Mambi ya kala ya Eklezia
République Démocratique du Congo: Bokuse ya Mokanda


“République Démocratique du Congo: Bokuse,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo (2020)

“République Démocratique du Congo: Bokuse,” Mambi ma Kala ya Mokili Mobimba: République Démocratique du Congo

Mambi ma Kala ya Eklezia na Mokuse

République Démocratique du Congo

Elilingi
Kalati ya RD Congo

Bokuse

Na mibu 1960, babongwani mingi Bacongolais oyo bazwaki libatisi libanda ya ekolo bazongaki na mboka na bango ya mbotama mpe babandaki kosenga Ndako bokonzi ya Eklezia batinda bamisionele na ekolo na bango. Na 1979, nsima ya kozwaka mikanda mingi uta na ekolo yango, Mokambi ya Eklezia Spencer W. Kimball atindaki Oscar McConkie, molobeli ya Eklezia, atala makoki ya kobongisa Eklezia na Zaïre (oyo ebengami lisusu nsima République Démocratique du Congo).

Atako kokomisa eyamba engebene na mobeko ezwaki pene mibu nsambo, babongwani ya ebandeli bazalaki kokutana elongo na masanga ya mike mike mpe bazalaki kokabola bondimi na bango na bato ya penepene. Ntango bamisionele ya yambo, Ralph mpe Jean Hutchings, bakomaki na sanza ya mibale 1986, masanga ezalaki mingi oyo ezalaki koyangana poso na poso. Na 1986 babongisaki disitiliki moko, mpe mobu oyo elandaki bakelaki misio moko na Kinshasa. Na sanza ya mwambe 30, 1987, Mpaka Marvin J. Ashton ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale asalaki mobembo na Kinshasa mpe abulisaki ekolo mpo ete nsango malamu eteyama.

Ata misio ekangamaki mpo na ntango mokuse na ebandeli ya mibu 1990, bandimi bakobaki kokabola nsango malamu. Na 1996 bakelaki etape ya yambo na Kinshasa, mpe na 1997 basalaki etape ya yambo na Lubumbashi. Bandimi ya Eklezia babatelaki bondimi mpe basalisanaki kati na bitumba ya nsuka ya mibu 1990 mpe ebandeli ya mibu 2000, basalaki mpo na kokomisa bitape ya Siona “ekimelo uta na ekumbaki” na ngonga ya mobulu (Malongi mpe Mayokani 115:6). Na likita linene ya sanza ya zomi 2011, Mokambi ya Eklezia Thomas S. Monson asakolaki miango mpo ete tempelo etongama na Kinshasa. Ebulisamaki na 2019.

Makambo na mokuse

  • Nkombo Endimama na Bakonzi: Democratic Republic of the Congo/République démocratique du Congo/Repubilika Dimokalasi ya Kôngo/Republíki ya Kongó Demokratíki/Jamhuri ya Kidemokrasia ya Kongo/Ditunga dia Kongu wa Mungalaata

  • Mboka Mokonzi: Kinshasa

  • Engumba Monene Mpenza: Kinshasa

  • Nkota: Français, Kongo, Lingala, Swahili, mpe Luba-Katanga

  • Etando ya Mabele: 2,345,409 km2 (905,567 mi2)

  • Etuka Enene ya Eklezia: Africa Southeast

  • Misio: 3 (Kinshasa, Lubumbashi, mpe Mbuji-Mayi)

  • Mangomba: 181

  • Batempelo: 1 (Kinshasa)