Mambi ya kala ya Eklezia
Kozongisa Bolamu


“Kozongisa Bolamu,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo (2020)

“Kozongisa Bolamu,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo

Kozongisa Bolamu

Kobanda na nsuka ya mibu 1990, bato ya République Démocratique du Congo banyokwamaki na bitumba ya makasi mpeza ete bato ya miso efungwama babengaki yango “Bitumba ya Mokili Mobimba ya Afrika.” Na bitumba yango, bamilio ya bana mboka ya Bacongolais batikaki bandako na bango, ntango mosusu kokendaka kofanda na mboka mopaya. Rosette Bahati azalaki moko ya bapaya wana. Na 1998, nsima ntango basoda bazwaki mobali na ye, Rosette mpe bana na ye nsambo bakimaki na Uganda, esika wapi bafandaki mpo na ntango moke na kaa ya bapaya. Ntango bazalaki kuna, maboke ya bato ya lisalisi esalisaki mpo na kosunga bango. “Namonaki elembo ya langi ya bule mpe mpembe likolo ya nkeni,” emikundolaki Rosette na ntina ya maboke mosusu. “Nayebi Angele te, kasi namikundolaki elembo yango.”

Mobu moko nsima ya bokomi ya Rosette na kaa, mobali na ye azwaki makoki ya kokoma kuna, mpe na sanza ya motoba 2006 libota na ye eyambamaki kati na Etazini mpe bafandaki lisusu na Utah. Ntango balukaki ndako ya mayangani epai wapi bakokende, bamisionele babengisaki bango na mayangani ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. “Tokobosana mokolo moko te likita ya yambo wana tokendaki,” emikundolaki Rosette. “Bandimi basembolaki maboko epai na biso na boboto mpenza.” Rosette nokinoki amonaki libaku ya kosalela Nzambe na kosalaka na Ndako ya Lisalisi ya Bato ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na Salt Lake City. Kuna, ayebaki lisusu elembo ya liboke kaka yango ya kaa na Uganda. “Etondisaki ngai na esengo monene ete nazalaki kosalisa kozongisa malamu esalamaka epai na ngai mpe libota na ngai,” alobaki.

Na 2014 Rosette azwaki lisusu libiangi moko ya kosalela Nzambe lokola mokambi na Lingomba ya Bamama Basungi mpo na etape wapi balobaka Swahili na Salt Lake City. Na etape yango, bandimi bazalaki mingimingi bapaya bakima bitumba—mbala mingi uta na maboke ya bikolo oyo bazalaki koyokana te ya bitumba oyo bakimaka. “Bandeko na biso ya basi bawutaki na Afrika epai wapi ezali naino na bitumba mpe mobulu na kati ya mabota ekeseni,” Rosette atalisaki. “Nzokande, na etape yango tozali komeka kozala bomoko na kibondeko na biso mpe tozali komeka kosala ete ndeko mwasi moko na moko amiyoka ete alingami mpe azali se ye moko na miso ya Tata na Lola.”