Makomi
Alama 24


Mokapo 24

Balamani bayei kobunda na bato ba Nzambe—Bato ba Ati-Nefi-Lehi basepeli na Klisto mpe babimelami na banzelu—Baponi koyoka mpasi ya liwa esika ya komibatela—Balamani mingi babongwani. Penepene na 90–77 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Baamaleki mpe Baamuloni mpe Balamani baye bazalaki o mboka ya Amuloni, mpe lisusu o mboka ya Helama, mpe baye bazalaki o mboka ya Yelusaleme, mpe o nsuka, o mboka inso zingazinga mpembeni, baye babongwanaki te mpe bakamataki te likolo lya bango nkombo ya Ati-Nefi-Lehi, balamusamaki na Baamaleki mpe na Baamuloni na nkanda likolo lya bandeko ba bango.

2 Mpe boyini bwa bango bokomaki bwa nsomo mpenza epai ya bandeko ba bango, kutu mpenza ete babandaki kotomboka na mokonzi wa bango, mpenza ete balingaki te ete azala mokonzi wa bango; yango wana, bakamataki mandoki mpo ya kobundisa bato ba Ati-Nefi-Lehi.

3 Sikawa mokonzi apesaki bokonzi likolo lya mwana mobali wa ye, mpe abiangaki nkombo ya ye Ati-Nefi-Lehi.

4 Mpe mokonzi akufaki o mobu mona kaka eye Balamani babandaki kosala bolengeli mpo ya etumba na bato ba Nzambe.

5 Sikawa ekutanaki Amona mpe bandeko ba ye mpe bango banso baye balandaki ye bamonoki bolengeli bwa Balamani mpo ya kobebisa bandeko ba bango, babelemeki o mboka ya Midiana, mpe kuna Amona akutanaki na bandeko ba ye banso; mpe uta kuna bayaki o mboka ya Yisamaele ete bakoka kosala likita elongo na Lamoni mpe lisusu elongo na ndeko wa ye Ati-Nefi-Lehi, nini bakosala mpo ya komibatela na Balamani.

6 Sikawa ezalaki moto moko te o ntei ya bato baye babongwanaki epai ya Nkolo bakamataki mandoki mpo ya kobundisa bandeko ba bango; te, balingaki te kutu kosala bolengeli mpo ya etumba; iyo, mpe lisusu mokonzi wa bango atindaki bango ete basala yango te.

7 Sikawa, iye izali maloba maye alobaki epai ya bato etali likambo lyango: Natondi Nzambe wa ngai, bato balingami ba ngai ete Nzambe monene wa biso atindaki na bolamu bandeko ba biso baye, Banefi, epai ya biso mpo ya koteya epai ya biso, mpe mpo ya kondimisa biso mimeseno mya nkuna mya batata ba biso.

8 Mpe tala, natondi Nzambe monene wa ngai ete apesi biso ndambo ya Molimo mwa ye mpo ya kolembisa mitema mya biso, ete tofungoli bozalani boko elongo na bandeko ba biso baye, Banefi.

9 Mpe tala, natondi lisusu Nzambe wa ngai, ete na kofungolaka bozalani boye, tondimisami na masumu ma biso, mpe bobomi mingi boye tosali.

10 Mpe natondi lisusu Nzambe wa ngai, iyo, Nzambe monene wa ngai, ete apesi epai ya biso ete tokokaki koyambola na makambo maye, mpe lisusu ete alimbisi biso na masumu mana mingi ma biso mpe bobomi boye tosali, mpe alongoli elindo na mitema mya biso, o nzela ya makoki ma Mwana Mobali wa ye.

11 Mpe sikawa tala, bandeko ba ngai, mpamba te ezalaki enso eye tokokaki kosala, (lokola tozalaki babunga koleka na bato banso) mpo ya koyambola na masumu ma biso manso mpe bobomi mingi boye tosali, mpe kosala Nzambe alongola mango uta o mitema mya biso, mpo ezalaki enso tokokaki kosala mpo ya koyambola bo ekoki liboso lya Nzambe ete akoka kolongola mbindo ya biso—

12 Sikawa, bandeko balingami ba ngai balamu mingi koleka, mpamba te Nzambe alongolaki mbindo ya biso, mpe mipanga mya biso mikomi kongenge, nde totia lisusu te mbindo na mipanga mya biso na makila ma bandeko ba biso.

13 Tala, nalobi epai ya bino, Te, tokanga mipanga mya biso ete mitiama mbindo te na makila ma bandeko ba biso; mpo mbele, soko totii mbindo na mipanga mya biso lisusu mikoki kosukwama mingenge lisusu te na makila ma Mwana Mobali wa Nzambe monene wa biso, maye makosopama mpo ya botumbolami bwa masumu ma biso.

14 Mpe Nzambe monene ayoki ngolu likolo lya biso, mpe asali makambo maye mayebana epai ya biso ete tokoka te kowa; iyo, makambo maye mayebana epai ya biso yambo makoma, zambi alingi bozo bwa biso lokola mpe alingi bana ba biso; yango wana, na ngolu ya ye akobimela biso na banzelu ba ye, ete mwango mwa lobiko mokoka koyebisama epai ya biso lokola mpe epai ya nkola ikoya nsima.

15 O, boniboni Nzambe wa biso azali na ngolu! Mpe sikawa tala, mpamba te ezali lokola mpenza tokokaki kosala mpo mbindo ya biso elongwa na biso, mpe mipanga mya biso mikomisama kongenge, tobomba myango mosika ete mibatelama bongengi, lokola litatoli epai ya Nzambe wa biso o mokolo mwa nsuka, to o mokolo moye tokomememe koteleme liboso lya ye mpo ya kosambisama, ete totii te mbindo na mipanga mya biso na makila ma bandeko ba biso uta akabelaki epai ya biso liloba lya ye mpe akomisi biso sembesembe na lyango.

16 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, soko bandeko ba biso baluki kobebisa biso, tala, tokobomba mosika mipanga mya biso, iyo, kutu tokokunda myango mozindo o mabele, ete ekoka kobatelama bongengi, lokola litatoli ete tosaleli yango mokolo moko te, o mokolo mwa nsuka; mpe soko bandeko ba biso babebisi biso, tala, tokokende epai ya Nzambe wa biso mpe tokobikisama.

17 Mpe sikawa esalemaki ete etiaka mokonzi nsuka yoko o bolobi boye, mpe esilisaki bato banso kosangana elongo, bakamataki mipanga mya bango, mpe mandoki manso maye bazalaki kosalela mpo ya kosopa makila ma bato, mpe bakundaki mango mpenza mozindo o mabele.

18 Mpe eye basalaki, yango kozalaka na miso mya bango litatoli lyoko na Nzambe, mpe lisusu epai ya bato, ete bakosalela mokolo moko te mandoki mpo ya kosopa makila ma bato; mpe eye basalaki, kolapaka mpe kosalaka boyokani elongo na Nzambe, ete na esika ya kosopa makila ma bandeko ba bango bakosundola bomoi bwa bangomei; mpe na esika ya kobotolo na ndeko moko bakopesa epai ya ye; mpe na esika ya kolekisa mikolo mya bango na goigoi bakosala mpenza na maboko ma bango.

19 Mpe boye tomoni ete, emememeki Balamani baye na kondima mpe na koyeba bosolo, bazalaki sikisiki, mpe bandimaki kutu koyoka mpasi ya liwa esika ya kosala lisumu; mpe boye tomoni ete bakundaki mandoki ma bango ma kimia, to bakundaki mandoki ma bango ma etumba, mpo ya kimia.

20 Mpe esalemaki ete bandeko ba bango, Balamani, basalaki bolengeli mpo ya etumba, mpe bayaki o mboka ya Nefi mpo ya mwango mwa kobebisa mokonzi, mpe kotia mosusu o esika ya ye, mpe lisusu kobebisa bato ba Ati-Nefi-Lehi libanda lya mboka.

21 Sikawa emonoki bato ete bazalaki koya mpo ya kobunda na bango babimaki mpo ya kokutana na bango, mpe bamilalisaki liboso lya bango kina o mabele, mpe babandaki kobianga nkombo ya Nkolo; mpe boye bazalaki na ezalela eye ntango Balamani babandaki kokweya likolo lya bango, mpe babandaki koboma bango na mopanga.

22 Mpe boye kokutanaka na bokasi te, babomaki nkoto yoko na mitano ya bango; mpe toyebi ete bapambolami, mpo bakei kofanda elongo na Nzambe wa bango.

23 Sikawa emonoki Balamani ete bandeko ba bango balingaki te kokima uta na mopanga, mpe kobaluka te mpembeni na loboko la mobali to na loboko la mwasi, kasi bandimaki kolala o nse mpe kowa, mpe bakumisaki Nzambe kutu o ntango mpenza ya bowei o nse ya mopanga—

24 Sikawa emonoki Balamani eye batikaki kobomaka bango; mpe ezalaki mingi baye mitema mya bango mivimbanaki mpo ya baye ba bandeko ba bango bakweyaka o nse ya mopanga, mpo bayambolaki makambo maye basalaka.

25 Mpe esalemaki ete babwakaki o nse mandoki ma bango ma etumba, mpe balingaki te kokamata mango lisusu, mpo batubamaki mpo ya bobomi boye basalaka; mpe bakitaki o nse kutu lokola bandeko ba bango, koyekemeke likolo lya ngolu ya baye mandoki ma bango matombolamaki mpo ya koboma bango.

26 Mpe esalemaki ete bato ba Nzambe basanganaki mokolo mona mingi koleka motanga moye mobomamaka; mpe bango baye babomamaka bazalaki sembo, yango wana tozali na ntina te ya kotia ntembe ete babikisamaki.

27 Mpe ezalaki moto moko wa nkuna te abomamaki o ntei ya bango; kasi ezalaki mingi koleka nkoto yoko bamememeki o boyebi bwa bosolo; boye tomoni ete Nkolo akosalaka o nzela mingi mpo ya lobiko la bato ba ye.

28 Sikawa motango monene mwa bango ba Balamani baye babomaki mingi boye ya bandeko ba bango bazalaki Baamaleki mpe Baamuloni, motango monene mwa bango bazalaki nsima ya molongo mwa Banewolo.

29 Sikawa, o ntei ya baye basanganaki na bato ba Nkolo, ezalaki moto te oyo bazalaki Baamaleki to Baamuloni, to oyo bazalaki ba molongo mwa Banewolo, kasi bazalaki banso biboto bya solo bya Lamani mpe Lemuele.

30 Mpe boye tokoki kososola polele, ete esilaki bato boko mbala yoko kozala bapelisama mwinda na Molimo mwa Nzambe, mpe kozala na boyebi bonene bwa makambo matali bosembo, mpe nde bakwei mosika o kati ya masumu mpe bobuki mobeko, bakokoma mito mikasi koleka mpe boye bozali bwa bango bokokoma bobe koleka soko bayebaka mokolo moko te makambo maye.