2010–2019
Bonganganzambe mpe Nguya ya Bomikabi ya Mobikisi
Sanza ya zomi 2017


Bonganganzambe mpe Nguya ya Bomikabi ya Mobikisi

Mpo na bantina ya Tata na Lola ekokisama, nguya ya bomikabi ya Klisto esengeli ekokisama na bana na Nzambe. Bonganganzambe epesi mabaku yango.

Bokanisa elongo na ngai fusée moko oyo etambwisami na esika ya botindi mpo ete ekoka kobongisama mpo na kobumbua. Sikawa, botala bokutani. Essence, na kopela moko etalami malamu, ebongolami na mopepe ya moto oyo emati, mpo na kopesa botindiki esengelami mpo na kotinda fusée na likolo makasi. Na suka botala nguya ya ntina to liboke likolo ya fusée. Motuya ya mokumba ya ntina ekokisami mobimba kaka soki yango ekomi na esika oyo esengeli ezala mpe esala lolenge esengeli. Osengeli te tozala moto ya mayele oyo ayebi fusée mpo na kokumisa, ndakisa, satelite ya nsango ya mokili mobimba ya talo mingi ezali na motuya te na kati ya dépot. Mosala ya fusée ezali kaka kopesa botindiki ya ntina.

Na mpokwa ya lelo, nalingi nakokanisa bonganganzambe biso tosimbina fusée mpe libaku ya kozua wuta na nguya ya bomikabi ya Mobikisina nguya ya ntina oyo fusée ebimisaka.

Na ntina ya mbeka na Ye ya bomikabi, Yesu Klisto azwi nguya mpe likoki ya kosikola moto nyonso. Kotia nguya na Ye ya bomikabi libanda, Ye apesi ndambo ya nguya mpe likoki na Ye na mibali ya mokili. Nguya mpe likoki oyo epesami ebangami bonganganzambe. Epesi ndingisa na basimbi bonganganzambe kosunga Tata na Lola mpe Yesu Klisto na mosala na Bango—mpo na komema lobiko mpe bonetoli ya bana ya Nzambe. Esalami boye mpo yango epesi bana na Ye libaku ya koyamba mapamboli ya nguya ya bomikabi ya Mobikisi.

Nguya ya bomikabi ya Yesu Klisto ezali na ntina mingi mpo ete moko te kati na biso akoki kozonga na ndako ya lola na bozangi lisungi. Na kibokufi tosali mabunga ntango nyonso mpe tobuki mibeko ya Nzambe. Tokomaki ya kopakolama na lisumu mpe topesamaki nzela te ya kozonga na miso na Nzambe. Tozali na bosenga ya nguya ya bomikabi ya mobikisi boye tokoki kozongisa byokani na Tata ya Lola. Yesu Klisto abukaki basinga ya liwa ya nzoto, kopesa nzela ya lisekwa ya bato nyonso. Ye apesi bolimbisi ya masumu, kaka na botosi ya mibeko mpe babokuli ya nsango malamu na Ye. Na nzela na Ye bonetoli na ye epesamaki. Libaku ya kozua mbano wuta na nguya ya bomikabi ya mobikisi ezali mokumba ya motuya mingi ya bokeli.

Mpo na bantina ya Tata na Lola ekokisama, nguya ya bomikabi ya Klisto esengeli ekokisama na bana na Nzambe.1 Bonganganzambe epesi mabaku yango. Yango ezali fusée. Bonganganzambe ezali na ntina mingi mpo ete bakuli esengeli mpe mayokani ya mokili esalsami kaka na nzela ya likoki yango. Soki bonganganganzambe ekueyi na kopesa biso libaku ya kozua wuta na nguya ya bomikabi ya Mobikisi, litambo na yango ekozala nini? Ekoki yango kozala kaka petare moko ya mindondo eebendi bokebi ya bato, eloko moko ya makelele monene ebendi mayele ya bato? Nzambe azeli bonganganzambe esalelama mpo na mingi koleka kaka kelasi moko ya eyenga to mosala moko ya libaku malamu. Ye azeli yango mpo na kopesa nguya ya ntina.

Bobebi ya moke ya fusée ekoki kosala ete misio ebeba. Bibombelo ya kala oyo ebukani to epasuki to mabende esali nzoto ya fusée elemba ekoki kosala ete fusée etambola malamu te. Mpo na kobomba bonganganzambe wuta, na lisese, na bibombelo ya kala oyo ebukani to epasuki to mabende elemba na ndenge ya koloba, Nzambe abateli yango mibale lolenge ezali mpe esaleli.2 Lolenge ya bonganganzambe ebatelami na bokengi na bafungola ya bonganganzambe, oyo ezali makoki ya bokambi epesaki na mobali.3 Esaleli ya Bonganganzambe mpe, ebatelami na nzela ya bafungola ya bonganganzambe kasi lisusu na nzela ya mayokani oyo basimbi bonganganzambe basalaka. Esaleli ya Bonganganzambe ezali na nsuka kotambwisama na nzela ya nyonso mibale bafungola ya bonganganzambe mpe mayokani. Mokumba ya kibonganganzambe ya mobali epesamaki na moto yemoko mpe ezali na bonsomi te na ye;4 bonganganzambe ezali te liziba moko eyebami te ya nguya ya komisalela yango moko

Nyonso mibale bonganganzambe ya Alona mpe ya Melikisedeki eyembamaka ya nzela ya liyokani.5 Nzambe apesi bandelo mpe moto andimi. Mingimingi na koloba, liyokani ya basimbi bonganganzambe mpo na kosunga Nzambe na mosala na Ye. Kala na eleko oyo , Yesu Klisto alimbolaki ete liyokani ya bonganganzambe “etiami likolo na bino oyo etiami likolo na bino mpo na bino, mpe kaka mpo na bino moko te, kasi mpo na mokili mobimba … mpo ete yango ewuti na ngai te.”6

Yango eteyi ete ntina ya bonganganzambe ezali kobenga basusu baya na Klisto na kosungaka bango koyamba nsango malamu ezongisami. Tozali na bonganganzambe boye ete tokoki kosunga bana ya Tata ya lola kokitisa mokumba ya lisumu mpe kokoma lokola Ye. Na nzela ya bonganganzambe, nguya ya bonzambe emonisami na babomoi ya baoyo nyonso basali mpe babombi mayokani na nsango malamu mpe bayambi makuli esangisami.7 Oyo ezali lolenge moko na moko na biso akoya na Klisto, apetuami, mpe azongisi boyokani na Nzambe. Nguya ya bomikabi ya Klisto ekokisami na nzela ya bonganganzambe, oyo epesami na nguya ya bopusi.

Mayokani na Nzambe ezali ya mpambampamba te mpe ekoki kobukama te. Mpe mobali asengeli amibongisa mpo na, koyekola oyo etali yango, mpe kokota na boyokani wana na makanisi ya kokumisa yango. Liyokani ekomi ndai na moto ye moko. Kolobaka na mokuse mokomi moko ya Anglais Robert Bolt, moto asalaka liyokani kaka ntango alingi komipesa yemoko mobimba na bokaùwi nyonso kati na elaka. Ye akotia mokangano katikati na bosolo elaka mpe bolamu na yemoko. Ntango moto asali liyokani, ye azali komemaka yemoko, lokola mai, na maboko lokola na kopo. Mpe soki ye afongoli maboko na ye, ye akokoka lisusu te komimona yemoko lisusu. Mobuki ya liyokani akomikotisa ngonga molayi te to elikia ya kopesa.8

Mayokani ya mokumbi bonganganzambe ya Alona akimi mabe, akosunga basusu bazongisa boyokani na Nzambe, mpe kobongisa bango mpo na koyaba Bonganganzambe ya Melekisedeki.9 Mikumba ya bulee etondisami ntango ye ateyi, abatisi, epesi makasi na bandimi ya Eklezia, mpe abengi basusu kondima nsango malamu. Yango ezali lolenge ya “kokokisa” mosala. Na bozongi, Nzambe alaki elikia, bolimbisi, mosala ya banzelu, mpe bafungola ya nsango malamu ya boyamboli mpe libatisi.10

Mayokani na mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke kotondisa mikumba esangani elongo na Bonganganzambe ya Alona mpe kokokisa libiangi na ye na Bonganganzambe ya Melekisedeki.11 Akosala yango na kobombaka mitindi esangani na liyokani. Mitindo yango ekotisi kopesaka “bokebi ya makasi na maloba ya bomoi ya seko” nakobikaka “maloba nyonso [ebimi] wuta na monoko ya Nzambe,”12 komemaka litatoli ya Yesu Klisto mpe mosala na Ye ya mikolo mya nsuka,13 abeta ntolo na yemoko te,14 mpe akokoma moninga ya Mobikisi, kotiela Ye motema lokola moninga moko akosala.15

Na bozongi, Nzambe alaki ete mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeki akoyamba bafungola ya kososola makambo mabombami ya Nzambe. Ye akokoma bobongi nie boye ete ye akoka kotelema liboso na Nzambe. Ye akozala na likoki ya kokokisa na mobimba ntina na ye na mosala ya lobiko. Yesu Klisto akobongisa nzela liboso ya mosimbi bonganganzambe mpe akozala elongo na ye. Molimo Mosantu ekozala na motema ya mosimbi bonganganzambe mpe banzelu bakomema ye likolo. Nzoto na ye ekokembisama mpe ekokoma ya sika. Ye akokoma mosangoli ya mapamboli ya Abalayama mpe, elongo na mwasi na ye, mosangani-mosangoli elongo na Yesu Klisto na bokonzi ya Nzambe.16 Yango ezali “bilaka minene koleka mpe ya motuya mingi. ”17 Bilaka minene koleka ekoki kokanisama te.

Na moto moko na moko oyo ayambi Bonganganzambe ya Melekisedi, Nzambe alaki bilaka na ye ya liyokani elongo na ndai.18 Ndai yango ezali kaka mpo na basimbi Bonganganzambe ya Melekisedeki,19 mpe ezali Nzambe nde alapaki ndai, ezali mosimbi ya bonganganzambe te.20 Mpo ete likambo kaka moko oyo etali nguya mpe likoki na Ye ya kibonzambe, Nzambe azali kosalela ndai moko, kosalelaka monoko ya makasi koleka oyo Akoki, mpo na kokokisela biso lolenge ya makasi mpe ebonguani ya bilaka na Ye.

Bambano mabe ekoya wuta na bobuki mayokani ya bonganganzambe mpe mobimba ekozongela bango.21 Kosalaka ntango nyonso te to kozala ya kokesana na libiangi moko ya kibonganganzambe ezali lokola kokotisaka mabende elemba na kati ya fusée. Yango ekotia na likama liyokani ya bonganganzambe mpo ete ekoki komema mosala na kokueya. Kozanga botosi na mitindo na Nzambe ebuki liyokani. Mpo na mobuki liyokani aboya koyambola libela na libela, mapamboli elakama ezali ya kolongwa.

Nayaki kososola na mobimba kolela boyokani ezalaki katiakati na “bonganganzambe” fusée mpe “libaku ya kozua wuta na nguya ya bomikabi ya Klisto” nguya ya botindiki mibu ebele nsima. Na nsuka na poso moko, nazuaka misala mibale. Moko ezalaki kosala likonzi yay ambo na ekolo, mpe mosusu ezalaki kosolola na elenge mobali moko mpe, soki nyonso ezalaki na molongo, kozongisa bonganganzambe na ye mpe mapamboli ya tempelo. Mwana mobali oyo ya mibu 30 sangani na eklezia na nsuka ya kibolenge na ye. Ye asalaki etinda moko ya kokumisa. Kasi ntango azongaki ndako, ye abongisaki nzela na ye, mpe abungisami kibondimi na ye na Eklezia. Nsima ya mua mibu, “azongaki kati na yemoko,”22 mpe elongi na lisungi ya bakambi ya bonganganzambe ya bolingo mpe bandimi ya malamu, ye ayambolaki mpe andimamaki lisusu na Eklezia na nzela ya libatisi.

Nsima, ye asengaki kozua kibonganganzambe na ye mpe bozongi ya mapamboli na ye ya tempelo. Tozuaki bokutani mpo na Mokolo na Mposo na 10:30 ya ntongo na ndako ya Makita. Ntango nayaki mpo na masolo ya ntongo yango, ye azalaki yambo wana. Ye azali motema moto mpo na kozua bonganganzambe mbala moko lisusu, ye akokaki kozela lisusu te.

Katikati ya masolo na biso, nalakisaki ye mokanda elimbolaki ete Mokambi Thomas S. Monson yemoko mpenza atalaki lisusu bosenga na ye mpe apesaki nzela na lisolo. Mwana mobali oyo ya makambo makasi ya ndenge mosusu alelaki. Nayebisaki ye nsima ete mokolo oyo ya masolo na biso ekozala na ndimbola ya mingi na bomoi na ye te. Amonanaki ya kobunga. Nsima nayebisaki ye ete nsima ya ngai kozongisa mapamboli na ye, bokoti na ye lokola mondimi ekolakisa kaka mokolo ya libatisi, kondimama, bokulisi ya bonganganzambe, mpe likonza na ye ya liboso. Ye akamuaki lisusu.

Nasengaki ye atanga wuta na Doctrine et Alliances:

“Tala, oyo ayamboli masumu na ye, ye alimbisami, mpe Ngai, Nkolo, nakokundola yango lisusu soki moke te.

“Na boye bokoyeba soki moto ayamboli masumu na ye—boye, ye akoyambola yango mpe akotika yango.”23

Mayi etondaki na miso na ye mpo na mbala ya misato. Sima, natiaki maboko na ngai na mutu na ye mpe na Nkombo ya Yesu Klisto mpe na likoki ya Bonganganzambe ya Melekisedeke, mpe na ndingisa ya Mokambi ya Eklezia, nazongiselaki ye kibonganganzambe mpe mapamboli na ye ya tempelo.

Esengo oyo eyaki likolo na biso ezalaki makasi. Ye aybaki ete azuaki lisusu ndingisa ya kosimba mpe kosalela kibonganganzambe ya Nzambe. Ye ayebaki ete mapamboli na ye ya tempelo ezongelaki lisusu kosala na mobimba. Ye asalaki nyonso na bosepli makasi mpe amonanaki ya kosepela makasietali ye. Nazalaki na lofundu mpo na ye, mpe nayokaki lolenge nini Tata ya lola azalaki na lofundu mpo na ye ngai mpe.

Na nsima na yango, likonzi ebongisamaki. Makita eyanganaki na Bansantu ya kosepela, bondimi, mpe bokambi likonzi ya kitoko esungamaki. Ata bongo, mpo na ngai, libaku monene ya kobongisa likonzi ya yambo oyo na ekolo efinikamaki na esengo nayokaki na kozongisaka mapamboli ya elenge mobali oyo.

Nayaki komona ete ntina ya kobongisa likonzi moko, to kosalelaka bonganganzambe na lolelnge nyonso, esali kosunga Tata na Lola mpe Yesu Klisto na mosala na Bango—kopesa libaku mpo na bosikoli na moko moko ya bana na Nzambe. Lokola fusée oyo ntina na yango ezali kopesa boupusi ya ntina. Bonganganzambe ezali kopesa nsango malamau ya Yesu Klisto, kobesaka makoki na banso ya kosala mayokani mpe koyamba bakuli esangani. “Makila ya bomikabi ya Klisto”24 ekoki boye kopakolama na babomoi na biso lokola mayele ya boongi ya komipetola ya Molimo Mosantu mpe koyamba mapamboli Nzambe alaki.

Kobakisa kotosa mibeko mpe makuli ya nsango malamu yo moko, nabengi kosala mpe kobomba mayokani ya bonganganzambe. Koyamba ndai ya mpe elaka ya Nzambe. Kokumisa mikumba na kibongangnzambe mpo na kosunga Tata na Lola mpe Yesu Klisto. Bosalela bonganganzambe mpo na kosunga na bopesi libaku na moto mosusu ya kozua wuta na nguya ya bomikabi ya Klisto! Soki bosali yango, mapamboli minene ekoyela yo mpe nalibota na yo. Natatoli ete Mosikoli azali na bomoi mpe azali kotambwisa mosala na ye, na nkombo ya Yesu Klisto. Amen.