Makomi
Alama 1


Buku ya Alama
Mwana mobali wa Alama

Nsango ya Alama, oyo azalaki mwana mobali wa Alama, mosambisi mokonzi wa yambo likolo lya bato ba Nefi, mpe lisusu nganga monene likolo lya eklezia. Nsango ya bokonzi bwa basambisi, mpe bitumba mpe boweli o ntei ya bato. Mpe lisusu nsango yoko ya etumba yoko o kati ya Banefi mpe Balamani, engebene na likundoli lya Alama, mosambisi mokonzi mpe wa yambo.

Mokapo 1

Newolo ateyi malongi ma lokuta, asali eklezia yoko, akotisi poloso ya banganga, mpe abomi Gideona—Newolo abomami mpo ya bobe bwa ye—Poloso ya banganga mpe boniokoli bopanzani o ntei ya bato—Banganga bamisalisi, bato babateli bakeleli, mpe eklezia ezwi bomengo. Penepene na 91–88 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete o mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi, uta o ntango ena kina o boso, mokonzi Moziya ekendeki ye o nzela ya mabele manso, ebundaki ye etumba yoko elamu, kotambolaka alima liboso lya Nzambe, etikaki ye moto moko te kokonza o esika ya ye; nzokande atiaka mibeko, mpe endimamaki na bato; yango wana basengelaki kotosa mibeko miye asalaka.

2 Mpe esalemaki ete o mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Alama o kiti ya bosambisi, ezalaki moto moko amememeki liboso lya ye mpo asambisama, moto moko molai, mpe ayebanaki mpo ya bokasi bwa ye boike.

3 Mpe akendeki zingazinga o ntei ya bato, koteyaka na bango eye abiangaki liloba lya Nzambe, kosalaka bokasi mpo ya mabe ma eklezia; kosakolaka epai ya bato ete nganga na nganga mpe molakisi na molakisi asengeli koyebana na bato; mpe basengelaki te kosala na maboko ma bango, kasi basengelaki kosalisa bango na bato.

4 Mpe lisusu atatolaki epai ya bato ete moto akobikisama o mokolo mwa nsuka, mpe ete basengeli kobanga te to kolenge te, kasi ete bakokaki kotombola mito mya bango mpe kosepela; mpo Nkolo asalaki bato banso, mpe lisusu asikolaka bato banso; mpe, o nsuka, bato banso bakozwa bomoi bwa seko.

5 Mpe esalemaki ete ateyaki makambo maye nzike boye ete mingi bandimaki likolo lya maloba ma ye, kutu boye mpenza ete babandaki kosalisa ye mpe kopesa ye mosolo.

6 Mpe abandaki kotombwana likolo o lolendo la motema mwa ye, mpe kolata monzele mwa ntalo mpenza, iyo, mpe kutu abandaki kosala eklezia yoko nsima ya lolenge la liteya lya ye.

7 Mpe esalemaki ete ntango azalaki kokende, mpo ya koteya bato baye bandimaki likolo lya liloba lya ye, akutanaki na moto moko azalaki ya eklezia ya Nzambe, iyo, kutu moko moko wa balakisi ba bango; mpe abandaki kowela na ye na elulu, ete akoka kokumba mosika bato ba eklezia; kasi moto ona atelemelaki ye, kokebisaka ye na maloba ma Nzambe.

8 Sikawa nkombo ya moto ona ezalaki Gideona; mpe ezalaki ye oyo azalaki esalele yoko o maboko ma Nzambe na kobikisaka bato ba Limiyi libanda lya bowumbu.

9 Sikawa, zambi Gideona atelemelaki ye na maloba ma Nzambe adasukaki na Gideona, mpe abendaki mopanga mwa ye mpe abandaki kobete ye. Sikawa Gideona ebukanaki ye na mibu mingi, yango wana akokaki te kotelemela ye, yango wana abomamaki na mopanga.

10 Mpe moto oyo abomaki ye akamatamaki na bato ba eklezia, mpe amememeki liboso lya Alama, mpo ya kosambisama engebene na bobe asalaka.

11 Mpe esalemaki ete atelemeki liboso lya Alama mpe asambaki mpo ya yemei na mpiko mpenza.

12 Kasi Alama alobaki epai ya ye: Tala, oyo ezali mbala ya yambo poloso ya banganga ekotisami o ntei ya bato baye. Mpe tala, ozali kaka te na elindo ya poloso ya banganga, kasi oluki kolendisa yango na mopanga; mpe soko poloso ya banganga elendisami o ntei ya bato baye ekomeme bobebisami bwa bango mpenza.

13 Mpe osopi makila ma moto moko sembo, iyo, moto moko oyo asalaki bolamu boike o ntei ya bato baye; mpe etiki biso yo makila ma ye makoya likolo lya biso mpo ya bobekoli.

14 Yango wana okweisami mpo ya kokufa, engebene na mobeko moye mopesamelaki biso na Moziya, mokonzi wa biso wa nsuka; mpe endimamaki na bato; yango wana bato baye basengeli kotikala na mobeko.

15 Mpe esalemaki ete bakamataki ye; mpe nkombo ya ye ezalaki Newolo; mpe bamemeki ye likolo lya nsonge ya ngomba patatalu Mati, mpe kuna asengisamaki, nde andimaki, o kati ya lola mpe mabele, ete nini alakisaki na bato ezalaki ya bokeseni na liloba lya Nzambe; mpe kuna ayokaki mpasi ya liwa lya nsoni.

16 Nzokande, eye etiaki te nsuka ya bopanzani bwa poloso ya banganga o mboka; mpo ezalaki mingi baye balingaki makambo ma mpamba ma mokili, mpe bakendeki koteyaka malongi ma lokuta; mpe eye basalaki mpo ya ntina ya bozwi mpe lokumu.

17 Nzokande, bamekaki te kokosa, soko eyebanaki, mpo ya bobangi mobeko, mpo mokosi atumbolamaki; yango wana balobaki basakolaki engebene na boyambi bwa bango; mpe sikawa mobeko mokokaki te kozala na nguya likolo lya moto mpo ya boyambi bwa ye.

18 Mpe bamekaki te koyiba, mpo ya bobangi mobeko, mpo bato ba lolenge loye batumbolamaki; mpe bamekaki te koyongola, to koboma te, mpo oyo abomaki, atumbolamaki mpo ya liwa.

19 Kasi esalemaki ete onso oyo azalaki wa eklezia ya Nzambe te abandaki koniokola baye bazalaki ba eklezia ya Nzambe, mpe bakamataki likolo lya bango nkombo ya Klisto.

20 Iyo, baniokolaki bango, mpe batungisaki bango na ndenge inso ya maloba, mpe eye na ntina ya bosawa bwa bango; zambi bazalaki na lolendo te o miso mya bangomei, mpe zambi bakabolaki liloba lya Nzambe, bango na bango, na mosolo te mpe na ntalo te.

21 Sikawa ezalaki mobeko moko mwa sikisiki, o ntei ya bato ba eklezia, ete moto te, wa eklezia, akoteleme mpe akoniokola bango baye bazalaki te ba eklezia, mpe ete ezala boniokoli te o ntei ya bangomei.

22 Nzokande, ezalaki o ntei ya bango baye babandaki kozala na lolendo, mpe babandaki kowela makasi na banguna ba bango, kutu kina o mabete; iyo, balingaki kobetene na makofi ma bango.

23 Sikawa eye ezalaki o mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Alama, mpe ezalaki ntina ya litungisi liike o eklezia; iyo, ezalaki ntina ya momekano moike na eklezia.

24 Mpo mitema mya mingi mizalaki mikasi, mpe nkombo ya bango ilongolamaki mpenza, ete bakundolamaki lisusu te o ntei ya bato ba Nzambe. Mpe lisusu mingi bamilongolaki uta o ntei ya bango.

25 Sikawa eye ezalaki momekano monene na bango baye batelemeki ngbi na bondimi; nzokande, bazalaki na molende mpe sikisiki na kobatelaka mitindo mya Nzambe, mpe bandimaki na bompikiliki boniokoli boye bobakisamaki likolo lya bango.

26 Mpe etikaki banganga mosala mwa bango mpo ya kokaba liloba lya Nzambe epai ya bato, bato lokola batikaki misala mya bango mpo ya koyoka liloba lya Nzambe. Mpe ekabaka banganga epai ya bango liloba lya Nzambe bango banso bazongaki lisusu na etingia epai ya misala mya bango; mpe nganga, amikanisaki te likolo lya bayoki ba ye, mpo molakisi azalaki molamu te koleka bayekoli, mpe boye bazalaki banso bakokana; mpe basalaki banso, moto na moto engebene na bokasi bwa ye.

27 Mpe bakabaki biloko bya bango, moto na moto engebene na ena azwaka, mpe bakeleli, mpe bazangi, mpe bakoni, mpe batungisami; mpe balataki te monzele mwa ntalo, nzokande bazalaki peto mpe malonga.

28 Mpe boye batiaki makambo ma eklezia; mpe boye babandaki kozala na kimia ya ntango inso lisusu, ata boniokwami bwa bango.

29 Mpe sikawa, na ntina ya molende mwa eklezia bakomaki na bozwi mpenza, kozalaka na beboo ya biloko binso biye bazalaki na mposa—beboo ya bibwele mpe bitonga, mpe niama ya lolenge na lolenge, mpe lisusu beboo ya mboto, mpe wolo, mpe mpauni, mpe ya biloko bya motuya, mpe beboo ya siliki mpe lino lya mapasa-malonga, mpe ndenge inso ya bilamba bya mindondo te.

30 Mpe boye, o bizaleli bya bomengo bwa bango, babenganaki moto moko te oyo azalaki bolumbu, to oyo azalaki na nzala, to oyo azalaki na mposa ya mai, to oyo azalaki na bokono, to oyo aleisamaka te; mpe batiaki te mitema mya bango likolo lya bozwi; yango wana bakabaki na banso, mobange mpe elenge lokola, mowumbu mpe monsomi lokola, mwasi mpe mobali lokola, soko libanda lya eklezia to o eklezia, koponoko bato te na bango baye bazalaki na mposa.

31 Mpe boye bazwaki bomengo mpe bakomaki na bozwi mingi koleka bango baye bazalaki te ba eklezia ya bango.

32 Mpo bango baye bazalaki te ba eklezia ya bango bamisepelaki na bondoki, mpe na bosambeli bikeko to goigoi, mpe na bilobaloba, mpe na boluli, mpe na songosongi; kolataka monzele mwa ntalo; kotombwanaka likolo o lolendo la miso mya bangomei; koniokolaka, kokosaka, koyibaka, boyongoli, kosalaka pite, mpe kobomaka, mpe ndenge inso ya nkuna; nzokande, mobeko motiamaki na bokasi likolo lya bango banso baye babukaki mwango, mbala nzike lokola ekokaki.

33 Mpe esalemaki ete na kosalelaka mobeko likolo lya bango, moto na moto ayokaki mpasi engebene na eye asalaki, bakomaki kimia koleka, mpe bamekaki te kosala nkuna soko eyebanaki; yango wana, ezalaki kimia nzike o ntei ya bato ba Nefi kina o mobu mwa mitano mwa bokonzi bwa basambisi.