Mambi ya kala ya Eklezia
République Démocratique du Congo: Molongo ya Makambo


“République Démocratique du Congo: Molongo ya Makambo,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo (2020)

“République Démocratique du Congo: Molongo ya Makambo,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo

République Démocratique du Congo: Molongo ya Makambo

Sanza ya libwa 1970 • Kinshasa, République Démocratique du CongoLiboke moke ya Basantu uta na mboka mopaya oyo bazalaki kofanda na Kinshasa babandaki kosala mayangani ya Eklezia.

Ba1970–ba 80 • Libanda ya ZaïreBana mboka Bacongolais babandaki kokoma bandimi ya Eklezia ntango bazalaki kofanda na mboka mopaya, ndakisa Belgique, France, Allemangne, Swisse, mpe Etazini.

Ba1970–ba 80 • ZaïreBasantu ya Bacongolais oyo bazongaki na ekolo na bango lokola mpe bandimi ya Eklezia ya mikolo ekoya babandaki kokomela bakambi ya Eklezia, kosengaka nsango, bamisionele, mpe lisungi ya Eklezia mosusu.

Sanza ya mwambe–Sanza ya libwa 1979 • ZaïreMokambi Spencer W. Kimball atindaki Oscar McConkie Jr. na Zaïre mpo na kotala mpe kozwa nsango. Oyo ezalaki mobembo ya yambo kati na mibembo mingi katikati ya 1979 mpe 1986 mpo na komeka kofandisa Eklezia kuna.

Ba 1980 • Kinshasa mpe Etuka ya Shaba, ZaïreMangomba endimama na bakonzi te oyo ezalaki kosalela nkombo ya Eklezia esalamaki mpe ebandaki kokoma mpe kozwa mikanda uta na Ndako bokonzi ya Eklezia.

Sanza ya mibale 1986 • KinshasaBamisionele ya yambo na Zaïre, Ralph mpe Jean Hutchings, bakomaki.

Sanza ya minei 1986 • ZaïreNsima ya mibu nsambo ya mosala mpo na kofandisa Eklezia na Ekolo, bapesaki Eklezia bondimami engebene na mobeko ya kosala kati na Zaïre.

Sanza ya motoba 1, 1986 • KinshasaJunior Mucioko Banza mpe Philippe Banza bakomaki bato ya yambo oyo bazwaki libatisi na Zaïre. Baboti na bango, Mucioko Wa Mutombo Banza mpe Régine Mbuyi Banza bakomaki bandimi ya Eklezia na Swisse na 1979.

Sanza ya libwa 1986 • KinshasaEtape ya Kinshasa ebongisamaki. Babiangaki Michael C. Bowcutt lokola mokambi ya etape elongo na Mucioko Wa Mutombo Banza mpe Mbuyi Nkitabungi lokola bapesi toli mpe Régine Mbuyi Banza lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi.

1986 • KinshasaNtango motango ya bandimi emataki, mayangani ya Eklezia elongwaki na ndako ya Mbuyi Nkitabungi mpo na kokende na ndako moko na Limete.

Sanza ya mibale 1987 • Lubumbashi, ZaïreRoger mpe Simone Dock, bamisionele ya mikolo, bakomaki bamisionele ya yambo ya kopesama mokumba na Lubumbashi.

Sanza ya motoba 1987 • KinshasaBabongisaki na bondimami ya bakonzi Misio ya Kinshasa Zaïre.

Sanza ya nsambo 25, 1987 • LubumbashiBabongisaki Etape ya Lubumbashi, na Clement Mubalamate Kavuala lokola mokambi.

Elilingi
bobulisi ya RDC

Sanza ya mwambe 30, 1987 • Kinshasa

Mpaka Marvin J. Ashton ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale abulisaki Zaïre mpo na boteyi nsango malamu.

Sanza ya mwambe 1988 • Salt Lake City, UtahBabimisaki boponi ya Buku ya Mormon na Lingala. Babimisaki Buku ya Mormon mobimba na Lingala na 2004.

Sanza ya libwa 18, 1988 • KinshasaBabongisaki Distiliki ya Kinshasa Zaïre

Sanza ya zomi na mibale 1989 • LubumbashiBasalaki likita ya Bilenge Basi ya disitiliki ya yambo na Zaïre.

Sansa ya yambo–Sanza ya mibale 1991 • ZaïreBabiangaki Junior Mucioko Banza, Ngalamulume Diamany, Thomas Nkadi Mutombo, mpe Kanda Malu-Malu lokola bamisionele Bacongolais ya yambo ya kosalela Nzambe na Misio ya Kinshasa Zaïre Kinshasa.

Sanza ya minei 1991 • ZaïreLikita monene ya Ekolo Zaïre etiaki bonsomi ya boyambi.

Sanza ya libwa 13, 1991 • ZaïreBakotisaki pologalami ya seminele na Zaïre, na Kabwika Ntambwe lokola moyangeli.

1991–94 • Kinshasa, Zaïre, mpe Brazzaville, République du CongoMobulu ya bana mboka ekataki misala ya bilo ya misio, oyo elongwaki Kinshasa mpo na kokende Brazzaville na 1991 mpe ekangamaki mpo na ntango mokuse na 1993–94.

Sanza ya nsambo 1996 • Johannesburg, Africa ya SudiLiboke ya yambo ya Basantu uta na République Démocratique du Congo ekendaki mobembo na Tempelo ya Johannesburg na Afrika ya Sudi mpo na kozwa makuli ya tempelo.

November 3, 1996 • KinshasaBabongisaki Etuka ya yambo na Zaïre, etuka ya Kinshasa Zaïre, na Wa Musithi Jacques Muliele oyo babiangaki lokola mokambi. Na sanza ya mitano oyo elandaki, Ekezi Imbale Baenda Ise’Ekungola Liyanzi akomaki nkoko ya etuka ya yambo ya ekolo.

Sanza ya mwambe 12, 1997 • République Démocratique du CongoNtango ekolo ebongolaki nkombo na yango, babongolaki nkombo ya misio na Misio Kinshasa na République Démocratique du Congo.

Sanza ya libwa 7, 1997 • LubumbashiBabongisaki etuka ya Lubumbashi, République Démocratique du Congo, na Nzembelenge Milambo lokola mokambi.

2000 •Salt Lake CityBabimisaki Buku ya Mormon na Swahili.

Sanza ya yambo 2005 • République Démocratique du CongoBasalaki pologalami ya mosala ya Eklezia, baatelier ya mosala, mpe (PEF) Mosolo ya ntango nyonso mpo na Boyekoli. Na nzela ya pologalame ya lisungi ya bato nyonso ya Eklezia, bakabolaki makabo ya maneti ya miso.

Sanza ya libwa 9, 2006 • KinshasaBilenge uta na Etape ya Masina na Kinshasa, République Démocratique du Congo babongisaki mokolo ya ekolo moko ya mosala, kokombolaka bisika ya bato nyonso kati na lisanga.

Sanza ya mitano 1, 2007 • République Démocratique du CongoBabiangaki Daniel Tusey Kola lokola Ntuku Nsambo ya Etuka ya yambo.

Sanza ya mitano 22, 2011 • Kananga na République Démocratique du CongoBabongisaki Etuka ya Kananga na République Démocratique du Congo, na Christophe Kawaya lokola mokambi.

Sanza ya nsambo 23 mpe 30, 2011 • KinshasaBasalaki makita mibale ya bilenge ya mbala ya yambo, na mingi koleka 1.200 bato oyo bazalaki.

Sanza ya zomi 1, 2011 • Salt Lake CityMokambi ya Eklezia Thomas S. Monson asakolaki ete bakotonga tempelo na Kinshasa.

Sanza ya nsambo 2014 • BrazzavilleBabengaki Elie Kyungu Monga mpe Vianney Mwenze Monga mpo na kokamba Misio ya Brazzaville République du Congo.

Sanza ya mibale 12, 2016 • KinshasaMpaka Neil L. Andersen ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale akambaki molulu ya pawu ya liboso ya Tempelo ya Kinshasa République Démocratique du Congo.

Sanza ya minei 24, 2016 • Mbuji-Mayi, République Démocratique du CongoBabongisaki Etuka ya Mbuji-Mayi République Démocratique du Congo, etuka ya zomi na mitano na ekolo, na N’sumbu Jean-Pierre Kalonji lokola mokambi.

Sanza ya mwambe 2016 • KinshasaEklezia esalaki boyokani na leta mpo na konimelize 20 milio ya makundoli ya mambi ma kala. Bandimi ya Eklezia Richard Dadzie mpe Thierry Mutombo bakutanaki na Jean Claude Mabaya, sekeletele ya Ministre ya Makambo ya Ekolo, mpo na kotia linzaka na mokanda ya boyokani.

2016 • Republique Democratique du CongoMotango ya bandimi ya Eklezia elekaki 50,000.

Sanza ya zomi 9, 2017 • Salt Lake CityEklezia esakolaki miango ya kobongola Buku ya Mormon na Tshiluba mpe kopesa bandimi ndingisa ya kozwa biteni esila naino te liboso ya bobimisi ya bobongoli ya nsuka.

Elilingi
Tempelo ya Kinshasa

Sanza ya minei 14, 2019 • Kinshasa

Babulisaki Tempelo ya République Démocratique du Congo.