Makomi
Alama 9


Maloba ma Alama, mpe lisusu maloba ma Amuleki, maye basakolaki epai ya bato baye bazalaki o mboka ya Amoniya. Mpe lisusu babwakami o kati ya boloko, mpe babikisami na nguya ya likamwisi lya Nzambe oyo ezalaki na bango, engebene na likundoli lya Alama.

Kokwaka mikapo 9 o 14 eye o kati.

Mokapo 9

Alama atindi bato ba Amoniya bayamboli—Nkolo akoyoka ngolu na Balamani o mikolo mya nsuka—Soko Banefi basundoli mwinda, bakobebisama na Balamani—Mwana Mobali wa Nzambe akoya noki—Akosikola bango baye boyamboli, bakobatisama, mpe bakozala na bondimi o nkombo ya ye. Penepene na 82 Yambo ya Klisto.

1 Mpe lisusu, ngai, Alama, etindamaka ngai na Nzambe ete nakamata Amuleki mpe nakende koteya lisusu epai ya bato baye, to bato baye bazalaki o engumba ya Amoniya, esalemaki ete lokola nabandaki koteya epai ya bango, babandaki kowela na ngai, kolobaka:

2 Ozali nani? Ebanzi yo ete tokondima litatoli lya moto moko, ata akoloba epai ye biso ete mabele makoleka mosika?

3 Sikawa basosolaki te maloba maye balobaki; mpo bayebaki te ete mabele makoleka mosika.

4 Mpe balobaki lisusu: Tokondima te maloba ma yo soko okobikula ete engumba eye enene ekobebisama o mokolo moko.

5 Sikawa bayebaki te ete Nzambe akokaki kosala misala mya bokamwi mya lolenge loye, mpo bazalaki bato boko ba mitema mikasi mpe ba nkanza.

6 Mpe balobaki: Nzambe azali nani, ete atinda te bokulaka mingi koleka moto moko o ntei ya bato baye, mpo ya kosakola bango bosolo bwa makambo manene mpe ma bokamwi?

7 Mpe batelemeki mpo ya kotia maboko ma bango likolo lya ngai; kasi tala, basalaki yango te. Mpe natelemeki na bobangi te mpo ya kosakola epai ya bango, iyo, natatolaki na bobangi te epai ya bango, kolobaka:

8 Tala, O nkola wa nkuna mpe ebeba, boniboni bobosani momeseno mwa batata ba bino; iyo, boniboni bobosani mitindo mya Nzambe.

9 Emikundoli bino te ete tata wa biso, Lehi, amememeki libanda lya Yelusaleme na loboko la Nzambe? Emikundoli bino te ete bakambemaki banso o katikati ya esobe?

10 Mpe ebosani bino noki boye boniboni ntango ilai abikisaki batata ba biso na maboko ma bayini ba bango, mpe abatelaki bango uta o bobebisami, kutu libanda lya maboko ma bandeko ba bangomei?

11 Iyo, mpe soko ezalaka te na nguya ya ye ezangi emekiseli, mpe ngolu ya ye, mpe motema molai mwa ye ona biso, na ntembe te tolingaki kokatama mosika uta o etando ya mabele kala yambo ya eleko ya ntango eye, mpe mbele kokangema o bozali boko bwa bobola mpe lisuma lizanga nsuka.

12 Tala, sikawa nalobi epai ya bino ete atindi bino boyambola; mpe longola se soko boyamboli, bokoka na lolenge loko te kosangola bokonzi bwa Nzambe. Kasi tala, eye ezali enso te—atindi bino boyambola, to akobebisa bino mpenza uta o etando ya mabele; iyo, akobimela bino na nkanda ya ye, mpe na nkanda ekasi ya ye akobaluka mosika te.

13 Tala, emikundoli bino te maloba alobaki epai ya Lehi, kolobaka ete: Mbala nzike lokola ekobatela bino mitindo mya ngai, bokozwa bomengo o mboka? Mpe alobaki lisusu ete: Mbala nzike lokola bokobatela te mitindo mya ngai bokokatama mosika uta o miso mya Nkolo.

14 Sikawa nalingi ete bomikundola, ete mbala nzike lokola Balamani babateli te mitindo mya Nzambe, bakatami mosika uta o miso mya Nkolo. Sikawa tomoni ete liloba lya Nkolo lilakisami bosolo o likambo liye, mpe Balamani bakatamaki mosika uta o miso mya ye, uta o ebandeli ya bobuki mobeko bwa bango o mboka.

15 Nzokande nalobi epai ya bino, ete ekondimama mingi mpo ya bango o mokolo mwa bosambisami koleka mpo ya bino, soko botikali o masumu ma bino, iyo, mpe kutu kondimama mingi mpo ya bango o bomoi boye koleka mpo ya bino, longola se soko boyamboli.

16 Mpo ezali bilako mingi bininolami na Balamani; mpo ezali na ntina ya mimeseno mya batata ba bango miye misali bango batikala o bozali bwa bango bwa bozangi boyebi; yango wana Nkolo akozala na ngolu epai ya bango mpe akobenda bolai bwa lizali lya bango o mboka.

17 Mpe o yoko eleko ya ntango bakomememe na kondima liloba lya ye, mpe na koyeba bozangi bosolo bwa mimeseno mya batata ba bango; mpe mingi ya bango bakobikisama, mpo Nkolo akoyoka ngolu epai ya banso baye bakobiangema likolo lya nkombo ya ye.

18 Kasi tala, nalobi epai ya bino ete soko bokobi o nkuna ya bino ete mikolo mya bino mikobendama bolai o mboka, mpo Balamani bakotindama likolo lya bino; mpe soko boyamboli te bakoya o ntango yoko eyebi bino te, mpe bokobimelama elongo na bobebisami mpenza; mpe ekozala engebene na nkanda ekasi ya Nkolo.

19 Mpo ye akondima te ete bofanda o mabe ma bino, mpo ya kobebisa bato ba ye. Nalobi epai ya bino ete, Te; kutu akondima ete Balamani babebisa bato ba ye banso baye babiangemi bato ba Nefi, soko ekokaki kosalema bakweya o kati ya masumu mpe bobuka mibeko, nsima ya kopesamaka mwinda moike mpe boyebi boike boye epai ya bango na Nkolo Nzambe wa bango;

20 Iyo, nsima ya kozalaka bato basungama mingi na Nkolo, iyo, nsima ya kozalaka bato basungama likolo lya ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, to bato na bato basusu; nsima ya koyebisamaka makambo manso epai ya bango, engebene na mposa ya bango, mpe bondimi bwa bango, mpe nsambo ya bango, etali ena eye ezalaki, mpe eye ezali, mpe eye esengeli koya;

21 Kobimelamaka na Molimo mwa Nzambe; kosololaka elongo na banzelu, mpe kolobelamaka na mongongo mwa Nkolo; mpe kozalaka na molimo mwa bobikuli, mpe molimo mwa bobimisi, mpe lisusu makabo mingi, likabo lya kolobaka minoko, mpe likabo lya koteyaka, mpe likabo lya Molimo Mosantu, mpe likabo lya bobongoli;

22 Iyo, mpe nsima ya kobikisamaka na Nzambe libanda lya mboka ya Yelusaleme, na loboko la Nkolo; kobikisama ka uta o nzala, mpe uta o bokono, mpe ndenge inso ya malali ma lolenge na lolenga; mpe kokolaka na bokasi o etumba, ete bakokaki te kobebisama; komememeke libanda lya bowumbu mbala na mbala, mpe kobombamaka mpe kobatelamaka kina sikawa; mpe bazwi bomengo kina bazwi bozwi o biloko bya ndenge inso—

23 Mpe sikawa tala nalobi epai ya bino, ete soko bato baye, baye bazwi mapamboli mingi boye uta o loboko la Nkolo, bakobuka mibeko na bokeseni na mwinda mpe boyebi boye bazwi, nalobi epai ya bino ete soko ezali boye, ete soko bakokweya o kati ya bobuki mobeko, ekondimama mosika mingi mpo ya Balamani koleka mpo ya bango.

24 Mpo tala, bilako bya Nkolo bininolamaki na Balamani, kasi bizali mpo ya bino te soko bobuki mobeko; mpo elakaki polele te Nkolo mpe ebimisaki ye sikisiki te, ete soko bokotomboka na ye ete bokobebisama mpenza mosika uta likolo lya mabele?

25 Mpe sikawa mpo ya ntina eye, ete bokoka kobebisama te, Nkolo atindi anzelu wa ye mpo ya kobimela mingi ya bato ba ye, kosakolaka epai ya bango ete basengeli kokende kobelela makasi epai ya bato baye, kolobaka: Yambolani, mpo bokonzi bwa lola bozali mpembeni mosika te;

26 Mpe mikolo mingi te uta sikawa Mwana Mobali wa Nzambe akoya o nkembo ya ye; mpe nkembo ya ye ekozala nkembo ya Mobotami se Moko wa Tata, atonda na boboto, alima, mpe bosolo, atonda na bompikiliki, ngolu, mpe motema molai, mbangu mpo ya koyoka bogangi bwa bato ba ye mpe mpo ya koyanola nsambo ya bango.

27 Mpe tala, akoya mpo ya kosikola bango baye bakobatisama mpo ya boyamboli, na nzela ya bondimi likolo lya nkombo ya ye.

28 Yango wana, lengeleni nzela ya Nkolo, mpo ntango ezali mosika te eye bato banso bakobuka mbano ya misala mya bango, engebene na ena eye bango bazali—soko bazalaki sembo bakobuka lobiko la bozo bwa bango, engebene na nguya mpe libiki la Yesu Klisto; mpe soko bazali babe bakobuka bokweisami bwa bozo bwa bango, engebene na nguya mpe bokangemi bwa zabulu.

29 Sikawa tala, eye ezali mongongo mwa anzelu, kobelelaka epai ya bato.

30 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, mpo ete bozali bandeko ba ngai, mpe bosengelaki kozala balingami, mpe bosengelaki komeme misala milongobani mpo ya boyamboli, komonoko ete mitema mya bino miyeisami mikasi na liloba lya Nzambe, mpe komonoko ete bozali bato boko babunga mpe bakweya.

31 Sikawa esalemaki ete ngai, Alama, elobaka ngai maloba maye, tala, bato badasukaki na ngai zambi nalobaki epai ya bango ete bazali bato ba mitema mikasi mpe nkanza.

32 Mpe lisusu zambi nalobaki epai ya bango ete bazali bato babunga mpe bakweya basilikaki na ngai, mpe balukaki kotia maboko ma bango likolo lya ngai, ete bakoka kobwaka ngai o kati ya boloko.

33 Kasi esalemaki ete Nkolo andimaki te ete bakamata ngai o ntango ena mpe babwaka ngai o kati ya boloko.

34 Mpe esalemaki ete Amuleki akendeki mpe atelemeki liboso, mpe abandaki koteya epai ya bango lokola. Mpe sikawa maloba ma Amuleki makomami manso te, nzokande eteni yoko ya maloba ma ye makomami o buku eye.