Mambi ya kala ya Eklezia
Tempelo na République Démocratique du Congo


“Tempelo na République Démocratique du Congo: Copyright,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo (2020)

“Tempelo na République Démocratique du Congo: Copyright,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo

Tempelo na République Démocratique du Congo

Thierry Mutombo azalaki na mibu mwambe ntango ye na baboti na ye, Antoine K. Mutombo mpe Marie Therese M. Nzambu, babatisamaki na sanza ya motoba 1986. Baposo mibale nsima, Antoine alotaki oyo etali “ndako ya mpembe monene” moko ya kitoko oyo “emonanaki lokola liyaka ya mpembe moko uta na mosika.” Ya kobulinginya mpe kokamwa, atunaki misionele babalana ya mikolo moko ndoto yango elingaki koloba nini. Bayebisaki ye ete etonga yango ezalaki tempelo mpe mokolo moko akozala na makoki ya kokende kuna. “Mpo na tata na ngai, kokende na tempelo ekomaki ndoto ya bomoi mobimba,” elobaki Thierry. “Azalaki kolobela batempelo na ntango ya likita ya mpokwa mpo na libota na bomoi na biso mobimba.”

Nsima ya kosalaka misio na Côte d’Ivoire, Thierry akutanaki na Nathalie Sinda, oyo azalaki na bolingo ya lolenge moko mpo na tempelo. Na 1994 baboti ya Nathalie mpe bandeko na ye mosusu bakufaka. Mibu misato nsima, abatisamaki mpe abandaki kolota baboti na ye mpe bandeko na ye kosengaka ye asalisa bango. Atako asalaki misio, Nathalie azalaki na libaku ya kokota tempelo te. “Mokolo moko, nakokende komona tempelo mpe nakosala mosala ya tempelo nyonso mpo na baboti na ngai,” Nathalie akomaki na zulunale na ye ya misionele.

Na 2002 Thierry mpe Nathalie Mutombo babalanaki na miso ya leta. Mobu moko nsima, mwana na bango ya mobali ya yambo akufaki baposo mibale nsima ya kobotama. Ntango nazalaki kolela bebe na biso,” emikundolaki lisusu Nathalie, “mobali na ngai alobaki, kolela te, mokolo moko tokokangisama na ye mpo na ntango mpe seko.” Na sanza ya zomi na mwambe 18, 2004, Thierry, Nathalie, mpe mwana na bango ya mibale basalaki mobembo na Tempelo ya Johannesburg Afrika ya Sudi mpo na kokangisama lokola libota. “Mpo na biso, tozelaki ngonga wana mpo na kozala elongo lokola libota moko ya seko,” elobaki Thierry. Na ntango ya mobembo yango, Nathalie akokisaki lisusu ndoto na ye ya kosala makuli ya tempelo mpo na baboti mpe bandeko na ye, kosembolaka moniololo ya babokangisi nsima ya nkolo moko.

Mibu nsambo nsima, na mpokwa ya poso, sanza ya zomi 1, 2011, Thierry mpe Nathalie Mutombo bazalaki kati na ndako na bango na Kinshasa elongo na bana na bango kotalaka likita linene ntango Mokambi ya Eklezia Thomas S. Monson asakolaki miango ya kotonga tempelo na Kinshasa. Mpo na Thierry, tempelo na esika oyo elingi koloba kaka mapamboli mpo na seko te, kasi elikya ya mapamboli mpo na ekolo na ye. “Tempelo na République Démocratique du Congo elingi koloba ete Nkolo azali kotia liso likolo ya ekolo na biso mpe nsuka nsuka tokozwa kimia,” alobaki ye.

Thierry asepelaki lisusu ete tata na ye atikalaki na bomoi mpo na koyoka liyebisi yango. “Tata na ngai azalaki kozela tempelo ya Kinshasa bomoi na ye mobimba,” elobaki ye. Na sanza ya mibale 2016 libota Mutombo, kobakisa Antoine Mutombo, bazalaki wana na molulu ya pau ya liboso ya Tempelo ya Kinshasa République Démocratique du Congo. “Oyo ezali eyano na nsambo na ngai,” elobaki Antoine. Mwa basanza nsima, komonaka ndoto na ye kobanda kokoma solo, Antoine K. Mutombo akufaki.