2010–2019
Sanza ya Libwa 30, 2017
Sanza ya zomi 2017


Bamemi ya Pole ya Lola

Lokola momemi ya bonganganzambe ya Nzambe mpe lokola moyekoli ya Yesu Klisto, ozali momemi ya pole.

Mobange moko ya mobali avandaki na molongo na bilo ya mikanda mpo na kosomba timbre na mesa ya mosala. Elenge moko ya mobali amonaki ete azalaki kotambola na mpasi mpe amipesaki mpo na kolakisa ye boniboni kosomba timbre na masini mpo na kobatela ngonga. Mobange mobali alobaki, “Melesi na yo kasi nandimi kozela. Masini ekotuna ngai te etali mikuwampasimpasi na ngai.”

Ntango mosusu esalisaka kolobela moto mosusu oyo amitungisaka na oyo etali bampasi na biso.

Mpasi, mpe mawa ezali makambo tokabolaka—bangonga ya likama, bobola, libaku mabe ekoki kobakisa na likundoli moko monene na makundoli ya kati ya molimo na biso.

Ntango ekomelaka bolamu na biso ya nzoto, toyambaka kokola mpe kobela lokola eteni ya mobembo na biso ya bokufi. Tolukaka toli ya basali oyo basosoli nzoto ya mosuni. Ntango tozwi mpasi etungisaka mayoki to kobela ya makanisi, tolukaka lisalisi ya bonganga ya mayele oyo basalisaka ndenge oyo ya maladi.

Kaka lokola tokutanaka na mimekano ya nzoto mpe ya mayoki, tokutanaka lisusu na mikakatano ya molimo. Mingi na biso tozalaki na bangonga na bomoi na biso ntango litatoli na biso epelaka makasi. Tokoki lisusu kozala na bangonga ntango yango ezalaka lokola mosika. Ezalaka na bangonga ntango tolulaka makambo ya Molimo na motema na biso nyonso. Ekoki kozala lisusu na bangonga ntango yango emonanaka na motuya moke to ya ntina ya kokita.

Lelo natombeli kolobela bolamu ya molimo—boniboni tokoki kozwa libiki na bokawuki mpe kotambola na nzela ya kolongono ya molimo ya makasi.

Bokono ya Molimo

Ntango mosusu maladi ya molimo eyaka lokola mbano ya lisumu to bampota tozoki na motema. Ntango mosusu kobukana ya molimo eyaka mpenza mokemoke ete tokoki na mpasi koloba nini ezali kosalema. Lokola likolo ya libanga oyo ebakisamaka, mpasi mpe mawa ekoki kotongama nsima ya ntango, kotiaka bozito likolo ya milimo na biso kino ekomi pene na kozala kilo koleka oyo tokoki komema. Ndakisa, oyo ekoki koya ntango mikumba na biso na mosala, na ndako, mpe na eklezia ekomi mpenza koleka ete tobungisi esengo ya nsango malamu. Tosengeli kutu lokola soki tozali na eloko te ya kopesa to ete kosalela mitindo ya Nzambe ezali lokola eleki bokasi na biso.

Kasi kaka mpamba te mimekano ya molimo ezali ya solo elingi koloba te ete ekoki kobika te.

Tokoki kobika na molimo.

Ata bampota ya molimo ya mozindo—iyo, ata oyo ekoki komonana lokola ekoki kobika te—ekoki kobika.

Baninga na ngai ba bolingo, nguya ya kobikisa ya Yesu Klisto ezangi te na mokolo na biso.

Kosimba ya libiki na Ye ekoki kobongola bomoi na mokolo na biso kaka lokola esalaki na ya Ye. Soki tokoki kaka kozala na bondimi, Ye akoki kokamata maboko na biso, kotondisa milimo na biso na pole mpe libiki, mpe koloba na biso maloba mapambolama, “Telema, mpe kamata mbeto na yo, mpe tambola.”1

Molili mpe Pole

Ezala bampasi na biso ya molimo ewuti wapi, yango nyonso ezali na likambo moko elongo: kozanga pole ya bonzambe.

Molili ekitisaka bokoki na biso mpo na komona polele. Ekitisaka bomoni na biso ya oyo ezala na ngonga moko polele mpe saa. Ntango tozali na molili, tosengeli mingi mingi kobungisa elikia, mpamba te tokoki te komona kimia mpe esengo oyo ezali kozela biso soki kaka tokobi kowelisa liboso.

Pole, na loboko mosusu, epesaka biso nzela ya komona makambo lokola ezali mpenza. Esalisaka biso mpo na kososola katikati ya bosolo mpe mbeba, katikati ya ntina na ya mpamba. Ntango na tozali na pole, tokoki kosala maponi ya alima evandi na mabongi ya solo. Ntango tozali na pole, “tozali na bongengi ebonga mpenza ya elikia,”2 mpamba te tokoki komona mimekano na biso ya bokufi uta na bomoni moko ya seko.

Tokozwa libiki ya molimo ntango tolongwi na bililingi ya mokili mpe na kati ya Pole ya Klisto ya libela.

Soki tososoli mpe tosaleli mingi mambi ya pole, tokoki mingi komibatela na makono oyo eniokolaka mpe ebulunganisaka biso ngambo mpe loboko nyonso, mpe tokoki malamu mingi kosalisa lokola bamemi ya komikitisa, ya bolengeli, ya mpiko mpe ya nguya—basali mpe bayekoli ya solo ya Mokonzi na biso ya bolingo mpe ya seko.

Pole ya Mokili

Yesu Klisto alobaki, “Nazali pole ya mokili: oyo akolanda ngai akotambola na molili te, kasi akozala na pole ya bomoi.”3

Yango elingi koloba nini?

Na pete boye: Ye oyo akolanda Yesu Klisto na komikitisa akomona mpe akokabola pole na Ye. Mpe pole wana ekokola kino na nsuka ekobengana kutu molili ya mozindo mingi koleka.

Elingi koloba ezali na nguya moko, nguya ya makasi, oyo ewutaka na Mobikisi. Ewutaka na “mpenza na miso ya Nzambe mpo na kotondisa bonene ya mokili.”4 Mpamba te nguya oyo engengisaka, etombolaka, mpe epelisaka bomoi na biso, makomi mbala mingi ebengaka yango pole, kasi etalisami lisusu lokola molimo ya bosolo.

Na Doctrine et Alliances totangi, “Liloba ya Nkolo ezali bosolo, mpe oyo nyonso ezali bosolo ezali pole, mpe oyo nyonso ezali Pole ezali Molimo, kutu Molimo ya Yesu Klisto.”5

Bwania oyo ezali mozindo—pole wana ezali molimo oyo ezali bosolo mpe pole oyo ezali kongenga likolo ya molimo oyo eye na mokili—ezali ya motuya lokola ezali ya elikia. Pole ya Klisto engengelaka mpe etondisaka milimo ya banso oyo bayokamelaka mongongo ya Molimo.6

Pole ya Klisto etondisaka mokili.

Etondisaka mabele.

Mpe ekoki kotondisa motema nyonso.

“Nzambe akesenisaka bato te.”7 Pole na ye ezali mpo na banso—monene to moke, mozwi to mobola, moto na litomba to na litomba te.

Soki ofungoli mayele mpe motema na yo mpo na kozwa Pole ya Klisto mpe na komikitisa olandi Mobikisi, okozwa pole mingi. Mokoloto na mokoloto, awa moke mpe kuna moke, okosangisa pole mpe bosolo mingi na bomoi na bino, kino molili ekolongwa na bomoi na yo.8

Nzambe akofungola miso na yo.

Nzambe akopesa yo motema ya sika.

Bolingo, pole, mpe bosolo ya Nzambe ekosala makambo elala ebima ya bomoi, mpe okobotama lisusu na bomoi ya sika na Yesu Klisto.9

Nkolo alakaki, “Soki miso na bino etali bobele nguya na ngai, banzoto na bino mobimba ekotonda na pole, mpe molili ekozala te na bino; mpe nzoto oyo etondi na pole ekososola makambo nyonso.”10

Oyo ezali nkisi ya nsuka mpo na bokono ya molimo. Molili elimwaka na miso ya pole.

Lisese moko mpo na Molili ya Molimo

Nzokande, Nzambe akokanga biso te na makasi mpo na koyamba pole na Ye.

Soki tokomi na esengo na molili, ezali na ntembe soki mitema na biso mikobongwana.

Mpo na mbongwana esalema, tosengeli makasi kotika pole na kasi.

Ntango ya mibembo na ngai lokola kapiteni ya mpempo nzinganzinga na mokili na biso mabele, nazalaka kosepela ntango nyonso na kitoko mpe bobongi mpenza ya bokeli ya Nzambe. Nayokaka mingimingi kosepela na mokangano katikati ya mabele mpe moi. Namonaka yango ezali liteya epesaka biloko ya boniboni molili mpe pole ezalaka.

Lokola biso banso toyebi, kati ya ngonga 24 nyonso ya butu ebongwanaka moi mpe moi ebongwanaka butu.

Bongo, butu ezali nini?

Ezali eloko mosusu te kasi elili.

Atako na molili ya babutu, moi esilisaka te kongengisa pole na yango. Ekokobaka kongenga makasi lokola ntango nyonso. Kasi katikati ya mabele ezali na molili.

Kozanga pole esalaka molili.

Ntango molili ya butu ekwei, tosilisaka kolikia te mpe komitungisa ete moi ekufi. Tolobaka na sikisiki te ete moi ezali wana te to ekufi. Tososolaka ete tozali na molili, ete mabele ekokoba kobaluka, mpe na nsuka bongengi ya moi ekokomela biso mbala moko lisusu.

Molili ezali kolakisa te ete pole ezali te. Mbala mingi mpenza, elingi bobele koloba tozali na esika esengeli te mpo na kozwa pole. Na ntango ya kibwisa mpimpa oyo eleki mingi basalaki babokasi ebele mpo na kokota na kati ya nzela ya nkaka ekelamaki na sanza, na katikati ya mokolo moko yam oi makasi.

Na lolenge moko mpenza, pole ya molili ekobaka kongenga likolo ya ekelamo ya Nzambe nyonso. Satana akosala makasi nyonso mpo na mpo na kokela elilingi to kokotisa biso na elili ya biso moko. Akokanga biso mpo tokela kobombana ya pole ya biso moko; akotindika biso na kati ya molili ya libulu na biso.

Molili ekoki kokanga elamba ya kobosana nzinganzinga kutu ya bato oyo mbala moko batambolaki na pole mpe basepelaki na Nkolo. Nzokande, atako na bangonga ya molili makasi, Nzambe ayokaka bosenga na biso, ntango tosambelaka., “Nkolo, nandimi: salisa bozangi bondimi na ngai.”11

Na mikolo ya Alma ezalaki na mingi bandimaki makambo ya molimo, mpe “na ntina ya bozangi ya bondimi na bango,” Pole mpe bosolo ya Nzambe ekokaki te kokota na milimo na bango;; “mpe mitema na bango ekomaki makasi.”12

Tozali Bamemi ya Pole

Bandeko, etali biso mpo na kozala na esika esengeli mpo na komona pole mpe bosolo ya bonzambe ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ata ntango butu ekwei mpe mokili emonani molili, tokoki kotambola na pole ya Klisto, kobatela mitindo na Ye, mpe na mpiko kotatola bosolo na Ye mpe bonene na Ye.

Lokola momemi ya bonganganzambe ya Nzambe mpe lokola moyekoli ya Yesu Klisto, ozali momemi ya pole. Koba kosala makambo oyo oyebi ekokolisa pole ya bonzambe na Ye.. “Simba likolo pole na yo”13mpe “tika [yango] epela liboso ya bato”—te mpo ete bamona mpe balula yo, kasi “ete bakoka komona misala na yo ya malamu, mpe bakumisa Tata na yo oyo azali na lola.”14

Bandeko na ngai ya bolingo, bozali bisaleli na maboko ya Nkolo na ntina ya komema pole mpe libiki na milimo ya bana ya Tata ya Lola. Ntango mosusu bokoyoka te bokoki na kobikisa baye bazali na maladi ya molimo—ya solo be mosala nyonso te na bilo ekoki kosalisa mikuwampasimpasi. Ntango mosusu bokutanaka na mikakatano ya molimo ya bino moko. Nzokande, Nkolo abengi bino. Apesi bino likoki mpe mokumba ya kosalisa baye bazangi. Alatisi bino nguya ya bonganganzambe ya bule mpo na komema pole na kati ya molili mpe kotombola mpe kopambola bana ya Nzambe. Nzambe azongisi Eklezia na Ye mpe nsango malamu na Ye ya motuya, “oyo ebikisaka molimo ezoka.”15 Alengeli nzela mpo na bolamu ya molimo; mpo na kobikisa bokangami mpe kokende epai ya kolongono ya makasi ya molimo.

Mbala nyonso bokozongisa mitema na bino na Nzambe na losambo ya komikitisa, bokoyoka pole na Ye. Mbala nyonso bokoluka liloba na Ye mpe bolingi na makomi, pole ekokola na kongenga. Mbala nyonso bokomona moto moko na kozanga mpe bokobonza esengo na bino moko mpo na kosalisa na bolingo, pole ekopanzana mpe ekovimba. Mbala nyonso bokoboya lisenginia mpe bokopona bopeto, mbala nyonso bokoluka to bokopesa bolimbisi, mbala nyonso bakotatola na mpiko bokolo, pole ekobangana mosika molili mpe ekobenda basusu oyo bazali koluka pole lokola.

Bokanisa etali mayele na bino moko, bangonga ya kosalela Nzambe mpe baninga bato ntango pole epelaki na bomoi na bino—na tempelo esantu, na mesa ya elambo, na ngonga ya kimia ya komaniola na losambo, na bosangani ya libota na bino, to na ntango ya kosalisa na mosala ya bonganganzambe. Bokabola bangonga wana elongo na libota, baninga, mpe mingimingi elongo na bilenge oyo bazali koluka pole. Bazali na mposa ya koyoka na bino ete elongo na pole oyo ekoya elika mpe libiki.

Pole ya Klisto ememaka elikia, esengo, mpe libiki ya mpota to mpasi nyonso ya molimo.16 Bato oyo bakoyoka nguya ya bopetoli oyo bakokoma bisaleli na loboko ya Pole ya Mokili mpe bakokoka kopesa pole na basusu.17 Bakoyoka oyo Mokonzi Lamoni ayokaki: “Pole oyo etiaki esengo ya boye na molimo na ngai, londende ya molili elimwaki, mpe … pole ya bomoi ya libela epelaki na molimo na ye.”18

Bandeko na ngai ya bolingo, ezali boluki na biso koluka Nkolo kino pole na Ye ya bomoi ya seko ekopela na kongenga na kati na biso mpe litatoli na biso ekokoma ya bondimi mpe makasi ata na katikati ya molili.

Ezali losambo mpe lipamboli na ngai ete bolonga na kokokisa lobi ekoya na bino lokola basimbi ya bonganganzambe ya Nzambe ya Bokasi Bonso mpe bamemi ya esengo ya pole ya Ye ya lola. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.