Makomi
Alama 19


Mokapo 19

Lamoni azwi mwinda mwa bomoi bwa libela mpe amoni Mosikoli—Baye ndako ya ye bakwei na botutuki, mpe mingi bamoni banzelu—Amona abatelami na likamwisi—Abatisi mingi mpe atii eklezia o ntei ya bango. Penepene na 90 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mibale mpe butu ibale bazalaki penepene na kokamata nzoto ya ye mpe kolalisa yango o lilita, liye basalaki mpo ya mwango mwa bokundi bakufi ba bango.

2 Sikawa mwasi wa mokonzi eyokaki ye nsango ya Amona, yango wana atindaki moto mpe azalaki na mposa ete ayingela epai ya ye.

3 Mpe esalemaki ete Amona asalaki lokola atindamaki, mpe ayingelaki epai ya mwasi wa mokonzi, mpe azalaki na mposa ya koyeba nini alingaki ete asala.

4 Mpe alobaki epai ya ye: Basali ba mobali wa ngai basali yango eyebama epai ya ngai ete ozali profeta moko wa Nzambe mosantu, mpe ete ozali na nguya ya kosala misala mingi mikasi o nkombo ya ye;

5 Yango wana, soko ezali boye, ngai nalingi ete oyingela mpe otala mobali wa ngai, mpo azali kolala likolo lya mbeto ya ye mpo ya ntaka ya mikolo mibale mpe butu ibale; mpe boko bato balobi ete akufi te, kasi basusu balobi ete akufi mpe alumbi nsolo, mpe asengelaki kotiama o lilita; kasi lokola mpo ya ngaimei, na ngai alumbi nsolo te.

6 Sikawa, eye ezali likambo Amona azalaki na mposa, mpo ayebaki ete mokonzi Lamoni azalaki o nse ya nguya ya Nzambe; ayebaki ete elamba eyindo ya bozangi bondimi ezalaki kobwakamaka mosika uta o mayele ma ye, mpe mwinda moye mopelisaki mayele ma ye, moye mozalaki mwinda mwa nkembo ya Nzambe, moye mozalaki mwinda mwa bokamwi mwa bolamu bwa ye—iyo, mwinda moye moyingisaki bosepeli bwa lolenge loye o kati ya bozo bwa ye, lipata lya molili kolongwaka, mpe ete mwinda mwa bomoi bwa libela mopelaki o bozo bwa ye, iyo, ayebaki ete eye elongaka nzoto ya ye ya mosuni, mpe amememeki mosika na Nzambe—

7 Yango wana, nini mwasi wa mokonzi azalaki na mposa ezalaki bobele mposa ya ye. Yango wana, ayingelaki mpo ya kotala mokonzi engebene lokola mwasi wa mokonzi azalaki na mposa na ye; mpe amonoki mokonzi, mpe ayebaki ete akufaki te.

8 Mpe alobaki epai ya mwasi wa mokonzi: Akufi te, kasi alali na Nzambe, mpe o mokolo mwa nsima akolamuka lisusu; yango wana kundani ye te.

9 Mpe Amona alobaki epai ya ye: Endimi yo eye? Mpe alobaki epai ya ye: Nazali na litatoli te longola se liloba lya yo, mpe liloba lya basali ba biso; nzokande nandimi ete ekozala engebene lokola olobi.

10 Mpe Amona alobaki epai ya ye: Opambolami na ntina ya bondimi boluti bwa yo; nalobi epai ya yo, mwasi, ezali te bondimi bonene bwa lolenge loye o ntei ya bato banso ba Banefi.

11 Mpe esalemaki ete akengeki likolo lya mbeto ya mobali wa ye, uta o ntango ena kutu kina o ntango ena o mokolo mwa nsima moye Amona alakaka ete akolamuka.

12 Mpe esalemaki ete alamukaki, engebene na maloba ma Amona; mpe lokola alamukaki, atandolaki loboko la ye epai ya mwasi, mpe alobaki: Epambolama nkombo ya Nzambe, mpe opambolami.

13 Mpo lokola solo ozali na bomoi, tala, namoni Mosikoli wa ngai; mpe akoya mpe akobotama na mwasi, mpe akosikola bato banso bakondima likolo lya nkombo ya ye. Sikawa, elobaka ye maloba maye, motema mwa ye movimbaki o kati ya ye, mpe azindaki lisusu na bosepeli; mpe mwasi wa mokonzi azindaki o nse lokola, elongamaki ye na Molimo.

14 Sikawa Amona komonoko ete Molimo mwa Nkolo asopanaki engebene na nsambo ya ye likolo lya Balamani, bandeko ba ye, baye bazalaka ntina ya eleli nzike boye o ntei ya Banefi, to o ntei ya bato banso ba Nzambe na ntina ya mabe ma bango mpe mimeseno mya bango, akweyika likolo lya mabolongo ma ye, mpe abandaki kosopa bozo bwa ye o losambo mpe bopesi matondi na Nzambe mpo ya nini asalaka mpo ya bandeko ba ye; mpe lisusu alongamaki na bosepeli; mpe boye bango basato bazindaka o mabele.

15 Sikawa, emonoko basali ba mokonzi ete bakweyaka, bango mpe lokola babandaki kobelela epai ya Nzambe, mpo bobangi bwa Nkolo boyaki likolo lya bango lokola, mpo ete ezalaki bango baye batelemeke liboso lya mokonzi mpe batatolaki epai ya ye etali nguya enene ya Amona.

16 Mpe esalemaki ete babiangaki likolo lya nkombo ya Nkolo, na makasi ma bango, kutu kina bakweyaka o mabele, longola se soko ezalaki moko wa basi ba Balamani, oyo ya ye nkombo ezalaki Abisi, ye abongwamaka epai ya Nkolo uta mibu mingi, na ntina ya limoni lyoko linene lya tata wa ye—

17 Boye, ebongwanaka ye na Nkolo, mpe esalaka ye mokolo moko te eyebana, yango wana, emonoki ye ete basali banso ba Lamoni bakweyaka o mabele, mpe lisusu nkolo wa ye, mwasi wa mokonzi, mpe mokonzi, mpe Amona balalaki kifwafwa likolo lya mabele, ayebaki ete ezalaki nguya ya Nzambe; mpe kobanzaka ete nkonzo eye, na kosalaka eyebana epai ya bato nini ekomaki epai ya bango, ete na komonoko likambo liye likosala bango kondima o nguya ya Nzambe, yango wana, akimaki uta ndako na ndako, koyebisaka yango epai ya bato.

18 Mpe babandaki kosangana elongo epai ya ndako ya mokonzi. Mpe kuna eyaki ebele, mpe o bokamwi bwa bango bamonoki mokonzi, mpe mwasi wa mokonzi, mpe basali ba bango kifwafwa likolo lya mabele, mpe bango banso balalaki kuna lokola soko bakufaki; mpe bamonoki Amona, mpe tala Amona azalaki Monefi moto.

19 Mpe sikawa bato babandaki koyimayima o ntei ya bangomei; boko bato babandaki kolobaka ete ezalaki bobe boko bonene boyaki likolo lya bango, to likolo lya mokonzi mpe ndako ya ye, zambi andimaki ete Monefi atikala o mboka.

20 Kasi basusu bapamelaki bango, kolobaka: Mokonzi amemi bobe boye likolo lya ndako ya ye, zambi abomaki basali ba ye baye batikaki bitonga bya bango bipalanganisama o mai ma Sebu.

21 Mpe lisusu bapamelamaki na bango baye batelemeke o mai ma Sebu mpe bapalanganisaki bitonga biye bizalaki bya mokonzi, mpo bazalaki na nkanda na Amona na ntina ya motango moye abomaka mwa bandeko ba bango o mai ma Sebu, na ntango ezalaki bango kobatela bitonga bya mokonzi.

22 Sikawa, moko wa bango, oyo ya ye ndeko abomamaka na mopanga mwa Amona, ezalaki ye na nkanda mpenza na Amona, abendaki mopanga mwa ye mpe abelemeki ete akoka kotika yango kokweya likolo lya Amona, mpo ya koboma ye; mpe lokola atombolaki mopanga mpo ya kokata ye, tala, akweyaki mokufi.

23 Sikawa tomoni ete Amona akokaki kobomama te, mpo Nkolo alobaka epai ya Moziya, tata wa ye: Nakobatela ye, mpe ekozala epai ya ye engebene na bondimi bwa yo—yango wana, Moziya atikaki ye o maboko ma Nkolo.

24 Mpe esalemaki ete emonoki ebele ete moto akweyaki mokufi, oyo atombolaki mopanga mwa ye mpo ya koboma Amona, bobangi boyaki likolo lya bango banso, mpe bamekaki te kotia maboko ma bango mpo ya kosimba ye to moko wa bango baye bakweyaki; mpe babandaki kokamwa lisusu o ntei ya bangomei nini ekokaki kozala ntina ya nguya ena enene, to nini makambo maye manso malingaki koloba.

25 Mpe esalemaki ete ezalaki mingi o ntei ya bango baye balobaki ete Amona azalaki Molimo Monene, mpe basusu balobaki ete atindamaki na Molimo Monene;

26 Kasi basusu bapamelaki bango banso, kolobaka ete azalaki dongolomiso, oyo atindamaki uta o Banefi mpo ya koniokolo bango.

27 Mpe ezalaki boko bato baye balobaki ete Amona atindamaki na Molimo Monene mpo ya kotungisa bango na ntina ya mabe ma bango; mpe ete Molimo Monene oyo alandaka ntango inso Banefi, oyo abikisaka bango ntango inso libanda lya maboko ma bango; mpe balobaki ete ezalaki Molimo Monene oyo abebisaki mingi ya bandeko ba bango, Balamani.

28 Mpe boye boweli bobandaki kozala bokasi mpenza o ntei ya bango. Mpe ntango ewelaki bango boye, mwasi mosali oyo asalaki ebele basanganisama ayaki, mpe emonoki ye boweli boye bozalaki o ntei ya ebele azalaki na mawa mpenza, kutu kina o mai ma miso.

29 Mpe esalemaki ete akendeki kokamata mwasi wa mokonzi na loboko, ete mbele akoka kotelemisa ye uta o mabele; mpe sasaipi lokola asimbaki loboko la ye atelemeki likolo lya makolo ma ye, mpe agangaki na mongongo mokasi, kolobaka: O Yesu mopambolami, oyo abikisi ngai na limfelo lyoko lya nsomo! O Nzambe mopambolami, yoka ngolu likolo lya bato baye!

30 Mpe elobaki ye makambo maye, abeteki maboko ma ye, etondaki ye na bosepeli, kolobaka maloba mingi maye masosolamaki te; mpe esalaki ye eye, akamataki mokonzi, Lamoni, na loboko, mpe tala atelemeki likolo lya makolo ma ye.

31 Mpe ye, sasaipi, komonoko boweli boye bozalaki o ntei ya bato ba ye, abelemeki mpe abandaki kopamela bango, mpe kolakisa bango maloba maye ayokaka uta o monoko mwa Amona; mpe lokola mingi bayokaki maloba ma ye bandimaki, mpe babongwanaki epai ya Nkolo.

32 Kasi mingi o ntei ya bango balingaki te koyoka maloba ma ye; yango wana bakendeki nzela ya bango.

33 Mpe esalemaki ete elamukaki Amona asalaki lisusu epai ya bango, mpe lokola esalaki basali ba Lamoni banso; mpe banso basakolaki epai ya bato likambo kaka lyoko—ete mitema mya bango mibongwanaki; mpe bazalaki lisusu te na mposa ya kosala bobe.

34 Mpe tala, mingi basakolaki epai ya bato ete bamonoko banzelu mpe basololaka elongo na bango; mpe boye balobelaka bango makambo matali Nzambe, mpe matali bosembo bwa ye.

35 Mpe esalemaki ete ezalaki mingi baye bandimaki o maloba ma bango; mpe lokola mingi bandimaki babatisamaki; mpe bakomaki bato boko sembo, mpe batiaki eklezia o ntei ya bango.

36 Mpe boye mosala mwa Nkolo mobandaki o ntei ya Balamani; boye Nkolo abandaki kosopa libanda Molimo mwa ye likolo lya bango; mpe tomoni ete loboko la ye loninolami na bato banso baye bakoyambola mpe bakondima likolo lya nkombo ya ye.