Mambi ya kala ya Eklezia
Komema Nsango Malamu na Congo


“Komema Nsango Malamu na Congo,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo (2020)

“Komema Nsango Malamu na Congo,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo

Komema Nsango Malamu na Congo

Na ebandeli mpenza ya mibu1960, bato oyo bafandi na République Démocratique du Congo ya mikolo ya lelo (eyebanaki lokola Zaïre kobanda 1971 kino 1997) babandaki kokoma mikanda na Ndako bokonzi ya Eklezia. Atako Eklezia ezalaki na ntoma moko te kati na ekolo, bantoma ya Eklezia bazalaki kotinda mikanda mpe babuku epai ya baoyo bazalaka kokoma. Mingi na bango babandaki koteya nsango malamu mpe kobongisa masanga oyo eyebanaki na bakonzi ya Leta te. Koyanolaka na makasi oyo, bakambi ya Eklezia batindaki bantoma mpo na kotia bantoma bandimama na 1979 mpe kino na katikati ya mibu 1980.

Na ntango yango kaka, Bacongolais mingi baoyo batika ekolo bamonaki Eklezia na poto mpe na Etazini. Mbuyi Nkitabungi azwaki libatisi na Belgique na 1980, asalaki misio ya ntango mobimba na Angleterre, mpe nsima amiyokaki kotindikama kozonga epai na ye na 1985. “Moko ya bantina na ngai ya bosembo ezali kotonga … Siona na kati ya Zaïre,” akomelaki bilo monene ya Eklezia. “Nayebi ezali na mwa bandimi mingi ya ekolo na ngai baoyo bazali kozela libaku wana. … Boyebisa ngai makambo nyonso nasengeli kosala.”

Nkitabungi akutisamaki na bandimi mosusu na Kinshasa, oyo bakutanaki na ndako ya Mike mpe Katie Bowcutt, mwasi na mobali bato ya Amerika. Lokola Nkitabungi, bandimi mingi bazalaki basantu ya Bacongolais baoyo bakotaki na Eklezia na mboka mopaya. Nzokande, lokola Eklezia eyebanaki naino engebene na mobeko te, bandimi basalaki mayangani ya bato nyonso te. Kasi, lisanga yango nokinoki ekomaki monene koleka ndako ya Bowcutts mpe bamemaki mayangani na bango na esika Nkitabungi abombaka motuka.

Elilingi
bandimi bazali koyangana na esika Nkitabungi abombaka motuka

Bandimi ya ebandeli ya Etape ya Kinshasa bazali koyangana kati na esika Mbuyi Nkitabungi abombaka motuka, circa 1986.

Na sanza ya mibale 1986 mokambi ya ekolo alakaki na lolaka ya televisio ya leta ete akopesa bondimami basembolaki engebene na mobeko na Eklezia, mpe nokinoki bandimi babandaki koteya nsango malamu polele. Sanza kaka wana, Ralph mpe Jean Hutchings, bamisionele ya yambo oyo babiangemaki na Zaïre, bakomaki mpe bamonaki lisanga moke ekokolaka na Kinshasa. Bondimami epesamaki uta bakonzi ya leta sanza ya minei, mpe pene ya sanza ya motoba 1987 Eklezia ebandaki kokola noki mpenza na Zaïre ete misio moko ebongisamaki, na Ralph Hutchings lokola mokambi.

Bamisionele bakokisaki masengami mpo ya masanga eyebanaki na bakonzi ya Leta te pembeni ya Lubumbashi. Atako bobongwani ezalaki mpasi mpo na basusu, esika ya bokasi ya mibale ebimaki nokinoki. Kati ya sanza ya mitano mpe ya motoba 1987, bato 170 babatisamaki. Basusu bazalaki kosala mobembo mosika lokola 300 kilometele uta na Pweto, Kolwezi, mpe Likasi mpo na kokende mayangani.

Ntango Elie Monga, mibu 21, ya Kolwezi atangaki Buku ya Mormon na 1987, akamwaki. “Nayokaki makasi,” alobaki nsima, “ete wana ezali oyo esengeli na ngai.” Monga asalaki mobembo ya 300 kilometele na Lubumbashi mpo na kokutana na bamisionele. Nsima ya liteya moko kaka, azwaki mokano ya kobatisama. Nsima ya libatisi na ye, na bolendisi uta na bamisionele, asalaki mayangani ya Eteyelo ya Eyenga na ndako na ye. “Tobandaki kosangana mpe koteya baninga na biso [mpe libota],” alobaki, “komemelaka bango nsango ya elikya na nzela ya nsango malamu ezongisama.” Lisanga moko monene ekomaki nokinoki kokutana na ndako ya Monga. Ntango mosala ya libatisi ya yambo na Kolwezi esalamaki mobu ya nsima, ezwaki mingi koleka bangonga misato na ndambu mpo ete Monga abatisa babongwami 82 oyo bayambaki nsango malamu. Ezalaki elonga moko kati na mingi mosusu: na 1990, mibu minei kaka nsima ya bondimami ya Eklezia na leta, bitape mpe badisitiliki efulukaki na Kinshasa, Lubumbashi, mpe bingumba mosusu mingi na ekolo mobimba.