boyokani ya bonzambe!1

Lokola eteni ya bokokisami ya mwango ya bonzambe mpe boyokani, tosangani na mayangani, kosangisaka na likita oyo, mpona koteya mpe komilendisa moko na mosusu.

Tongo ya lelo nayokaki kosalela lokola maloba na ngai makomi ya Alma koteyaka mwana mobali na ye Helaman, ezwami na Buku ya Mormon: “Na Biloko Mike mpe ya Mindondo te makambo minene esalemaka” (Alma 37:6).

Toteyamaki mingi na biloko mike mpe ya mindondo te na sango malamu ya Yesu Klisto. Tosengeli kokundolisama ete na ntango esangisami na eloko molai wana ekokani na biloko mike mpe ya mindondo te makambo minene esalemaka. Ekokaki kozala ntina ya badisikulu mingi ya Bakambi Banene mpe bateyi mosusu bandimami. Ntina oyo ezali na litomba mingi ete nayokaki kolobela yango lisusu.

Namikundolaki nguya ya biloko mike mpe ya midondo te koleka na eloko moko namonaki na botamboli ya ntongo. Oyo ezal elili moko nazwaki. Nzela makasi mpe beton ezalaki ya kopasuka. Ezali yango litomba ya nguya mpe monene kotindaka uta na nse? Te, kopasuka oyo esalami na pete, bokoli moke ya moko ya misisa kobima uta na nzete pembeni. Oyo ezali ndakisa ekokana namonaki na nzela mosusu.

Elilingi
Crack na nzela ya makolo
Elilingi
Crack mosusu na nzela ya makolo

Nguya ya kotindikinya oyo epasoli beton pembeni ya nzela ezalaki moke mingi mpona kolakisa ndelo na mikolo to basanza koleka, kasi nguya na yango sima ya ntango ezalaki ya kokamwa.

Boye ezali se lolenge moko na nguya makasi koleka ntango ya biloko mike mpe ya mindondo te toteyami na makomi mpe na baprofeta ya bomoi. Totala boyekoli ya makomi toteyamaki mpona kotiama eteni moko yabomoi na biso ya mokolo na mokolo. To totala mabondeli ya moto ye moko mpe mabondeli ya kofukama ya libota oyo ezali milulu mpona bandimi ya Basantu ya mikolo mya Nsuka. Totala kokende na seminele mpona bilenge to na kelasi ya mateya ya Nzambe mpona mikolo. Koteya misala moko na moko wana ekoki kozala moke mpe kozanga mindondo, sima ya ntango mbano kati na nguya ya molimo ekomata mpe ekokola. Kokolisama oyo mpo moko ya biloko mike wana mpe ya mindondo te ebengaka kimoninga ya Molimo Mosantu, Nzeneneke oyo angengisaka biso mpe akambaka biso kati na bosolo.

Liziba mosusu ya bokoli ya molimo mpe ya kotombwama ezali bokobi mosala ya koyambola, ata lokola na bambeba ya mike. Bomitali efulama ya bisomeyi ekoki kosunga biso kotala boniboni tokweisamaki moke mpe tokoki kosala malamu koleka. Lokola boyamboli esengeli kosalema yambo ya kokabola elambo. Misala malamu mpona kolandisama na nzela ya koyambola ezali na loyembo“Esali Ngai ata Bolamu?”

Nasali mosala moko ya malamu te na mokili lelo?

Esungi ngai moto moko kati na bosenga?

Ekaboli nga esengo mpe eyokisi nga moto moko esengo?

Soki te, Nakweisami ya solo.

Ezalaki na moto moko oyo mikumba na ye ekomi pepele lelo

Mpamba te nazalaki pene mpona kokabola?

Ezalaki na bakoni mpe baye balembi oyo basungami na makambo na bango?

Ntango bazalaki na bosenga ya lisungi na ngai ezalaki ngai wana?2

Ya solo wana ezali biloko mike, kasi ya solo ezali ndakisa malamu ya Alma eteyaki mwana mobali na ye Helaman: “Mpe Nkolo Nzambe akosalaka na nzela mpo na komema mpembeni mwango na ye monene mpe ya seko; mpe na nzela ya ndimbola mike mpenza Nkolo… akomema mpembeni lobiko ya milimo mingi” (Alma 37:7).

Mokambi Steven C. Wheelwright ateyaki na Brigham Young University–Hawaii bolimboli efulama ya maloba ya Alma koteyaka: “Alma alakisi mwana mobali na ye solo mpenza ete ezalela ya Nkolo elandaka ntango tosaleli bondimi na biso epayi na Ye mpe tolandi toli oyo na boluki mike mpe ya mindondo te, ye nde apambolaka biso na bikamua mike ya mokolo na mokolo, mpe sima ya ntango, elongo na misala ya kokamwa.”3

Mpaka Howard W. Hunter ateyaki ete “mbala mingi yango ezali masukulu ya mikolo na mikolo … oyo ezali na nguya monene na bomoi ya basusu, lokola ekokani na biloko oyo mokili elobelami na monene koleka. ”4

Liteya moko ya bobengi ya mobeko moko wana ewuti uta uta na Senatele moko ya kala Dan Coats ya mboka Indiana, oyo akomaki: “Kaka bolengeli mokano moko ya motuya makasi oyo ekoki kobongola bomoyi moko, kutu ekolo, ezali minkama ya bankoto ya baye bazui mokano bobele na ndambo, mikano oyo esungi mpo na kolimbola oyo tozali emonani lokola mikano ezanga ndimbola esalami na kobombama5

Mikano“ emonani ezanga ndimbola” esalami na kobombama esangani na mikano ya lolenge boni tosalelaka ntango na biso, oyo totalaka na télévision mpe na internet, oyo totangaka, miziki nini toyokaka, mpe nini ezingi bisomeyi na mosala to na ndako, nini tolukaka mpona komisepelisa, mpe lolenge boni tosalaka mpona kozala na bosembo mpe na botongono. Lolenge mosusu ekokani na biloko mike mpe ya mindondo te ezali kozala na botosi mpe kokaba na masano ya moto se yemoko ya biso.

Moko ya biloko mike mpe ya mindondo te esengami wana ekoki komema biso liboso kokoma malamu koleka longola se soki etiami na misala mpenza mpe na bopemi te. Mokambi Brigham Young alobaka: “Bomoyi na biso esalami na ntina, mabaku ezanga mindondo oyo ememaka ya minene ntango esangani elongo, mpe elakisi na bokuse bomoyi mobimba ya mwasi to mobali.”6

Tozingami na bobendami ya media mpe mimesano oyo ezali ekoki kobebisa bantina na biso soki tokobi kotelemela yango te. Kokoba kokende liboso mpona bomoyi ya seko, tosengeli kosangana elongo kokoba koluka. Ekosunga soki tozali eteni ya lisanga oyo ezali koluka elongo, lokola elili oyo elakisami ya lisanga kosalaka elongo. Kotandola ndakisa oyo lisusu, mbonge ezali makasi mingi ete soki totiki koluka, tokoki kokende na bisika tozali koluka te kasi oyo ekokoma ekozangisa nzela soki totiki na etingia kokende liboso.

Nsima ya bopesi eloko moko ya moke oyo ezali na mbano minene, Nephi akomaki, “Mpe boye tomoni ete na nzela moke Nkolo akoki komema makambo minene” (1 Nefi 16:29). Na Boyambi ya kala ezali na ndakisa monene ya oyo. Wana totangi boni bana ya Isalaele basuamaki na banyoka. Mingi bakufaki uta na kosuama na yango (tala na Mituya 21:6). Ntango Mose abondelaki mpona kosunga, afulamaki mpona kosala “nyoka ya motako, mpe kotia yango likolo na nzete.” Bongo, “soki nyoka eswi moto, ntango akotala nyoka ya motako, akobika” (molongo ya 9). Lokola eloko ya moke mpe ya mindondo te mpona mbano ya kokamwa! Ya solo, lokola Nephi alimbolaki ntango ateyaki ndakisa oyo epayi ya baye batombokelaki Nkolo, ata Nkolo abongisaki nzela ya mindondo te oyo wapi bakokaki kobika, “na ntina ya bozangi mindondo ya nzela, to bopete na yango, wana ezalaki na mingi oyo babebisamaki” (1 Nephi 17:41).

Ndakisa mpe liteya oyo ekundoli biso bopete ya nzela to bozangi mindondo ya mokumba esengami ekoki kolakisa te oyo yango ezali na ntina te ya kokisa mposa na biso ya bosolo.

Lolenge moko, ata makambo ya mike ya bozangi botosi to botengami moke ya kolanda misala ya bosembo ekoki komema biso na nse kokoma libanda tokebisamaki mpo na kokima. Maloba ya Bwanya epesi ndakisa oyo. Lokola bokasi ya likaya moko na nzoto to komela masanga ya makasi to moko ya ndambo ya drogue mosusu ekoki kolakisa ndelo te. Kasi nsima ya ntango, bokasi ya nguya mpe ekoki kozala ya mabe. Mikundola bopasuki ya beton ya nzela na bokoli ya muke ya misisa ya nzete. Eloko moko ezali solo, bambano mabe ya bokaboli ya eloko nini oyo ekoki komesana na yo, lokola drogue oyo ekobebisa banzoto na biso to biloko ya pronographie, oyo ebebisaka makanisi na biso, ezali solo ya koboya soki tokosalalela ata mbala moko te mpona mbala ya yambo —ata mbala moko te.

Mibu mingi mileki,  Mokambi M. Russell Ballard alimbolaki na lisanga ya likita linene “boni boni biloko mike mpe ya mindondo te ekoki kozala mabe mpe ya libebi mpona lobiko ya moto.” Ateyaki: “Lokola singa ya pete oyo esangani esali monyama, sima esali libongo, mpe na suka esali singa, biloko wana mike esangani elongo ekoki kokoma makasi koleka mpo na ebukana Tosengeli kaka kozala na bokebi ya nguya ya biloko mike mpe ya mindondo te ekoki kotonga na molimo. Na lolenge moko, tosengeli kokeba ete Satana akoki kosalela biloko mike mpe ya mindondo te mpo na komema biso kati na libebi mpe na mpasi.”7

Mokambi Wheelwright apesaki likebisi ya lolenge moko na lisanga na ye ya BYU–Hawaii : “Na bokueyi ya kosala biloko mike mpe ya mindondo te oyo bondimi ekitaka, bikamwisi esilaka, mpe bokobi kokende liboso epayi ya Nkolo mpe bokonzi na Ye ya likolo etiami yambo na nsima mpe sima ebandi kobeba lokola kolukaka sima bokonzi ya Nzambe etiami nsima na boluki mpenza ya biloko ya mokili mpe bamposa ya mokili”8

Mpona komibatela na misala mabe ya kolandana oyo ebebisaka kokola na biso ya molimo, tosengeli kolanda ndakisa ya molimo ya biloko mike mpe ya mindondo te. Mpaka David A. Bednar alimbolaki na Likita ya Basi na BYU : “Tokoki koyekola mingi na ntina bizaleli mpe ntina ya ndakisa yango ya molimo uta na tekiniki ya …kolekisa mayi na mabele na motango ya kokita,” na ngambo mosusu na botondi ya mayi to bokawusi ya mayi wana yango ekoki kosengama te. Alimbolaki:

“Matanga ya mayi emonani kotanga mpenza na mabele mpe ebotisi mayi mingi na mabele wapi banzete ekoki kokola. Lolenge moko, soki yo mpe ngai totali bobele mpe mbala mingi na koyambaka matanga ya bileyi ya molimo, bongo misisa ya nsango malamu ekoki mpenza kokota na bozindo kati na molimo na biso, kovanda mpenza makasi mpe kobota mbuma ya kokamwa mpe ya elengi.”

“Ezaleli ya molimo ya biloko mike mpe ya mindondo te ememaka makambo ya minene mpe bokobi, komipesa na bozindo, mpe mbongwana ya mobimba na Nkolo Yesu Klisto mpe na nsango malamu na Ye.”9

Profeta Joseph Smith ateyaki malongi oyo na maloba esangani sikoyo na Doctrine et Alliances: “Moto te amona yango lokola biloko mike; mpo wana ezali mingi … na ntina ya basntu, baye basengeli na biloko yango” (D&A 123:15).

Kolandisama na bomeki ya liboso ya bovandisi Eklezia na Missouri, Nkolo apesaki toli mpona kokitisa motema mpo “biloko binso ekoya na ntango na yango” (D&A 64:32). Bongo apesaki liteya monene: “Yango wana, bolemba te kosalaka bolamu, mpamba te, bozali kotia moboko ya mosala monene. Mpe na sima ya biloko mike oyo wapi ya minene ezali” (D&A 64:33).

Nandimi tozali banso na mposa ya kolanda maloba ya Mokambi Russell M. Nelson kobunda mpo na kokende liboso “na nzela ya mayokami.”10 Komipesa na biso mpona kosala yango ezali makasi na kokoba kolanda “biloko mike ” toteyami na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe bakambi na Ye ya Ekliezia. Natatoli Ye mpe nabeleli mapamboli na Ye likolo ya banso oyo baluki kotikala na nzela ya mayokami na Ye, na kombo ya Yesu Klisto, amene.

Makomi

  1. “How Great the Wisdom and the Love,” Hymns, no. 195.

  2. “Have I Done Any Good?” Hymns, no. 223.

  3. Steven C. Wheelwright, “The Power of Small and Simple Things” (Brigham Young University–Hawaii devotional, Aug. 31, 2007), 2, devotional.byuh.edu.

  4. Teachings of Presidents of the Church: Howard W. Hunter (2015), 165.

  5. Dan Coats, “America’s Youth: A Crisis of Character,” Imprimis, vol. 20, no. 9 (Sept. 1991), 4; see also Elder Wilford Andersen in his column in the Mesa Tribune, May 1996.

  6. Brigham Young, discourse in Ogden Tabernacle, July 19, 1877, as reported in “Discourse,” Deseret News, Sanza ya zomi. 17, 1877, 578.

  7. M. Russell Ballard, “Small and Simple Things,” Ensign, Sanza ya mitano 1990, 7, 8.

  8. Steven C. Wheelwright, “The Power of Small and Simple Things,” 3.

  9. David A. Bednar, “By Small and Simple Things Are Great Things Brought to Pass” (Brigham Young University Women’s Conference, Apr. 29, 2011), womensconference.byu.edu.

  10. Russell M. Nelson, “As We Go Forward Together,” Liahona, Sanza ya minei. 2018, 7.