2010–2019
Nini Mosimbi Bonganganganzambe ya Alona Nyonso Asengeli Kososola
Sanza ya Minei 2018


Nini Mosimbi Bonganganganzambe ya Alona Nyonso Asengeli Kososola

Bokuli na bino bwa Bonganganzambe ya Alona ezali ntina mpo na kasalisa bana ya Nzambe bayamba nguya ya bomikabi ya Klisto.

Bandeko, ezali esengo kozala elongo na bino na likita eyebana oyo. Ntango nazalaki mokambi ya miso, nazalaki na esengo ya koyamba liboke ya bamisionele ya sika ya yambo na biso. Lokola mwa bamisionele ya boyebi mingi koleka na biso bazalaki komilengela mpo na liyangani ya mokuse elongo na bango, namonaki babongisaka bakiti ya bana na zolongano ya ndambo.

“Bosala nini na bakiti mike oyo?” Natunaki.

Bamisionele, na mwa malili, balobaki, “Ezali mpo na bamisionele ya sika.”

Nandimi ete lolenge tomonaka basusu epanganisaka mpenza emoneli na bango ya nani bazali mpe nini bakoki kokoma.1 Bamisionele na biso ya sika bafandaki bafandaki na bakiti ya bamikolo mokolo wana.

Ntango mosusu, nabangaka, topesaka na makanisi bilenge na biso mibali ya Bonganganzambe ya Alona bakiti ya bana mpo na kofanda, na esika ya kosalisa bango bamona ete Nzambe apesi bango mokumba moko ya bule mpe mosala moko ya ntina ya kosala.

Mokambi Thomas  S. Monson apesaki biso toli ete bilenge mibali basengeli kososola “nini elingi koloba … kozala bamemi bonganganzambe ya Nzambe. Basengeli kokambama na boyebi ya molimo ya bule ya libiangi na bango.”2

Lelo, nasambeli Molimo Mosantu akokamba biso epai ya bososoli makasi koleka ya nguya mpe bule ya Bonganganzambe ya Alona mpe akofula biso totala malamu na etingia mingi mikumba ya na biso ya bonganganzambe.

Mpaka Dale G. Renlund ateyaki ete ntina ya bonganganzambe ezali kopesa bana ya Nzambe bokoti na nguya ya komikaba ya Yesu Klisto.3 Mpo na koyamba nguya ya komikaba ya Klisto kati na bomoi na biso, tosengeli kondimela Ye, koyambola masumu na biso,kosala mpe kobatela mayokani na nzela ya makuli, mpe koyamba Molimo Mosantu.4 Eye ezali mibeko tomikotisaka kaka mbala moko te; kasi esalaka elongo, kolendisaka mpe kotongaka moko na mosusu na bokoli moko ya ntango nyonso ya bokoli ya kotombwama mpo na “koya epai ya Klisto, mpe kokomisama malama mpenza kati na ye.”5

Boye, mosala ya Bonganganzambe ya Alona ezali nini kati na oyo? Boniboni esalisaka biso tokota na nguya ya bomikabi ya Klisto? Nandimi ete eyano elali na bafungola ya Bonganganzambe ya Alona—bafungola ya kosalisa ya banzelu mpe ya nsango malamu ya kolengela.6

Kosallisa ya Banzelu

Tika tobanda na lolenge moko ya kosalisa ya banzelu. Liboso bana ya Nzambe bakoka kozwa bondimi kati na Klisto, basengeli koyeba Ye mpe koteyama nsango malamu na Ye. Lokola Apostolo Paulo alobaki:

“Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te? Bakoyoka na nzela nini soki bazangi mosakoli?

“Bakosakola na nzela nini soki batindami te? …

“Boye kondima euti na koyoka mpe koyoka euti na Liloba ya Klisto.”7

Uta na ebandeli ya ntango, Nzambe “atindaki banzelu mpo na kosala epai ya bana ya bato, mpo na komonisa … boyei ya Klisto.”8 Banzelu bazali bikelamu ya lola komemaka etinda ya Nzambe.9 Na lokota ya Baebele mpe ya Bagreke lokola, liloba mama anzelu ezali “motindami.”10

Na lolenge mingi kaka oyo banzelu batindami bapesama ndingisa batindamaka na Nzambe mpo na kosakola liloba na Ye mpe na boye kotonga bondimi, biso oyo tosimbe Bonganganzambe ya Alona tokulisami mpoa “koteya, mpe kobengisa banso baya epai ya Klisto.”11 Kosakola nsango malamu ezali mosala ya bonganganzambe. Mpe nguya esanganani elongo na mosala oyo ezali kaka mpo na baprofeta to kotu kaka bamisionele te.!12

Boye boniboni ezwaka biso nguya oyo? Boniboni diakona ya mibu 12—to ata nani kati na binos—amemaka bondimi kati na Klisto epai ya mitema ya bana ya Nzambe? Tobandaka na kobombaka na bokebi liloba na Ye mpo ete nguya na ye ezala kati na biso.13 Alaki ete soki tosali yango, tokozala na “nguya ya Nzambe mpo na kondimisa bato.”14 Ekoki kozala libaku mpo na koteya na liyangani ya lisanga likoki to kotala ndako ya mondimi moko. Ekoki kozala likambo moko ya ndenge ya makasi mingi te, lokola lisolo na moninga moko to moye libota. Ata na bisika kani, soki tomilengeli, tokoki koteya nsango malamu na lolenge banzelu: na nguya ya Molimo Mosantu.15

Elilingi
Jacob mpe Ndeko mobali Holmes

Kala te nayokaki Jacob, mosimbi moko ya bonganganzambe ya Alona na Papua Nouvelle Guiné, atatoli nguya ya Buku ya Mormon mpe lolenge nini esalisi ye atelemela mabe mpe alanda Molimo. Maloba na ye ebutisaki bondimi na ngai mpe bondimi ya basusu. Bondimi na ngai ekoli lisusu ntango nayoki basimbi Bonganganzambe ya Alona koteya mpe kotatola na mayangani ya lisanga likoki na bango.

Bilenge mibali, bozali batindami bapesama ndingisa. Na nzela ya maloba mpe misala na bino, bokoki komema bondimi kati na Klisto epai ya bana ya Nzambe.16 Lokola Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Mpo na bango bokozala lokola anzelu moko ya kosalisa.”17

Nsango malamu ya kolengela

Bondimi ya kobuta kati na Klisto ntango nyonso ekambaka na mposa moko ya kobongwama mpe koyambola.18 Boye ezali mayele ete fongola ya kosalisa ya banzelu ezala elongo na nsango malamu ya kolengela, “nsango malamu ya koyambola mpe ya libatisi, mpe ya kolongola masumu.”19

Ntango boyekoli misala ya Bonganganzambe ya Alona, bokomona motindo ya polele mpo na kobengisa basusu bayambola mpe bakola.20 Wana elingi koloba te totemi na litumu ya balabala kogangaka, “Boyambola bino!” Mbala mingi koleka, elingi koloba ete biso toyambolaka, tolimbisaka, mpe ntango tozali kosalisa basusu, tozali kopesa elikia mpe kimia oyo boyamboli ememaka—mpamba te tokutani nay a bisomei.

Nazalaki elongo na basimbi ba Bonganganzambe ya Alona ntango bakendeki kotala baninga baye lisanga likoki. Namonaki bobateli na bango kolembisa mitema mpe kosalisa bandeko na bango ya mibali bayoka bolingo ya Nzambe. Nayokaka moko ya elenge mobali kotatola epai ya baninga na ye nguya ya boyamboli. Ntango asalaki yango, mitema mikomisamaki pete, bomipesi esalamaki, mpe nguya ya kobikisa ya Klisto eyokisamaki.

Mokambi Gordon B. Hinckley ateyaki: “Ezali eloko moko koyambola. Ezali eloko mosusu kolongolama to kolimbisama masumu na biso. Nguya ya kosala yango ezali na Bonganganzambe ya Alona.”21 Makuli ya Bonganganzambe ya Alona ya libatisi mpe elambo etatoli mpe ebakisi boyamboli na biso.22 Mokambi Dallin H. Oaks alimbolaki yango na lolenge oyo: “Totindami toyambola masumu na biso mpe toya epai ya Nkolo na motema ya kobukana mpe molimo ya mawa mpe kokabola elambo. … Ntango tozongisi sika mayokani na biso ya libatisi na lolenge oyo, Nkolo azokisi sika mbano ya kopetola ya libatisi na biso.”23

Bandeko, ezali litomba ya bule kosalisa makuli oyo ememaka bolongoli ya masumu epai ya mitema ya boyamboli na nzela ya nguya ya bomikabi ya Mobikisi.24

Nalobelamaki kala te na ntina ya nganganzambe moko, oyo abundaki mpo na komilobela, kopambolaka elambo mpo na mbala ya yambo. Ntango asalaki yango, molimo moko ya nguya eyaki likolo na ye mpe lingomba. Nsima kati na liyangani, apesaki litatoli moko ya pete mpe polele ya nguya ya Nzambe oyo ayokaki na ntango ya makuli wana.

Elilingi
Lisanga lioki ya banganganzambe elongo na libota ya Mbuelongo

Na Sydney, Australie, bato minei ya lisanga likoki ya bonganganzambe babatisaki baye libota ya ba Mbuelongo. Mama ya moko ya banganganzambe oyo alobaki na ngai lolenge kani likambo oyo esimbaki na nguya motema ya mwa na ye ya mobali. Banganganzambe oyo bayaki kososola nini elingi koloba “kotindama na Yesu Klisto,”25

Lokola boyebi, banganganzambe bakoki sikawa kosala kati na kosalaka mabatisi mpo na bozwili kati na tempelo. Mwana na ngai ya mobali ya mibu 17 kala te abatisaki ngai mpo na book ya bankoko na biso. Biso mibale toyokaki ngolu ya mozindo mpo na Bonganganzambe ya Alona mpe litomba ya kosalaka mpo na lobiko ya bana ya Nzambe.

Bilenge mibali, wana ezali bino komipesa na etingya na misala ya bonganganzambe, bozali kosala elongo na Nzambe na mosala na Ye “kosala bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto.”26 Boyebi lokola oyo ebutisaka mposa na bino mpe elengelaka bino mpo na koteya boyamboli mpe kobatisa babongwani lokola bamisionele. Ezali lisusu kolengela bino mpo na kosalela Nzambe bomoi mobimba kati na Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Yoane Mobatisi, Ndakisa na Biso

Basimbo ya Bonganganzambe ya Alona, tozali na litomba mpe mosala ya kozala mpenza baninga basali elongo na Yoane Mobatisi. Yoane atindamaki loko motindami oyo azali na likoki ya kotatola na ntina ya Klisto mpe kobengisa banso bayambola mpe babatisama—oyo elingi koloba, asalelaki bafungola ya Bonganganzambe oyo tolobeli.Nsima Yoane alobaki, “Ngai nabatisi bino na mai mpo na kobongwana na motema. Ye oyo akoya nsima na ngai aleki ngai na nguya  … : akobatisa bino na Molimo Mosanto mpe na moto.”27

Yango wana Bonganganzambe ya Alona, na bafungola ya kosalisa ya banzelu mpe nsango malamu ya kolengela, ezali kolengela nzela mpo ete bana ya Nzambe bayamba, na nzela ya Bonganganzambe ya Melekisedeke, likabo ya Molimo Mosantu, likabo ya monene mingi tokoki koyamba na bomoi oyo.28

Ez ali lmokumba ya mozindo Nzambe apesi epai ya basimbi Bonganganzambe ya Alona!

Libengisi mpe Elaka

Baboti mpe bakambi ya bonganganzambe, ekoki bino koyoka ntina ya toli ya Mokambi Monson ya kosalisa bilenge mibali basosola “nini elingi koloba … kozala bamemi ya bonganganzambe ya Nzambe”?29 Kososolaka mpe kokomisaka monene Bonganganzambe ya Alona ekolengela bango bazala basimbi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke ya bondimi, bamisionele batonda na nguya, mpe mibali mpe batata ya bosembo. Na nzela ya mosala na bango, bako bobele kososola te kasi koyoka solo ya nguya ya bonganganzambe, nguya ya kosala na nkomba ya Klisto mpo na lobiko ya bana ya Nzambe.

Bilenge mibali, Nzambe azali na mosala mpo ete bino bosala.30 Bokuli na bino bwa Bonganganzambe ya Alona ezali ntina mpenza mpo na kasalisa bana na Ye bayamba nguya ya bomikabi ya Klisto. Nalaki ete wana ezali yo kotia misala oyo ya bule na katikati ya bomoi na yo, okoyoka nguya ya Nzambe lokola mokolo moko te liboso. Okososola bomoto na yo lokola mwana mobali ya Nzambe, abiangami na libiangi moko ya bule mpo na kosala mosala na Ye. Mpe, lokola Yoane Mobatisi, okosalisa kolengela nzela mpo na boyei ya Mwana na Ye. Na ntina ya babosolo oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Oyo ezali nini esalamelaki Mose, Nsima ya bokutani ya kokamwa na Nzambe, abandaki komimona na bokeseni—kozala mwana mobali ya Nzambe. Emoneli oyo esalisaki ye kotelemela Satana, oyo abengaki ye “mwana mobali ya moto” (tala Moses 1:1–20). Tala lisusu Thomas S. Monson, “Tala Others as They May Become,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 68–71; Dale G. Renlund, “Through God’s Eyes,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2015, 93–94.

  2. Thomas S. Monson, general conference leadership meeting, Mar. 2011.

  3. Tala Dale G. Renlund, “The Priesthood and the Savior’s Atoning Power,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 64–67.

  4. Tala 2 Nefi 31–32; 3 Nefi 11:30–41; 27:13–21; Etele4:18–19; Moses 6:52–68; 8:24.

  5. Moroni 10:32; see also Preach My Gospel: A Guide to Missionary Service (2004), 6.

  6. Tala Doctrine et Alliances 13:1; 84:26–27; 107:20.

  7. Baloma 10:14–15, 17. Joseph Smith taught this same truth: “Faith comes by hearing the word of God, through the testimony of the servants of God; that testimony is always attended by the Spirit of prophecy and revelation” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 385).

  8. Moroni 7:22; see Alma 12:28–30; 13:21–24; 32:22–23; 39:17–19; Helamane 5:11; Moroni 7:21–25, 29–32; Doctrine et Alliances 20:35; 29:41–42; Moses 5:58; tala lisusu Matai 28:19; Baloma 10:13–17.

  9. Tala George Q. Cannon, Gospel Truth, sel. Jerreld L. Newquist (1987), 54.

  10. Tala James Strong, The New Strong’s Exhaustive Concordance of the Bible (1984), Hebrew and Chaldee dictionary section, 66, Greek dictionary section, 7.

  11. Doctrine et Alliances 20:59.

  12. Tala Henry B. Eyring, “That He May Become Strong Also,” Liahona, Nov. 2016, 75–78; Alma 17:3; Helaman 5:18; 6:4–5; Doctrine et Alliances 28:3.

  13. Tala 1 Yoane 2:14; Alma 17:2; 26:13; 32:42Fulfilling My Duty to God: For Aaronic Priesthood Holders is a valuable tool to help accomplish this.

  14. Doctrine and Covenants 11:21; tala lisusu Doctrine et Alliances 84:85.

  15. Tala 2 Nefi 32:3; Doctrine et Alliances 42:14; 50:17–22.

  16. Tala Moroni 7:25.

  17. Russell M. Nelson, “Honoring the Priesthood,” Ensign, May 1993, 40; tala lisusu Alma 27:4.

  18. Tala Alma 34:17; Helaman 14:13.

  19. Doctrine et Alliances 84:27.

  20. Tala Doctrine et Alliances 20:46, 51–59, 73–79. Fulfilling My Duty to God: For Aaronic Priesthood Holders is a valuable tool to help us understand our duties.

  21. Gordon B. Hinckley, “The Aaronic Priesthood—a Gift from God,” Ensign, May 1988, 46.

  22. Mpaka D. Todd Christofferson alimbolaki: “Libatisi na mai ezali litambe ya nsuka to ya motuya na nzela ya boyamboli. Botiki lisumu, ebalisami na liyokani na biso ya botosi, ekokisaka boyamboli na biso, solo, boyamboli etikalaka ya kosila te na kozanga liyokani wana” (“Building Faith in Christ,” Liahona, Sept. 2012, 14–15). See also D. Todd Christofferson, “The Divine Gift of Repentance,” Liahona, Nov. 2011, 38–41; Joseph Smith Translation, Matthew 26:24 (in the Bible appendix).

    Bokuli ya elambo epesaka biso “libaku moko poso moko na moko ya kozongisa sika mayokani ya bule oyo epesaka biso nzela tozala bakaboliya ngolu ya bomikabi ya Mobikisi na mbano ya kopetala na molimo se moko ya libatisi mpe nkotisa” (“Understanding Our Covenants with God,” Liahona, July 2012, 21). See also Dallin H. Oaks, “Always Have His Spirit,” Ensign, Nov. 1996, 59–61.

  23. Dallin H. Oaks, “The Aaronic Priesthood and the Sacrament,” Liahona, Jan. 1999, 44.

  24. Mpaka David A. Bednar alimbolaki: “Makuli ya lobiko mpe bonetolami oyo salami kati na Eklezia ezongisama ya Nkolo ezali mosika mingi koleka milulu to babotalisi ya elembo. Na esika, ezali kosala banzela epesameli ndingisa kati na yango mapamboli mpe banguya ya lola ekoki kotiola kati na bomoi ya biso ya moto na moto” (“Always Retain a Remission of Your Sins,” Liahona, May 2016, 60).

  25. Doctrine et Alliances 20:73.

  26. Moses 1:39.

  27. Matai 3:11.

  28. Bakambi mingi ya Eklezia bazali kososola Molimo Mosantu lokola likabo monene mingi ya bokufi.

    Mokambi Dallin H. Oaks alobaki, “Kozala ntango nyonso na kimoninga ya Molimo Mosantu ezali eloko ya bomengo ya motuya oyo tokoki kozala na yango kati na bokufi” (“The Aaronic Priesthood and the Sacrament,” Liahona, Jan. 1999, 44).

    Mpaka Bruce R. McConkie ateyaki: “Kolobaka uta na emoneli ya boseko, bomoi ya seko ezali ya monene mingi ya makabo nyonso ya Nzambe. Kasi konuengisaka emoneli na bomoi oyo kaka, likabo ya Molimo Mosantu ezali likabo ya monene mingi moto na bokufi akoki kosepela na yango” (“What Is Meant by ‘The Holy Spirit’?” Instructor, Feb. 1965, 57).

    Mokambi Wilford Woodruff atatolaki: “Soki ozali na Molimo Mosantu elongo na yo—mpe moto nyonso asengeli kozala na ye—Nakoki koloba kati nay o ete ezali na likabo ya monene koleka te, ezali na lipamboli monene koleka te, ezali na litatoli monene koleka te epesami na moto kani na mabele. Okoki kozala na mosala ya banzelu; okoki komona makamwisi ebele; okoki komona makambo kitoko mingi na mabele; Kasi nalobi ete likabo ya Molimo Mosantu ezalfi likambo ya monene mingi oyo ekoki kopesama na moto” (Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff [2004], 49).

    Mpe Mpaka David A. Bednar abakisaki“Mitindo uta na Nzambe oyo totosaka mpe toli efulama uta na bakambi ya Eklezia oyo tolandaka mingimingi eyekami likolo ya kozwaka kimoninga ya Molimo. Na mobimba, mateya ya nsango malamu mpe milulu nyonso etie na katikati boyei epai ya Klisto na koyambaka Molimo Mosantu na bomoi na biso” (“Receive the Holy Ghost,” Liahona, Nov. 2010, 97).

  29. Thomas S. Monson, general conference leadership meeting, Sanza ya misato. 2011.

  30. Tala Moses 1:6.