Makomi
Alama 13


Mokapo 13

Bato babiangemi lokola banganga banene na ntina ya bondimi boluti bwa bango mpe misala mya bango milamu—Basengeli koteya mitindo—O nzela ya bosembo basantisami mpe bakoti o kati ya bopemi bwa Nkolo—Malikisedeke azalaki moko wa baye—Banzelu bazali kosakolaka nsango ilamu o ntaka ya mboka—Bakobimisa boyei bwa solo bwa Klisto. Penepene na 82 Yambo ya Klisto.

1 Mpe lisusu, bandeko ba ngai, nalingi kozongisa mayele ma bino o ntango eye Nkolo Nzambe apesaki mitindo miye epai ya bana ba ye; mpe nalingi ete bomikundola ete Nkolo Nzambe akulisaki banganga, nsima ya molongo mosantu mwa ye, moye mozalaki nsima ya molongo mwa Mwana Mobali wa ye, mpo ya koteya makambo maye epai ya bato.

2 Mpe banganga bana bakulisamaki nsima ya molongo mwa Mwana Mobali wa ye, o lolenge loko ete na yango bato bakokaki koyeba o lolenge kani bakoki kotalela o boso Mwana Mobali wa ye mpo ya bosikoli.

3 Mpe eye ezali lolenge nsima ya yango bakulisamaki—kobiangemaka mpe kolengelemeke uta o bokelami bwa mokili engebene na boyebi bwa Nzambe yambo likambo lisalema, na ntina ya bondimi boluti mpe misala milamu mya bango; o esika ya yambo kotikamaka mpo ya kopono bolamu to bobe; yango wana bango koponoko bolamu, mpe kosalelaka bondimi bwa bango bonene mpenza, babiangemi na libiangi lisantu, iyo, na libiangi lina lisantu liye lilengelemi na, mpe engebene na bosikoli boko bwa bolengeli mpo ya baye ba lolenge loye.

4 Mpe boye babiangemaki o libiangi liye lisantu na ntina ya bondimi bwa bango, ntango basusu babwakaki Molimo mwa Nzambe na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango mpe lolanda la mayele ma bango, soko ezalaka te mpo ya eye, bakokaka kozala na litomba linene lokola bandeko ba bango.

5 To o nsuka, o esika ya yambo bazalaki o ndelo yoko elongo na bandeko ba bango; boye libiangi liye lisantu lilengelemeke uta o bokelami bwa mokili mpo ya baye ba lolenge loye lokola bakoyeisa mitema mya bango mikasi te, kozalaka o kati ya mpe o nzela ya botumbolami bwa Mwana Mobali Mobotami se Moko, oyo alengelemeki—

6 Mpe boye kobiangemaka na libiangi liye lisantu, mpe kokulisamaka epai ya bonganga bonene bwa molongo mosantu mwa Nzambe, mpo ya kolakisa mitindo mya ye epai ya bana ba bato, ete bango lisusu bakoka kokota o kati ya bopemi bwa ye—

7 Bonganga boye bonene kozalaka nsima ya molongo mwa Mwana Mobali wa ye, moye molongo mozalaki uta o bokelami bwa mokili; to o maloba masusu, kozalaka te na ebandeli ya mikolo to nsuka ya mibu, kolengelemeke uta o boseko bonso na boseko bonso, engebene na boyebi bwa ye bwa makambo manso yambo masalema—

8 Sikawa bakulisamaki nsima ya lolenge loye—kobiangemaka na libiangi lyoko lisantu, mpe kokulisamaka na bokuli bosantu, mpe kokamataka likolo lya bango bonganga bonene bwa molongo mosantu, liye libiangi, mpe bokuli, mpe bonganga bonene, bozali te na ebandeli to nsuka—

9 Boye bakomi banganga banene libela, nsima ya molongo mwa Mwana Mobali, Mobotami se Moko wa Tata, oyo azali te na ebandeli ya mikolo to nsuka ya mibu, ye atonda na boboto, alima, mpe bosolo. Mpe boye ezali. Amene.

10 Sikawa, lokola nalobaki etali molongo mosantu, to bonganga boye bonene, ezalaki mingi baye bakulisamaki mpe bakomaki banganga banene ba Nzambe; mpe ezalaki na ntina ya bondimi boluti mpe boyamboli bwa bango, mpe bosembo bwa bango liboso lya Nzambe, bango koponoko koyambola mpe kosala bosembo esika ya kowa;

11 Yango wana babiangemaki nsima ya molongo mwa ye mosantu, mpe basantisamaki, mpe bilamba bya bango bisukwamaki mpembe o kati ya makila ma Mwana wa Mpate.

12 Sikawa bango, nsima ya kosantisamaka na Molimo Mosantu, bilamba bya bango koyeisamaka mpembe, mpe kozalaka peto mpe mbindo te liboso lya Nzambe, bakokaki te kotala likolo lya lisumu longola se soko ezalaki na nkele; mpe bazalaki mingi, mingi mpenza, baye bayeisamaki peto mpe bakotaki o kati ya bopemi bwa Nkolo Nzambe wa bango.

13 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nalingi ete bomikitisa liboso lya Nzambe, mpe bomeme mbuma elongobani mpo ya boyamboli, ete bokoka lokola kokota o kati ya bopemi bona.

14 Iyo, bomikitisa kutu lokola bato bazalaki o mikolo mya Malikisedeke, oyo azalaki lokola nganga monene nsima ya molongo moye nalobeli, ye lokola akamataki likolo lya ye bonganga bonene libela.

15 Mpe ezalaki kaka Malikisedeke oyo na nani Abalayama afutaki biteni bya zomi; iyo, kutu tata wa biso Abalayama afutaki biteni bya zomi ya eteni ya zomi ya inso azwaki.

16 Sikawa bokuli boye bopesamaki nsima ya lolenge loye, ete na yango bato bakoka kotalela o boso Mwana Mobali wa Nzambe, yango kozalaka emoniseli ya molongo mwa ye, to yango kozalaka molongo mwa ye, mpe eye ete bakoka kotalela o boso na ye mpo ya bolimbisi bwa masumu ma bango, ete bakoka kokota o kati ya bopemi bwa Nkolo.

17 Sikawa Malikisedeke oyo azalaki mokonzi likolo lya mboka ya Saleme; mpe bato ba ye bakolaki o bobe mpe bonsomo; iyo, bango banso bakendeki mpembeni; batondaki na ndenge inso ya nkuna;

18 Kasi Malikisedeke kosalelaka bondimi bokasi, mpe kozwaka mosala mwa bonganga bonene engebene na molongo mosantu mwa Nzambe, ateyaki boyamboli epai ya bato ba ye. Mpe tala, bayambolaki; mpe Malikisedeke atiaki kimia o mboka o mikolo mya ye; yango wana abiangemaki mwana wa mokonzi wa kimia, mpo azalaki mokonzi wa Saleme; mpe ayangelaki o nse ya tata wa ye.

19 Sikawa, ezalaki mingi yambo ya ye, mpe lisusu ezalaki mingi nsima ya ye, kasi moko te azalaki monene koleka; yango wana, ye batangi mingi mingi.

20 Sikawa nalingi te kobandela likambo lyango; nini nalobi ekoki kokoka. Tala, nkoma izali liboso lya bino; soko bokokamola yango ekozala mpo ya bobebisami bwa bino moko.

21 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Alama maloba maye epai ya bango, atandolaki loboko la ye epai ya bango mpe abelelaki na mongongo moko mokasi, kolobaka: Sikawa ezali ntango mpo ya koyambola, mpo mokolo mwa lobiko mopusani penepene;

22 Iyo, mpe mongongo mwa Nkolo, na monoko mya banzelu, mosakoli yango, epai ya bikolo binso; iyo, mosakoli yango, ete bakoki kozala na nsango ilamu ya bosepeli bonene; iyo, mpe akoyokisa nsango ilamu iye o ntei ya bato ba ye banso, iyo, kutu na bango baye bapalangani mosika likolo lya etando ya mabele; yango wana iyei epai ya biso.

23 Mpe isalemi iyebisama epai ya biso o maloba ma polele, ete tokoka kososola, ete tokoka te kobunga; mpe eye na ntina ya biso kowayawayaka o mboka yoko ya kobangisa; yango wana, tosungami mpenza, mpo tozali na nsango ilamu isakolami epai ya biso o biteni binso bya elanga ya vino ya biso.

24 Mpo tala, banzelu bazali kosakolaka yango epai ya mingi o ntango eye o mboka ya biso; mpe eye mpo ya mwango mwa kolengele mitema mya bana ba bato mpo ya koyamba liloba lya ye o ntango ya boyei bwa nkembo ya ye.

25 Mpe sikawa tokozela bobele mpo ya koyoka nsango ya bosepeli esakolama epai ya biso o monoko mwa banzelu, ya boyei bwa ye; mpo ntango eyei, biso toyebi te boniboni mosika te. Elinga Nzambe ete ekoka kozala o mikolo mya ngai; kasi yango ezala mosika te to mosika, o yango nakosepela.

26 Mpe ekosalema eyebisama epai ya bayengebene mpe basantu, na monoko mwa banzelu, o ntango ya boyei bwa ye ete maloba ma batata ba biso makokokisama, engebene na ena eye balobaki etali ye, eye ezalaki engebene na molimo mwa bobikuli oyo azalaki na bango.

27 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, natombeli uta o eteni ya katikati ya motema mwa ngai, iyo, na bobangi bonene kutu kina o bolozi, ete boyokemela epai ya maloba ma ngai, mpe bobwaka mosika masumu ma bino, mpe bozelisa te mokolo mwa boyamboli bwa bino;

28 Kasi ete bolinga komikitisa liboso lya Nkolo, mpe kobianga likolo lya nkombo ya ye esantu, mpe kokenge mpe kosambela mbala na mbala, ete bokoka kosenginiama te likolo lya eye bokoki kokumba, mpe boye kokambema na Molimo Mosantu, kokomaka basawa, basokemi, bayangelami, bampikiliki, botonda na bolingo, mpe motema molai monso;

29 Kozalaka na bondimi na Nkolo; kozalaka na elikia yoko ete bokozwa bomoi bwa seko; kozalaka na bolingo bwa Nzambe ntango inso o mitema mya bino, ete bokoka kotombolama o mokolo mwa nsuka mpe bokota o kati ya bopemi bwa ye.

30 Mpe tika Nkolo apesa epai ya bino boyamboli, ete bomeme te o nse nkele ya ye likolo lya bino, ete bokangema te o nse na miniololo mya limfelo, ete bokoka te koyoka mpasi ya liwa lya ibale.

31 Mpe Alama alobaki lisusu maloba mingi koleka epai ya bato, maye makomami te o buku eye.